Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Loyembo 137

Pesá biso mpiko

Pesá biso mpiko

Zwá:

(Mis. 4:29)

  1. Tósakola nde Bokonzi,

    Tóyebisa nkombo n’o,

    Batɛmɛli baza’ mingi

    Mpo básambwisa biso.

    Tokobanga bango te,

    Tosengeli kotosa yo.

    Tosɛngi yo elimo santu;

    Ee Yehova, yoká biso.

    (MONDIMO)

    Pesá mpiko tósakola;

    Salisá tóbanga te.

    Pesá biso nde molende

    Mpo mokili eyoka.

    Armagedon ebɛlɛmi,

    Tii mokolo yango eya,

    Pesá mpiko tósakola.

    Tosɛngi yo.

  2. Ata tokoki kobanga,

    Tozali nde putulu.

    N’elaka ya kosunga nde

    Totye motema nyonso.

    Na makaneli nyonso

    Tyá likebi mpe mon’ango.

    Sungá biso nyonso tókoba

    Kosakola nkombo na yo.

    (MONDIMO)

    Pesá mpiko tósakola;

    Salisá tóbanga te.

    Pesá biso nde molende

    Mpo mokili eyoka.

    Armagedon ebɛlɛmi,

    Tii mokolo yango eya,

    Pesá mpiko tósakola.

    Tosɛngi yo.