Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nazali na mposa ya kokufa​—Biblia ekoki kosalisa ngai ntango nazali na makanisi ya komiboma?

Nazali na mposa ya kokufa​—Biblia ekoki kosalisa ngai ntango nazali na makanisi ya komiboma?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ! Biblia euti epai ya “Nzambe, oyo abɔndisaka baoyo balɛmbi nzoto.” (2 Bakorinti 7:6) Ata soki Biblia ezali te buku ya maladi ya makanisi, esalisá ebele ya bato bálongola makanisi ya komiboma. Toli na yango oyo esalisaka mpenza, ekoki mpe kosalisa yo.

 Toli nini oyo esalisaka mpenza Biblia epesi?

  • Yebisá basusu ndenge ozali komiyoka.

     Oyo Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

     Yango elingi koloba: Tozali na mposa ya lisalisi ya basusu ntango makanisi ya mabe ezali kotungisa biso.

     Soki obombi ndenge ozali komiyoka, yango ekoki kokómela yo kilo mpo na komema. Kasi soki oyebisi moto moko ndenge ozali komiyoka, kilo yango ekoki kokita; okoki kutu kokóma kotalela likambo yango na ndenge mosusu.

     Meká kosala boye: Sololá na moto moko lelo, akoki kozala ndeko ya libota to moninga moko oyo otyelaka motema. a Okoki mpe kokoma ndenge ozali komiyoka.

  • Luká lisalisi ya monganga.

     Oyo Biblia elobi: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.”​—Matai 9:12.

     Yango elingi koloba: Tosengeli koluka lisalisi ya monganga ntango tozali kobɛla.

     Makanisi ya komiboma ekoki kozala elembo ya maladi ya makanisi. Lokola maladi mosusu nyonso, maladi ya makanisi ezali likambo ya koyokela yango nsɔni te. Ezali maladi oyo minganga bakoki kosalisa.

     Meká kosala boye: Kende nokinoki kokutana na monganga moko.

  • Kobosana te ete Nzambe akipaka yo.

     Oyo Biblia elobi: “Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mitano na mbongo ya bibende mibale ya motuya moke, boye te? Nzokande Nzambe abosanaka ata moko na yango te. . . . Bóbanga te; bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”​—Luka 12:6, 7.

     Yango elingi koloba: Nzambe azwaka yo na valɛrɛ mpenza.

     Okoki komiyoka lokola ozali kaka yo moko, kasi Nzambe azali komona mpasi na yo. Akipaka yo, ata soki mposa ya kozala na bomoi esili yo. Nzembo 51:17 elobi: “Ee Nzambe, motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.” Nzambe alingi ozala na bomoi mpo alingaka yo.

     Meká kosala boye: Luká na Biblia makambo oyo endimisi ete Nzambe alingaka yo. Na ndakisa, talá mokapo 24 ya buku Pusaná penepene na Yehova.

  • Bondelá Nzambe.

     Oyo Biblia elobi: ‘Bóbwakela Nzambe mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.”​—1 Petro 5:7.

     Yango elingi koloba: Nzambe asɛngi yo oyebisa ye polele nyonso oyo ezali kotya kilo na makanisi na yo.

     Nzambe akoki kopesa yo kimya mpe makasi ya koyikela likambo na yo mpiko. (Bafilipi 4:6, 7, 13) Asalaka yango mpo na kosalisa baoyo nyonso babelelaka ye na motema moko.​—Nzembo 55:22.

     Meká kosala boye: Bondelá Nzambe lelo. Salelá nkombo na ye, Yehova mpe yebisá ye ndenge ozali komiyoka. (Nzembo 83:18) Sɛngá ye asalisa yo oyika mpiko.

  • Kanisá na mozindo elikya oyo Biblia epesi mpo na avenire.

     Oyo Biblia elobi: “Elikya oyo tozali na yango ezali lokola longo mpo na molimo, ezali makasi mpe ngwi.”​—Baebre 6:19.

     Yango elingi koloba: Na bantango mosusu okoki komiyoka malamu mpe na bantango mosusu okoki komiyoka mabe kaka ndenge masuwa eninganaka ntango mopɛpɛ makasi ebɛti yango. Kasi elikya oyo Biblia epesi ekoki kokitisa yo motema.

     Elikya yango ezali ndɔtɔ te; kasi euti na eleka oyo Nzambe apesi ya kolongola makambo nyonso oyo ebimiselaka biso bampasi.​—Emoniseli 21:4.

     Meká kosala boye: Tángá liteya 5 ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! mpo oyeba makambo mosusu oyo etali elikya oyo Biblia epesi

  • Salá likambo moko oyo osepelaka na yango.

     Oyo Biblia elobi: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka.”​—Masese 17:22.

     Yango elingi koloba: Soki tozali kosala makambo oyo epesaka biso esengo, ekoki kosalisa biso tóbongisa makanisi na biso mpe tómiyoka malamu.

     Meká kosala boye: Salá eloko moko oyo esepelisaka yo. Na ndakisa, koyoka miziki oyo epesaka esengo, kotánga eloko moko oyo ekolendisa yo to kolekisa ntango na kosala likambo oyo osepelaka na yango. Okobakisa mpe esengo na yo soki osali likambo moko mpo na kosalisa basusu, ata na makambo mikemike.​—Misala 20:35.

