Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Nazali lisusu te moto ya mobulu”

“Nazali lisusu te moto ya mobulu”
  • Abotamá na: 1973

  • Ekólo: Ouganda

  • Bomoi ya kala: Moto ya mobulu, molangwi-masanga, mpe moto ya mbindo

NDENGE NAZALAKI

 Nabotamá na Ouganda na etúká ya Gomba, epai bato mingi bazalaki babola mpenza. Engumba na biso ezalaki na kura te, yango wana na butu, tozalaki kotambola na miinda ya petrole na mabɔkɔ.

 Baboti na ngai, oyo bazalaki basali-bilanga, balongwaki Rwanda mpe bakendaki kofanda na Ouganda. Bazalaki kolona kafe, bitabe, mpe bazalaki kosala na bitabe yango masanga oyo eyebani mingi na nkombo waragi. Baboti na ngai bazalaki mpe kobɔkɔla bansoso, bantamba, bangulu mpe bangɔmbɛ. Momeseno ya mboka na biso mpe ndenge bateyá ngai etindaki ngai namona ete mwasi asengeli kotosa mobali na ye ntango nyonso mpe asengeli soki moko te kopesa makanisi na ye.

 Ntango nazalaki na mbula 23, nakendaki na Rwanda, nazalaki kokende kobina elongo na bilenge ya mbula na ngai na banganda ya butu. Nazalaki kokende mbala na mbala na moko ya banganda yango, epai mokambi na yango apesaki ngai ndingisa ya kokɔta ofele. Nazalaki mpe kolinga bafilme ya mobulu mpe ya bitumba. Bato oyo nazalaki kosala boninga na bango mpe kominanola na ngai esalaki ete nakóma moto ya mobulu, molangwi-masanga mpe moto ya mbindo.

 Na 2000, nabandaki kofanda na elenge mwasi moko na nkombo Skolastique Kabagwira, mpe tobotaki bana misato. Na kolanda ndenge bateyá ngai na bolenge, nazalaki komizela ete mwasi apesaka ngai limemya wana afukami liboso na ngai ntango azali kopesa ngai mbote mpe kosɛnga eloko. Mpe nazalaki koloba ete biloko ya libota ezali ya ngai mpe nasengeli kosalela yango ndenge nalingi. Nazalaki mbala na mbala kobima na butu mpe kozonga na ndako na ngonga ya misato ya ntɔngɔ, mpe nazalaki komɛla mingi. Ntango nazalaki kobɛta porte, mpe soki Skolastique aumeli mpo na kofungola yango, nazalaki kobɛta ye.

 Na eleko yango, nazalaki mokambi na kompanyi ya moto moko ya sécurité, mpe nazalaki kozwa mbongo mingi. Na ndako, Skolastique azalaki komeka kondimisa ngai nakóma kosambela na lingomba na ye ya Pantekote, kasi nandimaki te ete yango ekobongola ngai. Kutu nasepelaki na yango te. Nakómaki kolingana na mwasi mosusu. Yango wana, mpo na mobulu mpe etamboli ya mbindo oyo azalaki na yango etindaki Skolastique azwa bana na biso misato mpe akende na bango epai ya baboti na ye.

