Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya koboya koboma libala ntango moto akómi mobange

Ndenge ya koboya koboma libala ntango moto akómi mobange

 Banda 1990 tii 2015, motángo ya bato oyo babomi libala oyo bazali na mbula 50 ebakisami mbala mibale na États-Unis, mpe ebakisami mbala misato mpo na baoyo balekisi mbula 65. Nini ezali kosala ete bato ‘báboma libala ntango bakómi mibange’? Ndenge nini okoki kobatela libala na yo mpo likambo yango ekómela yo te?

Na lisolo oyo

 Nini esalaka ete bato báboma libala ntango bakómi mibange?

  •    Mbala mingi, boyokani ya babalani oyo babomaka libala ntango bákómi mibange ekómaka kobeba malɛmbɛmalɛmbɛ. Nsima ya bambula, babalani mosusu bakómaka kotalela makambo ndenge moko te mpe komona ete bakeseni na mwa makambo mingi. To nsima ya kolongwa ya bana na ndako, babalani bakoki komona ete bazalaki kokokisa mikumba ya tata mpe ya mama banda kala, mpe yango esali ete bábosana bazalaka mwasi ná mobali.

  •    Na bambula oyo euti koleka, bato oyo bamibengaka bapesi-toli na makambo ya libala balendisaki babalani ete bátyaka makanisi na bango na bamposa na bango moko. Bapesaka basi mpe mibali toli ete bámituna boye: ‘Libala na ngai epesaka ngai esengo?’ ‘Ezali kosala ete nakóma moto malamu koleka?’ ‘Molongani na ngai asalaka namona ete alingaka ngai mpe nazali na valɛrɛ?’ Lelo oyo, bato bakanisaka ete soki eyano na moko ya mituna yango ezali “te,” osengeli kosala oyo okanisi ete ezali malamu koleka mpo na yo, elingi koloba, koboma libala mpe kobanda bomoi ya sika.

  •   Bato bamonaka lisusu te koboma libala lokola likambo ya mabe. Eric Klinenberg, moto ya mayele na makambo ya bomoi ya bato, akomaki boye: “Mwa bambula eleki, moto oyo asepelaki te na molongani na ye mpe alingaki koboma libala asengelaki komonisa bantina oyo esali ete azwa ekateli yango. Lelo oyo, ezali lisusu ndenge wana te: Soki osepeli na libala na yo te, osengeli kopesa bantina ya malamu oyo mpo na yango osengeli kotikala na libala. Ezali bongo mpo bato mingi lelo oyo, bamonaka ete likambo oyo eleki ntina ezali ya kosala oyo eleki malamu mpo na yo moko.” a

 Ya solo, ntango moto abomi libala, akoki kosilisa mikakatano mosusu, kasi mikakatano ya sika ekoki mpe kobima. Na ndakisa, bolukiluki moko emonisi ete mbala mingi “koboma libala ntango moto akómi mobange,” ekoki kobimisa mikakatano ya mbongo, mingimingi mpo na mwasi.”

 Ezali na likambo mosusu oyo esengeli kotalela. Buku moko (Don’t Divorce) elobi boye: “Ata soki omeki kobongola lolenge na yo ya bomoi, okokoka te kobongola ndenge oyo ozalaka.” “Osalaki nini mpo na kobongola lolenge na yo ya kosolola oyo esimbaki te elongo na molongani na yo? Osalaki nini mpo na kobongola ndenge na yo ya kosilisa matata?” b

 Oyo okoki kosala

  •   Ndimá mbongwana. Boyokani moko te etikalaka ndenge ezalaki na ebandeli. Ekoki kozala ete boyokani na yo ná molongani na yo ebongwanaki mpo bana na bino balongwá ndako to mpo bino mibale bokolisaki bizaleli ekeseni. Na esika ya kolinga ete makambo ezala kaka ndenge ezalaki liboso, kanisá ndenge ya kobongisa makambo oyo ezali sikoyo.

     Toli ya Biblia: “Koloba te ete: “Mpo na nini mikolo ya kala ezalaki malamu koleka oyo ya lelo?” Mpo ezali bwanya te nde etindi yo otuna bongo.”​—Mosakoli 7:10.

  •   Bóbatela boninga na bino. Okoki kosala makasi okóma kosepela na likambo oyo molongani na yo azali kosepela na yango sikoyo, to mpe okoki kosalisa molongani na yo akóma kosepela na likambo oyo ozali kosepela na yango? Bokoki koluka likambo moko ya sika oyo bino mibale bokosepela na yango? Mokano na yo esengeli kozala ya kolekisaka ntango elongo, mpo yo ná molongani na yo bómiyoka lokola babalani, na esika ya kozala lokola bato mibale oyo bafandaka kaka esika moko.

     Toli ya Biblia: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”​—1 Bakorinti 10:24.

  •   Batelá bizaleli malamu. Kobá kaka komonisa bonkonde ata soki bofandaka elongo banda kala. Sololáká na limemya ná molongani na yo, mpe saláká makasi mpo omonisa bizaleli oyo ozalaki komonisa ntango bozalaki bafianse. Lobáká “nabondeli yo” mpe “mersi.” Monisáká bolingo mpe botɔndi mbala na mbala mpo na makambo oyo molongani na yo asaleli yo.

     Toli ya Biblia: “Bózala nde na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa.”​—Baefese 4:32.

  •   Kobosana te ntango ya malamu oyo bolekisaki elongo. Bótalaka elongo bafɔtɔ ya libala na bino, to mpe bafɔtɔ ya makambo mosusu oyo bosalaki elongo. Soki bosali bongo, bokobatela to bokozongisa lisusu bolingo mpe limemya na libala na bino.

     Toli ya Biblia: “Mokomoko na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”​—Baefese 5:33.

a Euti na buku Going Solo​—The Extraordinary Rise and Surprising Appeal of Living Alone.

b Ntina kaka moko oyo Makomami epesi ya koboma libala, ezali pite. (Matai 19:5, 6, 9) Talá lisolo “Biblia epesi nzela ya koboma libala?