Bisakweli oyo elobeli Masiya emonisaki ete Yesu azalaki Masiya?
Eyano ya Biblia
Ɛɛ. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, akokisaki bisakweli mingi etali “Masiya Mokambi” oyo alingaki kozala “Mobikisi ya mokili.” (Danyele 9:25; 1 Yoane 4:14) Ata nsima ya liwa na ye, Yesu akobaki kokokisa bisakweli etali Masiya.—Nzembo 110:1; Misala 2:34-36.
Liloba “Masiya” elimboli nini?
Ebengeli ya Ebre Ma·shiʹach (Masiya) oyo na Grɛki ebengamaka Khri·stos (Kristo) nyonso mibale elimboli “Moto oyo atyami mafuta.” Boye, ebengeli “Yesu Kristo” elimboli “Yesu moto oyo atyami mafuta,” to “Yesu Masiya.”
Na ntango ya kala, mbala mingi bazalaki kosopela moto mafuta na motó soki bapesi ye bokonzi. (Balevi 8:12; 1 Samwele 16:13) Nzambe nde aponaki Yesu azala Masiya—mokumba moko monene mpenza. (Misala 2:36) Kasi, Nzambe atyaki Yesu mafuta ya solosolo te kasi nde mafuta na elimo.—Matai 3:16.
Bisakweli etali Masiya ekoki kokokisama epai ya bato mingi?
Te. Kaka ndenge bilembo ya misapi ya moto moko ekoki te kokokana ná oyo ya moto mosusu, bisakweli ya Biblia mpe ezali kokokisama kaka epai ya Masiya moko to Kristo. Kasi, Biblia ekebisi ete “Ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima mpe bakobimisa bilembo minene mpe bakosala makamwisi mpo na kokosa ata bato oyo baponami, soki likoki ezali.”—Matai 24:24.
Masiya akoki komonana na mikolo ekoya?
Te. Biblia esakolaki ete Masiya akozala moto ya libota ya Mokonzi Davidi ya Yisraele. (Nzembo 89:3, 4) Kasi, mikanda ya molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Bayuda tii na Davidi ebungaki, ekoki kozala Baroma babebisaki yango ntango babɔtɔlaki Yerusaleme na mobu 70 ya ntango na biso. a Banda ntango wana, ekómá mpasi moto moko aloba ete azali moto ya libota ya Davidi. Nzokande na ntango ya Yesu, mikanda yango ezalaki, ata kutu banguna na ye batyaki ntembe te ete azalaki moto ya libota ya Davidi.—Matai 22:41-46.
Bisakweli boni etali Masiya ezali na Biblia?
Ezali mpasi kopesa motángo mobimba ya bisakweli oyo etali Masiya. Na ndakisa, mayele ya kotánga bisakweli ekoki kokesana ata na bavɛrsɛ oyo emonani polele ete ezali bisakweli. Mokanda ya Yisaya 53:2-7 elobeli bisakweli ndenge na ndenge oyo etali Masiya. Bamosusu bakoki kotánga yango lokola esakweli kaka moko, kasi bamosusu bakoki komona ete likambo mokomoko oyo elobami na bavɛrsɛ yango ezali esakweli.