 Moninga na biso moko ya kala asololaki na ngai mpo na lolenge ya bomoi oyo nazalaki na yango. Alendisaki ngai nazongela Skolastique. Alobaki ete bana na ngai ya kitoko boye basengelaki te kokabwana na tata na bango. Yango wana na 2005, natikaki komɛla masanga, nasundolaki mwasi mosusu wana, mpe nazongelaki Skolastique. Na 2006 tobalanaki. Atako bongo, nazalaki kaka moto ya mobulu mpe nazalaki kobɛta mwasi na ngai.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Na 2008, Motatoli ya Yehova moko na nkombo Joël abɛtaki na porte na biso mpe nalandaki na likebi nsango oyo amemelaki ngai. Na boumeli ya basanza mingi ye ná Motatoli mosusu, na nkombo Bonaventure, bazalaki koya kotala ngai mbala na mbala, mpe tozalaki kolobela mateya ya Biblia. Natunaki mituna mingi, mingimingi na oyo etali mokanda ya Emoniseli. Na ntembe te nazalaki kolinga komonisa ete Batatoli ya Yehova bateyaka mateya ya solo te. Na ndakisa, natunaki ndenge Batatoli ya Yehova balobaka ete “ebele mpenza ya bato” oyo Emonseli 7:9 elobi bakofanda na mabele, ntango vɛrsɛ yango elobi ete “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi [ya Nzambe] mpe liboso ya Mwana-Mpate,” Yesu Kristo. Na motema molai nyonso, Joël ayanolaki na mituna na ngai. Na ndakisa, alakisaki ngai Yisaya 66:1, epai Nzambe abengi mabele “ebonga ya makolo” na ye. Yango wana, ebele mpenza ya bato bazali kotɛlɛma na mabele liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe. Mpe natángaki na Nzembo 37:29, epai elobi ete bayengebene bakofanda na mabele seko.

 Nsukansuka, nandimaki koyekola Biblia. Yango wana, Bonaventure azalaki koyekola na ngai mpe na Skolastique Biblia. Wana tozalaki koyekola Biblia, nalendisamaki mpo na kosala mbongwana na bomoi na ngai. Nayekolaki ndenge ya kosalela mwasi na ngai makambo na limemya. Nalingaki lisusu te afukamaka liboso na ngai ntango azali kopesa ngai mbote to kosɛnga eloko moko, mpe natikaki koloba ete biloko nyonso ya libota ezali ya ngai. Natikaki mpe kotala bafilme ya mobulu. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai kosala mbongwana yango mpe esɛngaki komipekisa mpenza mpe komikitisa.

Biblia esalisaki ngai nakóma mobali ya malamu koleka

 Mwa bambula na nsima, nasɛngaki mwana na ngai ya liboso, Christian, aya kofanda na biso na Ouganda. Kasi nsima ya kotánga Kolimbola Mibeko 6:4-7, namonaki ete ngai ná mwasi na ngai tozali na mokumba oyo Nzambe apesi biso mpo na kobɔkɔla bana na biso, oyo esɛngi mpe koteya bango mibeko ya Nzambe. Biso ná mwana na biso tozalaki na esengo mingi ntango azongaki na ndako!

MATOMBA OYO NAZWI

 Nayekolaki ete Yehova azali Nzambe ya motema mawa, mpe nandimaki ete alimbisaki ngai mpo na makambo mpe etamboli oyo nazalaki na yango liboso. Nazalaki na esenge ndenge Skolastique andimaki báyekolisa biso Biblia elongo. Topesaki bomoi na biso epai ya Yehova mpe tozwaki batisimo elongo na mokolo ya 04/12/2010. Sikoyo tozali kotyelana motema, mpe tozali kosepela kosalela mibeko ya Nzambe na libota na biso. Mwasi na ngai azali kosepela mpenza ndenge nazongaka mbala moko na ndako nsima ya mosala. Azali mpe kosepela ndenge nazali sikoyo kosalela ye makambo na ndenge ya lokumu mpe na limemya, mpe ndenge nazwaki ekateli ya koboya komɛla masanga oyo elengwisaka, mpe nazali lisusu te moto ya mobulu. Na 2015, nakómaki nkulutu na lisangá na biso. Kati ya bana na biso mitano, misato basili kozwa batisimo.

 Ntango nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, nazalaki te kondima makambo oyo bazalaki koteya ngai. Kasi nakamwaki ndenge bazalaki kosalela Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai. Ngai ná Skolastique toyaki komona ete baoyo balobaka ete basalelaka Nzambe ya solo basengeli kozala na bomoi oyo eyokani na mibeko na ye, mpe kozwa yango na valɛrɛ mingi. Nazali mpenza na botɔndi ndenge Yehova abendaki ngai mpe ete nazali na kati ya libota na ye ya elimo. Soki nataleli bomoi oyo nazalaki na yango, namindimisi ete na lisalisi ya Nzambe, moto nyonso ya motema sembo akoki kobongwana mpo na kosepelisa ye.