Lakisá makambo oyo ezali na kati

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | YONATANE

“Basalaki boninga makasi mpenza”

“Basalaki boninga makasi mpenza”

Etumba esili, mpe kimya ekɔti na lobwaku ya Ela. Ntango mopɛpɛ ya mpokwa ezali kopɛpa mpe koningisa bahema, Mokonzi Saulo azali kosala likita elongo na bato na ye mosusu. Mwana na ye ya liboso, Yonatane, azali mpe na likita yango mpe elenge mobali moko, oyo azali mobateli ya mpate azali kobɛta lisolo. Davidi nde elenge mobali yango mpe azalaki na mpiko mpe na esengo mpenza. Saulo azali koyoka ye na likebi mpenza, azali kolandela liloba nyonso oyo Davidi azali koloba. Kasi, Yonatane amiyoki ndenge nini? Alongá bitumba ebele na mosala na ye lokola soda na limpinga ya Yehova. Kasi elonga ya lelo ezali ya Yonatane te; kasi nde ya elenge mobali oyo. Davidi auti koboma engambe Goliate! Yonatane ayoki nde zuwa mpo bato bakumisi Davidi?

Ndenge oyo Yonatane asali, ekoki kokamwisa yo. Biblia elobi: “Ntango kaka asilisaki koloba na Saulo, molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi, mpe Yonatane akómaki kolinga ye lokola molimo na ye moko.” Yonatane apesaki Davidi bibundeli na ye, ata mpe litimbo na ye. Yango ezalaki kado moko ya ntina mingi mpo Yonatane ayebanaki lokola mobɛti monene ya litimbo. Likambo eleki ntina, Yonatane ná Davidi basalaki kondimana to elako oyo esangisaki bango lokola baninga oyo basengeli kosalisana.​—1 Samwele 18:1-5.

Na ndenge yango, babandaki boninga ya makasi mpenza oyo Biblia elobeli. Boninga ezali na ntina mpo na bato ya kondima. Soki toponi baninga na bwanya, topesani mabɔkɔ mpe tozali baninga ya sembo, tokoki kokómisa kondima na biso makasi na ntango ya mpasi. (Masese 27:17) Boye, tótala liteya oyo tokoki kozwa epai ya Yonatane na likambo etali boninga.

Nini esalaki ete bákóma baninga?

Ndenge nini boninga ya bongo esalemaki nokinoki? Mpo na kozwa eyano, tótala naino nini esalaki ete bákóma baninga. Tótalela makambo mosusu ya bomoi na bango. Yonatane azalaki kolekisa ntango moko ya mpasi mpenza. Wana bambula ezalaki koleka, tata na ye, Mokonzi Saulo akómaki kobongwana mpe azalaki se kokóma mabe koleka. Atako na ebandeli azalaki moto ya komikitisa, ya botosi mpe ya kondima, kasi akómaki na lolendo mpe azangaki botosi.​—1 Samwele 15:17-19, 26.

Ekoki kozala ete Yonatane azalaki komitungisa mpenza ndenge Saulo abongwanaki bongo, mpo bazalaki baninga ya motema. (1 Samwele 20:2) Ekoki kozala ete Yonatane azalaki komitungisa mpo na mpasi oyo Saulo akokaki kobimisela ekólo oyo Yehova aponaki. Kozanga botosi ya mokonzi elingaki nde kosala ete bato ya ekólo yango bákóma mosika na Yehova mpe andima bango lisusu te? Na ntembe te, ezalaki mpenza eleko ya mpasi mpo na moto ya kondima lokola Yonatane.

Makambo yango ekoki kosalisa biso tóyeba nini etindaki Yonatane asepela na elenge Davidi. Yonatane amonaki ete Davidi azalaki na kondima makasi. Kobosana te, na kokesana na basoda ya Saulo, Davidi abangaki Goliate te atako azalaki engambe. Amonaki ete kokende etumba na nkombo ya Yehova ekokómisa ye makasi koleka Goliate mpe bibundeli na ye nyonso.​—1 Samwele 17:45-47.