Mwa bisakweli etali Masiya oyo ekokisamaki epai ya Yesu
Esakweli |
Ezali na |
Kokokisama |
---|---|---|
Momboto ya Abrahama |
||
Mokitani ya Yisaka mwana ya Abrahama |
||
Abotami na libota ya Yuda |
||
Na molɔngɔ ya libota ya Mokonzi Davidi |
||
Abotami epai ya mwasi oyo ayebi mibali te |
||
Abotami na Beteleme |
||
Abengami na nkombo Emanuele b |
||
Ebandeli ya moke |
||
Bana mike babomami nsima ya kobotama na ye |
||
Babengi ye alongwa na Ezipito |
||
Babengi ye Monazarete c |
||
Momemi-nsango ayei liboso na ye |
||
Atyami mafuta lokola Masiya na mobu 29 T.B. d |
||
Nzambe andimi ete azali Mwana na ye |
||
Molende mpo na ndako ya Nzambe |
||
Mosakoli ya nsango malamu |
||
Pole moko monene na mosala na ye na Galile |
||
Mosali makamwisi lokola Moize |
||
Ndenge moko na Moize, akoloba makanisi ya Nzambe |
||
Abikisi bato mingi ya maladi |
||
Abendi likebi ya bato epai na ye te |
||
Ayokeli baoyo bazali konyokwama mawa |
||
Amonisi bosembo ya Nzambe |
||
Mopesi-toli monene |
||
Asakoli nkombo ya Yehova |
||
Alobi na masese |
||
Mokambi |
||
Mingi bandimeli ye te |
||
Libanga ya kobɛta libaku |
||
Bato baboyi ye |
||
Bayini ye kaka mpamba |
||
Akɔti na Yerusaleme lokola mokonzi likoló ya mpunda |
||
Bana bakumisi ye |
||
Ayei na nkombo ya Yehova |
||
Moninga ya motema atɛki ye |
||
Batɛki ye na shekele ya palata 30 e |
||
Baninga basundoli ye |
||
Batatoli ya lokuta bakoseli ye makambo |
||
Afandi nyɛɛ liboso ya bafundi na ye |
||
Babwakeli ye nsoi |
||
Babɛti ye na motó |
||
Babɛti ye |
||
Asalaki baoyo babɛtaki ye eloko te |
||
Bakonzi ya guvɛrnema batɛmɛlaki ye |
||
Babɛti ye bansɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo |
||
Bato babwakeli bilamba na ye mbɛsɛ |
||
Atángami elongo na basumuki |
||
Atyolami, afingami |
||
Anyokwamaki mpo na basumuki |
||
Lokola nde Nzambe abosanaki ye |
||
Bapesi vinyo mpe mai ya nsɔngi amɛla |
||
Ayoki mposa ya mai liboso akufa |
||
Atikaki elimo na ye na mabɔkɔ ya Nzambe |
||
Akataki mpema |
||
Apesi lisiko mpo na kolongola lisumu |
||
Mikuwa na ye ebukani te |
||
Batɔbɔli ye |
||
Akundami elongo na bazwi |
||
Asekwisami uta na bakufi |
||
Moto mosusu azwi esika ya motɛki na ye |
||
Afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe |
a Buku moko (McClintock and Strong’s Cyclopedia) elobi: “Ntembe ezali te, mikanda ya molɔngɔ ya mabota ya Bayuda ebebaki ntango Yerusaleme ebebisamaki, kasi te liboso na yango.”
b Nkombo ya Ebre Emanuele, oyo elimboli “Nzambe azali na biso,” emonisi malamu mokumba ya Yesu lokola Masiya. Koya na ye awa na mabele mpe misala na ye emonisaki ete Nzambe azali elongo na basambeli na ye.—Luka 2:27-32; 7:12-16.
c Ekoki kozala ete ebengeli “Monazarete” euti na liloba ya Ebre neʹtser, oyo elimboli “mwa nzete ya sika.”
d Mpo na koyeba makambo mosusu etali masolo ya Biblia oyo emonisi ete dati ya mobu 29 T.B. nde kati oyo Masiya ayaki, talá lisolo “Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya.”
e Esakweli yango ezali na mokanda ya Zekaria, kasi mokomi ya mokanda ya Matai alobi ete “elobamaki na nzela ya mosakoli Yirimia.” (Matai 27:9) Emonani ete mokanda ya Yirimia etyamaki na esika ya liboso na eteni ya Makomami oyo ebengamaki “Basakoli.” (Luka 24:44) Emonani ete Matai asalelaki “Yirimia” mpo na kolobela eteni mobimba ya mikanda yango, oyo ezalaki mpe na mokanda ya Zekaria na kati na yango.