Mabele ekobebisama?
Eyano ya Biblia
Te, mabele ekobebisama soki moke te, ekozika na mɔtɔ te, mabele mosusu mpe ekozwa esika na yango te. Biblia eteyaka ete Nzambe akelaki mabele mpo bato báfanda libela.
“Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”—Nzembo 37:29.
“[Nzambe] atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela; ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.”—Nzembo 104:5.
“Mabele ezali koumela seko.”—Mosakoli 1:4.
“Moto oyo asalaki mabele mpe Moto oyo akelaki yango, Moto oyo atɛlɛmisaki yango ngwi, . . . azalisaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.”—Yisaya 45:18.
Bato bakobebisa mabele?
Nzambe akotika te ete bato bábebisa mabele na bitumba, kobeba ya mopɛpɛ to na lolenge mosusu. Kutu, ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ (Emoniseli 11:18) Ndenge nini akosala yango?
Nzambe akolongola baguvɛrnema ya bato oyo elongi te kobatela mabele, na esika na yango akotya Bokonzi ya likoló mpe ya kokoka. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe nde mokonzi ya Bokonzi yango. (Yisaya 9:6, 7) Ntango azalaki awa na mabele, Yesu asalelaki nguya na ye ya kosala makamwisi mpo na kokitisa mipɛpɛ makasi mpe mbonge. (Marko 4:35-41) Lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, Yesu akozala na bokonzi likoló ya mabele mobimba mpe biloko oyo ezali na mabele. Akobongisa lisusu mabele to akokómisa yango sika; akosala ete makambo ezonga ndenge ezalaki na elanga ya Edene.—Matai 19:28; Luka 23:43.
Biblia eteyaka ete mabele ekozika na mɔtɔ?
Te, eteyaka bongo te. Bato bazalaka na likanisi wana ya libunga mpo bakangaka mpenza ntina te ya maloba oyo ezali na 2 Petro 3:7, oyo elobi: “Likoló ná mabele oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ.” Tótalela makambo mibale ya ntina oyo ekosalisa biso tókanga mpenza ntina ya maloba yango:
Biblia esalelaka maloba “likoló,” “mabele,” mpe “mɔtɔ” mpo na kolobela makambo ebele. Na ndakisa, Ebandeli 11:1 elobi: “Bongo mabele mobimba ezalaki na monɔkɔ kaka moko.” Awa, “mabele” elakisi nde bato.
Bavɛrsɛ oyo ezali liboso ya 2 Petro 3:7 emonisi soki likoló, mabele, mpe mɔtɔ oyo balobeli wana ezali nini. Vɛrsɛ 5 mpe 6 ekokanisi yango na Mpela ya mikolo ya Noa. Mpela ebebisaki mokili ya ntango wana, kasi mabele na biso elimwaki te. Kutu, Mpela ebomaki nde “mabele,” elingi koloba bato mabe nyonso ya ntango wana. (Ebandeli 6:11) Ebomaki mpe “likoló,” elingi koloba baoyo bazalaki koyangela na ntango wana. Na yango, bato mabe nde babomamaki, kasi mabele te. Noa ná bato ya libota na ye babikaki ntango mokili ya ntango wana ebebisamaki mpe bafandaki na mabele nsima ya Mpela.—Ebandeli 8:15-18.
Ndenge moko na mai ya Mpela, libebi, to “mɔtɔ,” oyo 2 Petro 3:7 elobeli ekosukisa mokili ya bato mabe, kasi mabele te. Nzambe alaki “likoló ya sika mpe mabele ya sika” mpe kuna “boyengebene ekozala.” (2 Petro 3:13) “Mabele ya sika,” to libota ya sika ya bato, ekoyangelama na “likoló ya sika,” to boyangeli ya sika—Bokonzi ya Nzambe. Ntango Bokonzi yango ekoyangela, mabele ekokóma paradiso moko kitoko.—Emoniseli 21:1-4.