Mwa bambula liboso, Yonatane mpe azalaki na makanisi ya ndenge wana. Andimaki mpenza ete bato mibale; elingi koloba ye ná momemi-bibundeli na ye bakoki kobundisa limpinga mobimba ya basoda ya Filistia mpe kolonga yango. Mpo na nini? Yonatane alobaki: “Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova.” (1 Samwele 14:6) Boye, Yonatane ná Davidi bakokanaki na makambo mingi. Bango nyonso mibale bazalaki na kondima makasi epai ya Yehova mpe bazalaki kolinga ye mingi. Yango nde likambo oyo esimbaki mpenza boninga na bango. Atako Yonatane azalaki mwana ya mokonzi, elombe mpe akómaki na mbula soki 50 mpe Davidi azalaki mobateli mpamba ya mpate mpe akokisaki naino mbula 20 te, bokeseni yango ezalaki na ntina te na miso na bango. *

Kondimana oyo basalaki ezalaki libateli mpenza mpo na boninga na bango. Na ndenge nini? Kobosana te ete Davidi ayebaki oyo Yehova alingaki ye akóma: Asengelaki kokóma mokonzi ya mibale ya Yisraele! Abombelaki Yonatane likambo yango? Ata moke te! Boninga ya solosolo lokola oyo ya bango esɛngaka kosolola makambo polelepolele, kasi te kobombelana makambo to kokosa moninga. Yonatane ayokaki ndenge nini ntango ayebaki ete Davidi akokóma mokonzi? Bongo soki Yonatane azalaki na elikya ya kokóma mokonzi mokolo mosusu mpe kobongisa makambo oyo tata na ye abebisaki? Biblia elobi eloko moko te mpo na makanisi oyo Yonatane akokaki kozala na yango; elobeli kaka makambo ya ntina mpenza, bosembo ya Yonatane mpe kondima na ye. Amonaki ete elimo ya Yehova ezalaki likoló ya Davidi. (1 Samwele 16:1, 11-13) Yango wana Yonatane akokisaki ndai na ye mpe akobaki kotalela Davidi lokola moninga, kasi te lokola monguna. Yonatane azalaki na mposa ete mokano ya Yehova ekokokisama.

Yonatane ná Davidi bazalaki na kondima makasi epai ya Yehova mpe bazalaki kolinga ye mingi

Boninga yango ekómaki lipamboli monene. Liteya nini tokoki kozwa na kondima ya Yonatane? Mosaleli nyonso ya Nzambe asengeli koyeba valɛrɛ ya boninga. Boninga etali mbula te to esika moto autá, kasi ekoki komemela biso bolamu soki baninga yango bazali na kondima ya solosolo. Yonatane ná Davidi bazalaki kopesana makasi mpe kolendisana mbala mingi. Mpe bazalaki na mposa ya lisalisi ya ndenge wana mpo boninga na bango elingaki kokutana na komekama makasi mpenza.

Akotikala sembo epai ya nani?

Liboso, Saulo azalaki kosepela mpenza na Davidi mpe atyaki ye mokonzi ya basoda na ye. Kasi na nsima, Saulo akómaki na zuwa, ezaleli oyo Yonatane atikelaki yango nzela te. Davidi alongaki Bafilistia, banguna ya Yisraele, mbala na mbala. Yango wana bato bakumisaki Davidi mpe basepelaki na ye. Basi mosusu kutu ya Yisraele bayembaki boye: “Saulo abomi oyo ya ye bankóto, mpe Davidi abomi oyo ya ye bankóto zomi zomi.” Saulo asepelaki na nzembo yango te. Biblia elobi ete “banda mokolo wana, Saulo azalaki ntango nyonso kotala Davidi na liso mabe.” (1 Samwele 18:7, 9) Azalaki kobanga ete Davidi abɔtɔla ye bokonzi. Ezalaki mpenza bozoba mpo na Saulo. Ezali solo ete Davidi ayebaki ete akokóma mokonzi na esika ya Saulo, kasi akanisaki kutu te kozwa bokonzi yango ntango mokonzi oyo Yehova atyaki azalaki naino koyangela!

Saulo asalaki mwango mpo báboma Davidi na etumba, kasi esimbaki te. Davidi akobaki kolonga na bitumba mpe bato bakómaki kosepela na ye mingi lisusu. Saulo asalaki mwango mosusu; ayanganisaki bato nyonso ya ndako na ye; bato na ye nyonso ya misala mpe mwana na ye ya liboso mpo na koluka koboma Davidi! Kanisá mpasi oyo Yonatane ayokaki na motema ntango amonaki makambo oyo tata na ye azalaki kosala! (1 Samwele 18:25-30; 19:1) Yonatane azalaki mwana moko ya sembo, kasi azalaki mpe moninga ya sembo. Sikoyo, bosembo yango nyonso mibale etyamaki na komekama. Alingaki kotikala sembo epai ya nani?