  • Kipáká sante na yo.

     Oyo Biblia elobi: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”​—1 Timote 4:8.

     Yango elingi koloba: Kosala ngalasisi mbala na mbala, kolala malamu mpe kolya bilei oyo etongaka nzoto, ememelaka biso matomba.

     Meká kosala boye: Tambolá nokinoki, ata mpo na miniti 15 mpamba.

  • Kobosana te ete likambo oyo ozali na yango mpe ndenge ozali komiyoka ekoki kobongwana.

     Oyo Biblia elobi: “Boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.”​—Yakobo 4:14.

     Yango elingi koloba: Likambo oyo ezali kotungisa yo; ata soki ozangi ndenge ya kosala mpo na yango, ekoki koleka na yango.

     Ata soki lelo omoni ete elikya ezali te mpo na likambo na yo, makambo ekoki kobongwana lobi. Boye, luká ndenge ya kolonga yango. (2 Bakorinti 4:8) Soki osí omibomi, ndenge ya kozonga nsima ezalaka te, nzokande makambo oyo ezali kotungisa yo, ekoki kosila na yango.

     Meká kosala boye: Tángá na Biblia masolo ya bato oyo balɛmbaki nzoto tii bayokaki mposa ya kokufa. Okomona ete nsukansuka bomoi na bango ebongaki, mbala mingi na ndenge oyo bakanisaki te. Tótalela mwa bandakisa.

 Biblia elobeli bato oyo bayokaki mposa ya kokufa?

 Ɛɛ. Biblia elobeli bato mosusu oyo balobaki mpenza, “nazali na mposa nakufa.” Nzambe apamelaki bango te, kasi alukaki kosalisa bango. Akoki mpe kosala bongo mpo na yo.

Eliya

  •  Azalaki nani? Eliya azalaki mosakoli ya mpiko. Kasi na bantango mosusu ye mpe alɛmbaki nzoto. Yakobo 5:17 elobi: “Eliya azalaki moto lokola biso.”

  •  Mpo na nini amonaki malamu akufa? Na eleko moko boye ya bomoi na ye, Eliya amonaki lokola azali kaka ye moko mpe azangi ntina. Yango wana abondelaki boye: “Ee Yehova, longolá molimo na ngai.”​—1 Bakonzi 19:4.

  •  Nini esalisaki ye? Eliya afungolelaki Nzambe motema mpe ayebisaki ye ndenge azalaki komiyoka. Ndenge nini Nzambe alendisaki ye? Nzambe atyelaki ye likebi mpe amonisaki ye nguya na ye. Akitisaki ye mpe motema ndenge ayebisaki ye ete azalaki kaka na mposa na ye mpe apesaki ye mosungi oyo abongi mpe oyo azalaki kokipe ye.

  •  Tángá makambo ekómelaki Eliya: 1 Bakonzi 19:2-18.

Yobo

  •  Azalaki nani? Yobo azalaki moto moko ya bozwi, oyo azalaki na libota monene. Azalaki kosambela Nzambe ya solo na bosembo nyonso.

  •  Mpo na nini amonaki malamu akufa? Na mbalakaka, bomoi ya Yobo ebongwanaki na ndenge ya mabe mpenza. Abungisaki biloko na ye nyonso. Bana na ye nyonso bakufaki na likama. Azwaki maladi ya mabe mpenza. Mpe na nsuka, baninga ya nkombo mpamba balobaki na ye ete ye moko nde amilukelaki bampasi wana. Yobo alobaki: “Naboyi; nalingi kozala na bomoi te.”​—Yobo 7:16.

  •  Nini esalisaki ye? Yobo abondelaki Nzambe mpe asololaki na basusu. (Yobo 10:1-3) Elihu, moninga moko oyo amityaki na esika na ye mpe alendisaki ye, asalisaki ye atalela likambo na ye na ndenge mosusu. Na nyonso, Yobo andimaki na motema mobimba toli mpe lisalisi ya Nzambe.

  •  Tángá makambo ekómelaki Yobo: Yobo 1:1-3, 13-22; 2:7; 3:1-13; 36:1-7; 38:1-3; 42:1, 2, 10-13.

Moize

  •  Azalaki nani? Moize azalaki mokambi ya ekólo Yisraele mpe mosakoli ya sembo.

  •  Mpo na nini amonaki malamu akufa? Moize azalaki na mikumba minene mpe bazalaki kolobela ye ntango nyonso mabe mpe amonaki ete asili makasi. Yango nde etindaki aloba na Nzambe boye: “Nabondeli yo, bomá ngai koboma.”​—Mitángo 11:11, 15.

  •  Nini esalisaki ye? Moize ayebisaki Nzambe ndenge azalaki komiyoka na motema. Nzambe asalisaki ye akómisa pɛpɛlɛ mikumba oyo azalaki na yango mpe akitisa mitungisi.

  •  Tángá makambo ekómelaki Moize: Mitángo 11:4-6, 10-17.

a Soki makanisi ya komiboma ezali makasi mpe moto moko oyo otyelaka motema azali wana te, okoki kobenga nimero ya biro moko ya Leta oyo ekipaka makambo ya ndenge wana.