Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Kosala mabe mpe kolinga mbongo mingi ememelaki ngai mpasi na bomoi”

“Kosala mabe mpe kolinga mbongo mingi ememelaki ngai mpasi na bomoi”
  • Abotamá na: 1974

  • Ekólo: Albanie

  • Bomoi ya kala: Moyibi, motɛki ya drɔgɛ, moto ya bolɔkɔ

NDENGE NAZALAKI

 Nabotamá na libota moko ya bobola na Tiranë, mboka-mokonzi ya ekólo Albanie. Tata na ngai azalaki moto ya sembo oyo azalaki kosala mosala bangonga mingi mpo na kokokisa bamposa na biso. Kasi mbala na mbala tozalaki kozanga mbongo mpo na biloko ya kobikela. Ntango nazalaki elenge, namonaki ete tozali babola mpe yango ezalaki kopesa ngai mawa. Nalekisaki bomwana na ngai ntango nyonso makolo ngulu mpo nazalaki na sapato te.

 Nabandaki koyiba ntango nazalaki naino elenge mpenza. Nazalaki kokanisa kosala bongo ezalaki kaka mpo na kosalisa libota. Nsukansuka, bakonzi ya polisi bakómaki kolandela ngai. Yango wana na 1988, ntango nazalaki na mbula 14, tata akɔtisaki ngai na kelasi. Nalekisaki mbula mibale kuna mpe nayekolaki mosala ya kokangisa mabende. Nsima na yango, nalingaki koluka mbongo na bosembo mpenza, kasi nazwaki mosala te. Bato mingi bazangaki mosala mpo ekólo Albanie ezalaki na yikiyiki na makambo ya politiki. Lokola nalɛmbaki nzoto, nazongelaki lisusu baninga na ngai ya kala mpe nabandaki koyiba lisusu. Nsukansuka, bakangaki ngai ná baninga na ngai na bolɔkɔ mpe bakatelaki biso etumbu ya mbula misato ya bolɔkɔ.

 Nsima ya kobima na bolɔkɔ, nakobaki kosala mabe. Nkita ya ekólo Albanie ebebaki makasi, mpe mboka ekómaki na bobola mpenza. Na ntango wana ya mobulu, nazwaki mbongo mingi mpenza na misala oyo elongobani te. Nsima ya kokɔtela bato na minduki na bandako, bakangaki baninga na ngai mibale, natikaki mboka na ngai mpo na kokima etumbu ya bambula ebele ya bolɔkɔ. Na ntango yango, nabalaki mwasi na ngai, Julinda, mpe tozalaki na bebe moko.

 Tokómaki kofanda na Angleterre. Nazalaki na mposa ya kobanda bomoi ya sika elongo na mwasi na ngai mpe mwana na biso, kasi ezalaki mpasi natika bomoi na ngai ya kala. Eumelaki te namikɔtisa lisusu na makambo ya mobulu, na mbala oyo, nazalaki kotɛka drɔgɛ. Nazalaki kozwa mbongo mingi mpenza.

 Ndenge nini Julinda azalaki kotalela mosala oyo nazalaki kosala? Tiká ye moko aloba: “Nakoli na ekólo Albanie, nazalaki na mposa ya bomoi ya bobola te. Nandimaki kosala nyonso mpo nazala na bomoi ya malamu. Nakanisaki mbongo ekosala ete tózala na bomoi ya malamu, yango wana napesaki mobali na ngai Artan mabɔkɔ mpenza na makambo ya kokosa, koyiba, mpe kotɛka drɔgɛ, mpo na kozwa kaka mbongo.”