Yonatane alobaki boye: “Mokonzi asalela mosaleli na ye Davidi lisumu te, mpo ye asaleli yo lisumu te mpe misala oyo asalelaki yo ezalaki malamu mingi. Mpe atyaki molimo na ye na likama mpe abomaki Mofilistia wana, bongo Yehova apesaki Yisraele mobimba lobiko moko monene. Omonaki yango, mpe osepelaki. Bongo mpo na nini okosalela makila ya moto oyo azali na likambo te lisumu na ndenge okobomisa Davidi mpamba?” Likambo ya kokamwa, Saulo ayokelaki Yonatane mpe alapaki kutu ndai ete akosala Davidi mabe te. Kasi Saulo azalaki kotosa maloba na ye te. Ntango bato bakómaki kokumisa Davidi mingi lisusu, zuwa ya Saulo ekómaki lisusu makasi na boye ete abwakelaki Davidi likɔnga! (1 Samwele 19:4-6, 9, 10) Kasi Davidi amibatelaki mpe akimaki ndako ya Saulo.

Ekómelá yo naino te opona soki okotikala sembo epai ya nani? Ekoki kozala mpasi mingi mpenza. Na makambo ya ndenge wana, bato mosusu bakoki koloba na yo ete osengeli ntango nyonso kotya libota na yo na esika ya liboso. Kasi Yonatane ayebaki ete kosala bongo ezali malamu te. Ndenge nini akokaki komitya na ngámbo ya tata na ye, nzokande Davidi azalaki sembo mpe azalaki kotosa Yehova? Yango wana, Yonatane atikaki ete bosembo na ye epai ya Yehova esalisa ye azwa ekateli. Yango nde esalaki ete amitya na ngámbo ya Davidi. Kasi, ata bongo, bosembo ya Yonatane epai ya Nzambe nde ezalaki na esika ya liboso. Amonisaki ete azalaki sembo epai ya tata na ye na ndenge apesaki ye toli na bosembo nyonso na esika ayebisa ye makambo oyo matoi na ye ekosepela koyoka. Mokomoko na biso akozwa matomba soki amekoli Yonatane na likambo etali komonisa bosembo.

Esɛngaki nini mpo atikala sembo?

Yonatane amekaki lisusu kosalisa Saulo ayokana ná Davidi, kasi na mbala oyo, Saulo alingaki ata kutu te koyoka Yonatane. Davidi ayaki epai ya Yonatane na kobombana, mpo na koyebisa ye ete azalaki kobanga mpo na bomoi na ye. Ayebisaki Yonatane boye: “Litambe kaka moko nde ekaboli ngai na liwa!” Yonatane andimaki ete akoluka koyeba makanisi ya tata na ye mpe akoyebisa Davidi soki Saulo akolinga kozongisa kimya ná Davidi. Ntango Davidi akobombana, Yonatane akosalela makula mpe litimbo mpo na kopesa ye nsango. Yonatane asɛngaki kaka Davidi ete alapela ye ndai oyo: “Okolongola te motema boboto na yo epai ya ndako na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te. Ata mpe ntango Yehova akolongola banguna ya Davidi, moto nyonso oyo azali na mabele.” Davidi andimaki ete akobatela ntango nyonso bato ya ndako ya Yonatane.​—1 Samwele 20:3, 13-27.

Yonatane amekaki koloba malamu mpo na Davidi epai ya Saulo, kasi mokonzi asilikaki makasi! Abengaki Yonatane “mwana ya mwasi ya mosala oyo azali motomboki” mpe alobaki ete bosembo ya Yonatane epai ya Davidi ezalaki nsɔni mpo na libota na bango. Amekaki komonisa Yonatane ete asengeli koluka naino liboso matomba na ye moko; alobaki na ye boye: “Mikolo nyonso oyo mwana ya Yese akozala na bomoi na mabele, yo ná bokonzi na yo bokoumela te.” Maloba yango esalaki ye eloko te, yango wana Yonatane alobaki lisusu na tata na ye boye: “Mpo na nini abomama? Asali nini?” Saulo atombokaki mabe! Atako akómaki mokóló, Saulo azalaki kaka elombe ya bitumba. Abwakelaki mwana na ye likɔnga! Atako ayebaki mpenza kobwaka likɔnga, kasi ezwaki Yonatane te. Lokola epesaki ye mpasi na motema mpe nsɔni, Yonatane abimaki na nkanda.​—1 Samwele 20:24-34.

