MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nini ekoki kopesa ngai mposa ya kosalaka ngalasisi?
Mpo na nini nasengeli kosala ngalasisi?
Na bamboka mosusu, bilenge bakipaka mpenza te kosala ngalasisi mpe yango etyaka sante na bango na likama. Ezali mpamba te soki Biblia elobi ete “ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.” (1 Timote 4:8) Talelá makambo oyo:
Ngalasisi ekoki kosalisa yo omiyoka malamu. Kosala ngalasisi esalaka ete nzoto na yo ebimisa ba-endorphines; biloko oyo ezalaka na kati ya bɔɔngɔ, oyo esalaka ete omiyoka malamu mpe ozala na esengo. Bato mosusu balobaka ete ngalasisi ezalaka nkisi ya kokitisa mitungisi.
“Soki nakimi mbangu na ntɔngɔ liboso ya kosala makambo mosusu, nasalaka mosala malamu mpe nazalaka na esengo mokolo mobimba. Kokima mbangu esalaka ete namiyoka malamu.”—Regina.
Ngalasisi ekoki kosala ete nzoto na yo ezala kitoko. Kosala ngalasisi kozanga kolekisa ndelo ekoki kokómisa yo makasi, kobongisa sante na yo mpe omityela mwa motema.
“Namiyokaka malamu soki nadiembeli mbala zomi na ebende moko. Eleki mbula moko nazalaki kokoka kodiembela bongo ata mbala moko te! Oyo eleki ntina, nayebi ete nazali kokipe nzoto na ngai.”—Olivia.
Ngalasisi ekoki kokómisa bomoi na yo molai. Soki ozali kosala bamuvema, motema ekobɛta malamu mpe mpema na yo ekozala malamu. Ngalasisi oyo esalaka ete motema mpe pumɔ esala malamu ekoki kosala ete makila etambola malamu na nzoto mpe moto abɛla maladi ya motema te oyo ezali koboma bato mingi.
“Soki tozali na programɛ ya malamu ya kosala ngalasisi, tokomonisa Mokeli na biso ete tozwaka na valɛrɛ nzoto oyo apesá biso.”—Jessica.
Na mokuse: Kosala ngalasisi ezali na matomba mpo na sante mpo na mikolo ezali koya mpe ekoki komemela yo matomba ata sikoyo. Elenge mwasi moko na nkombo Tonya, alobi boye: “Okotikala koloba te ete ‘ebongaki te nakende komata bangomba to kokima mbangu.’ Nayokaka mawa ata moke te ndenge nasalaki milende mpo na kosala ngalasisi.”
Nini ezali kopekisa ngai?
Ekoki kozala na makambo ebele oyo ezali kopekisa yo:
Mposa ezali te. “Nakanisi, ntango bazali naino bilenge, bato bamonaka ete eloko moko te ekoki kokómela bango. Ezali mpasi kokanisa ete mokolo mosusu sante na yo ekoki kobeba. Okoki kokanisa ete kaka mibange nde batungisamaka mpo na sante.”—Sophia.
Ntango ezali te. “Lokola makambo ya kosala ezali ebele, esɛngaka nabomba ntango mpo na kolya malamu mpe kolala, kasi kozwa ntango ya kosala ngalasisi ezalaka ntango nyonso mpasi mpo na ngai.”—Clarissa.
Nakomisá nkombo te na centre moko ya gymnastique. “Kozala na sante ya malamu esɛngaka mbongo. Esɛngaka ofuta mbongo mpo na kokende na centre moko ya gymnastique!”—Gina.
Kanisá naino:
Nini mpenza epekisaka yo osala ngalasisi? Ekosɛnga osala makasi mpo na kolonga likambo oyo epekisaka yo kosala ngalasisi, kasi kosala bongo ekozala mosala ya mpunda te.
Epai wapi nakoki kozwa ngalasisi oyo ebongi na ngai?
Mwa makanisi yango oyo:
Yo moko kipe sante na yo.—Bagalatia 6:5.
Boyá komilongisa. (Mosakoli 11:4) Na ndakisa, esɛngi te okomisa nkombo na centre moko ya gymnastique mpo obanda kosala ngalasisi. Luká likambo moko oyo osepelaka kosala mpe tyá yango na programɛ na yo.
Mpo ozwa makanisi, tuná basusu basalaka nini mpo na kosala ngalasisi.—Masese 20:18.
Zalá na programɛ oyo eyebani. Mityelá mikano mpe komáká mikano oyo okokisi mpo epesa yo mposa ya kokoba.—Masese 21:5.
Luká moto oyo bokobanda kosala na ye ngalasisi. Soki “ozwi moninga oyo bokosala na ye ngalasisi,” akoki kolendisa yo mpe kosalisa yo okoba kosala yango.—Mosakoli 4:9, 10.
Yebá ete na bantango mosusu okokutana na makambo oyo ekopekisa yo kosala ngalasisi, kasi soki ekómeli yo, kotika te kosala ngalasisi.—Masese 24:10.
Kolekisa ndelo te
Biblia elobi na mibali mpe basi ete ‘bálekisaka ndelo te na bizaleli na bango.’ (1 Timote 3:2, 11) Boye, kolekisa ndelo te ntango ozali kosala ngalasisi. Mbala mingi, bato oyo balekisaka ndelo bazwaka litomba te. Elenge mwasi moko na nkombo Julia, alobi boye: “Soki bapake ya nzoto ya mwana mobali eleki mayele na ye, ebendaka likebi na ngai te.”
Kebá mpe na bafɔtɔ mosusu oyo bato babambaka na bifelo ‘oyo ezalaka na mwa bafraze’ lokola “soki omoni ete olɛmbi makasi, salá mosusu.” Toli ya bongo ekoki kobebisa sante na yo mpe kosala ete olongola makanisi na “makambo oyo eleki ntina” na bomoi.—Bafilipi 1:10.
Lisusu, na esika maloba yango elendisa yo, ekoki nde kolɛmbisa yo. Elenge mwasi moko na nkombo Vera, alobi boye: “Bilenge basi mingi babombaka bafɔtɔ ya bato oyo bango balingi kozala lokola bango mpe batalaka bafɔtɔ yango ntango bazali na mposa ya kosala ngalasisi te. Kasi, basukaka na komikokanisa na bango mpe balɛmbaka nzoto. Eleki malamu komityela mokano ya kobongisa sante na yo, na esika ya kobongisa kaka nzoto na yo.”