“Napesaki mobali na ngai Artan mabɔkɔ mpenza na makambo ya kokosa, koyiba, mpe kotɛka drɔgɛ.”​—Julinda

 Lisusu na 2002, bomoi na biso ebongwanaki, bilikya na biso nyonso mpe makambo oyo tozalaki kokana ebebaki mpenza. Bakangaki ngai na ebele ya badrɔgɛ mpe batyaki ngai lisusu na bolɔkɔ.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Biblia ebandaki kobongola bomoi na ngai kozanga ete ngai moko nayeba yango. Na 2000, Julinda akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe abandaki koyekola Biblia na bango. Nazalaki kosepela te kosolola makambo ya Biblia mpo namonaki ezalaki lokola komitungisa mpamba. Kasi Julinda azalaki kolinga yango. Alobi boye: “Nauti na libota oyo basangani na yango basambelaka, nalingaka mpe namemyaka Biblia. Nazalaki ntango nyonso na mposa ya koyeba makambo oyo Biblia eteyaka, mpe nazalaki kosepela koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nazalaki komona makambo mingi oyo Biblia eteyaka ezali solo. Makambo oyo nayekolaki esalisaki ngai nabongola makambo mosusu na bomoi na ngai. Kasi ebongolaki te ndenge na ngai ya kotalela mbongo, tii ntango bakangaki Artan na bolɔkɔ. Na ntango wana nde nayaki kobongola makanisi na ngai. Mpe nayaki koyeba ete makambo oyo Biblia elobi mpo na mbongo ezali solo. Tosalaki nyonso mpo na kozwa mbongo, kasi epesaki biso esengo te. Na nsima, nayaki koyeba ete nasengelaki kotosa mibeko nyonso ya Yehova.”

 Na 2004, nabimaki na bolɔkɔ, mpe eumelaki te, nazongelaki lisusu mosala na ngai ya kotɛka drɔgɛ. Kasi, makanisi ya Julinda ebongwanaki, mpe likambo moko oyo alobaki ezongisaki ngai na nzela, ayebisaki ngai boye: “Nalingi lisusu te mbongo na yo. Nalingi mobali na ngai azonga, mpe nalingi tata ya bana na ngai azala awa mpo na bango.” Epesaki ngai mpasi, kasi alobaki solo. Nalekisaki ntango mingi mosika na libota na ngai. Nazalaki mpe kokanisa mikakatano nyonso oyo nakutanaki na yango ya koluka mbongo na ndenge oyo elongobani te. Yango wana, nazwaki ekateli ya kobongola bomoi na ngai mpe kokata boyokani nyonso na baninga na ngai ya kala.

 Likambo oyo esalaki mpenza nabongola makanisi na ngai ezalaki ntango nakendaki na mwasi na ngai mpe bana na biso mibale na makita ya Batatoli ya Yehova. Nakamwaki na bosembo mpe boboto ya bato oyo nakutanaki na bango kuna. Nsukansuka, nabandaki koyekola Biblia.

Nazalaki kokanisa soki tozali na mbongo mingi, tokozwa esengo

 Nayekolaki na Biblia ete “bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe lokola bamosusu bakolisi bolingo wana . . . bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Timote 6:9, 10) Nakangaki mpenza ntina ya maloba ya vɛrsɛ yango! Nazalaki mpenza koyoka mawa na makambo mabe mpe mpasi oyo bomoi na ngai ya kala ememelaki ngai ná libota na ngai. (Bagalatia 6:7) Ntango nayekolaki bolingo oyo Yehova ná Mwana na ye, Yesu Kristo, bamoniselaki biso, nabandaki kobongola bomoto na ngai. Nakómaki lisusu te kokanisa mingi mpo na ngai, kasi mpo na bato mosusu, mpe nakómaki kolekisa ntango mingi elongo na libota na ngai.

MATOMBA OYO NAZWI

 Nazwaki matomba na toli oyo ya Biblia: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.” (Baebre 13:5) Sikoyo nazali na kimya ya makanisi mpe lisosoli ya pɛto. Yango epesi ngai esengo oyo nayoká naino te liboso. Libala na ngai ezali makasi mpe tozali na boyokani malamu na libota.

 Nazalaki kokanisa ete soki tozali na mbongo mingi, tokozwa esengo. Sikoyo namoni polele ete kosala mabe mpe kolinga mbongo mingi ememelaka moto mpasi na bomoi. Tozali na mbongo mingi te, kasi namoni ete tozali na eloko moko oyo eleki ntina na bomoi na biso, elingi koloba, boyokani malamu elongo na Yehova Nzambe. Kosambela ye na bomoko na libota epesaka biso esengo ya solosolo.

Elongo na libota na ngai na liyangani ya Batatoli ya Yehova