Yonatane akweaki te na motambo ya koluka kaka matomba na ye moko

Na mokolo oyo elandaki, Yonatane akendaki na ntɔngɔ pene ya elanga epai Davidi abombanaki. Abwakaki likula ndenge bayokanaki na Davidi mpo ayeba ete Saulo azalaki kaka kokana koboma ye. Na nsima, Yonatane azongisaki mosaleli na ye na engumba. Atikalaki kaka ye ná Davidi mpe bazwaki libaku ya kosolola mpo na ntango mokuse. Bango nyonso mibale balelaki, na mawa nyonso, Yonatane apesaki moninga na ye mbote ya nsuka wana Davidi abandaki bomoi ya sika ya kokimakima.​—1 Samwele 20:35-42.

Na ntango wana ya mpasi, Yonatane amonisaki ete azalaki mpenza sembo mpe azalaki koluka matomba na ye moko te. Satana, monguna ya bato nyonso ya sembo, alingaki kosepela soki Yonatane alandaki lokolo ya Saulo mpe atyaki matomba na ye moko ya kozala mokonzi na esika ya liboso. Kobosana te, Satana asepelaka kosalela mposa oyo bato bazalaka na yango ya koluka liboso matomba na bango moko. Alongaki Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso. (Ebandeli 3:1-6) Kasi, alongaki Yonatane te. boye, Satana ayokaki mpenza mabe! Yo mpe okotɛmɛla komekama ya ndenge wana? Tozali kobika na eleko oyo bato mingi bakómi koluka matomba na bango moko. (2 Timote 3:1-5) Tokolinga komekola ezaleli oyo Yonatane amonisaki ya koboya koluka matomba na ye moko mpe ya kozala sembo?

Lokola azalaki moninga ya sembo, Yonatane ayebisaki moninga na ye Davidi akima mpo na komibatela na likama

“Ozalaki kosepelisa ngai mingi”

Saulo ayinaki Davidi koleka ndelo. Yonatane azangaki ndenge ya kosalisa tata na ye ntango mabe na ye ezalaki se kobakisama, azalaki kosangisa basoda na ye mpe kotambwisa bango ekólo mobimba mpo na koluka koboma moto oyo asali ata mabe moko te. (1 Samwele 24:1, 2, 12-15; 26:20) Yonatane apesaki Saulo mabɔkɔ? Likambo ya esengo, Biblia elobeli ye te na likambo wana ya bozoba. Ekokaki kosalema te ete Yonatane asala bongo mpo azalaki sembo epai ya Yehova, epai ya Davidi mpe na ndai ya boninga oyo alapaki.

Atikaki ata moke te kolinga moninga na ye wana ya elenge. Na nsima, alukaki ndenge ya kokutana lisusu na Davidi. Ezalaki na Horeshe, oyo elimboli “esika ya banzete.” Horeshe ezalaki na zamba, etúká moko ya ngombangomba oyo mbala mosusu ezalaki mosika mpenza na sudi-ɛsti ya Hebrone. Mpo na nini Yonatane atyaki bomoi na ye na likama mpo na koluka moto oyo azalaki kokimakima? Biblia elobi ete azalaki na mposa ya kosalisa Davidi “atyela Nzambe motema.” (1 Samwele 23:16) Ndenge nini Yonatane asalaki yango?

Alobaki na moninga na ye boye: “Kobanga te.” Abakisaki boye mpo na kokitisa ye motema: “Lobɔkɔ ya tata na ngai Saulo ekozwa yo te.” Nini etindaki ye aloba maloba yango? Mpo Yonatane azalaki na kondima makasi ete mokano ya Yehova ekokokisama. Alobaki lisusu: “Okokóma mokonzi ya Yisraele.” Nzambe atindaki mosakoli Samwele bambula mingi liboso ayebisa Davidi likambo yango mpe sikoyo, Yonatane akundweli Davidi ete maloba ya Yehova ekokisamaka kaka. Yonatane akanisaki nini mpo na avenire na ye moko? “Nakokóma moto ya mibale, nsima na yo.” Amonisaki mpenza ete azalaki moto ya komikitisa! Alingaki kosepela kosala na nse ya litambwisi ya mobali oyo azalaki leki na ye ya mbula 30 mpe kopesa ye mabɔkɔ! Yonatane asukisaki boye: “Tata na ngai Saulo mpe ayebi likambo yango.” (1 Samwele 23:17, 18) Saulo ayebaki na motema ete akolonga te kobundisa moto oyo Yehova aponi azala mokonzi nsima na ye!

Yonatane alendisaki Davidi ntango azalaki na yango mposa

Na bambula oyo elandaki, na ntembe te Davidi azongisaki makanisi nsima mpe azalaki kokanisa bokutani wana. Ezalaki mbala ya nsuka bákutana. Likambo ya mawa, Yonatane akómaki moto ya mibale te nsima ya Davidi ndenge akanisaki.

Yonatane akendaki etumba ná tata na ye mpo na kobundisa Bafilistia, banguna mpenza ya Bayisraele. Akokaki kobunda na lisosoli malamu elongo na tata na ye mpo atikaki te ete mabe ya tata na ye ebebisa mosala na ye mpo na Yehova. Abundaki na mpiko mpe na bosembo ndenge amesanaki kosala mpo na Yisraele, kasi makambo ebebelaki kaka Yisraele. Saulo akɔtaki kutu na misala ya bilimo mabe, likambo oyo Mibeko ya Nzambe esɛngaki bákatela moto etumbu ya liwa, yango wana Yehova azalaki lisusu te kopambola Saulo. Bana misato ya Saulo, ata mpe Yonatane bakufaki na etumba. Saulo azokaki mabe mpe amibomaki.​—1 Samwele 28:6-14; 31:2-6.

Yonatane alobaki boye: “Okokóma mokonzi ya Yisraele, mpe ngai, nakokóma moto ya mibale.”​—1 Samwele 23:17

Epesaki Davidi mawa makasi. Mobali yango oyo ayebaki kolimbisa, alelaki kutu Saulo, oyo alukelaki ye mpasi mingi! Davidi akomaki loyembo ya mawa mpo na Saulo mpe Yonatane. Mbala mosusu maloba ya kosimba motema na loyembo yango elobelaki nde moninga ya Davidi oyo azalaki kolinga mingi: “Nayoki mpasi mingi mpo na yo, ndeko na ngai Yonatane,Ozalaki kosepelisa ngai mingi.Bolingo na yo epai na ngai elekaki mpenza bolingo ya basi.”​—2 Samwele 1:26.

Davidi abosanaki ata moke te elako oyo asalelaki Yonatane. Bambula mingi na nsima, alukaki Mefiboshete mwana ya Yonatane oyo azalaki ebɔsɔnɔ mpe asalisaki ye. (2 Samwele 9:1-13) Ezali polele ete, Davidi azwaki mateya mingi mpo na bosembo ya Yonatane, lokumu mpe mposa na ye ya kotikala sembo epai ya moninga na ye ata ntango bosembo yango emekamaki makasi mpenza. Biso mpe tokozwa liteya na likambo yango? Tokoki koluka baninga lokola Yonatane? Biso moko tokoki kozala baninga ya ndenge wana? Soki tosalisi baninga na biso bákóma na kondima makasi epai ya Yehova, soki totye bosembo na biso epai ya Yehova na esika ya liboso, mpe totikali sembo na esika ya koluka liboso matomba na biso moko, tokozala lolenge ya moninga oyo Yonatane azalaki. Mpe tokomekola kondima na ye.

^ par. 7 Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Yonatane, na ebandeli ya boyangeli ya Saulo, azalaki komanda ya limpinga ya basoda mpe ekoki kozala ete azalaki na mbula soki 20. (Mitángo 1:3; 1 Samwele 13:2) Saulo ayangelaki mbula 40. Na yango, ntango Saulo akufaki, Yonatane azalaki na mbula soki 60 mpe Davidi azalaki na mbula 30. (1 Samwele 31:2; 2 Samwele 5:4) Boye, emonani ete Yonatane azalaki mokóló ya Davidi ya mbula soki 30.