MITUNA YA BATÁNGI . . .
Makambo oyo bato basalaka na Noele ezali mabe na nini?
Banda kala, bato balobaka ete Noele ezali fɛti oyo bakristo bakumisaka mbotama ya Yesu. Kasi, makambo mingi oyo basalaka na fɛti yango etindi biso tómituna soki ekɔtaki ndenge nini na mbotama ya Yesu.
Tólobela naino Père Noël. Ndenge batyaka Père Noël mandɛfu ya mpɛmbɛ, langi ya rozɛ na matama mpe alataka bilamba ya motane eyebani lokola piblisite ya fɛti ya Noele oyo ekendá nsango, oyo kompanyi moko ya masanga na Amerika ya nɔrdi esalaki na 1931. Na boumeli ya bambula ya 1950, bato mosusu ya Brésil balukaki kotya Grandpa Indian, moto moko ya masapo ya mboka na bango na esika ya Père Noël. Nini esalemaki? Profesɛrɛ Carlos Fantinati alobi ete Père Noël alongaki Grandpa Indian mpe “azwaki kutu lokumu koleka bebe Yesu mpe akómaki elembo oyo eyebani mpo na fɛti oyo basalaka mokolo ya 25 ya sanza ya 12.” Kaka Père Noël nde ezali likambo ya mabe na fɛti yango? Mpo na kozwa eyano, tózonga naino na ebandeli ya lisangá ya bokristo.
Buku moko (Encyclopedia Britannica) elobi boye: “Na boumeli ya basiɛklɛ mibale oyo lisangá ya bokristo esalaki, bakristo batɛmɛlaki mpenza likambo ya kosala bafɛti ya mbotama ya bamartiru to ya Yesu.” Mpo na nini? Mpo bazalaki kotalela bafɛti ya mbotama lokola mimeseno ya bapakano, likambo oyo basengelaki koboya mpenza. Kutu, dati ya mbotama ya Yesu ezali ata na esika moko te na Biblia.
Atako bakristo ya liboso baboyaki bafɛti ya mbotama, kasi na siɛklɛ ya minei ya ntango na biso, Eglize Katolike ebandisaki fɛti ya Noele. Eglize Katolike elingaki ete mangomba ya bapakano ya Roma oyo ezalaki na lokumu mingi mpe bafɛti na yango oyo babengi solstice d’hiver, oyo ezalaki kotya yango mpanzi-likoló elongwa mpo yango epika misisa. Na buku na ye (Christmas in America) Penne Restad alobaki ete mbula nyonso, kobanda mokolo ya 17 ya sanza ya 12 tii mokolo ya liboso ya sanza ya yambo “Baroma mingi bazalaki kosala bafɛti, masano, kosepela, badefile mpe bafɛti mosusu mpo na kokumisa banzambe na bango.” Mpe na mokolo ya 25 ya sanza ya 12, Baroma bazalaki kosala fɛti ya mbotama ya moi, elombe oyo bakoki kolonga te. Eglize Katolike etyaki fɛti ya Noele na mokolo yango mpo na kobenda Baroma mingi bákanisaka mbotama ya Yesu kasi te mbotama ya moi. Buku (Santa Claus, a Biography) ya Gerry Bowler elobi ete Baroma “bazalaki kaka na likoki ya kosala makambo oyo bamesanaki kosala na bafɛti oyo bazalaki kosala na katikati ya eleko ya malili.” Mpo na koloba solo, “na bafɛti wana ya sika, bakobaki kosala makambo oyo bamesanaki kosala kala.”
Boye, ezali polele ete likambo ya mabe mpenza mpo na Noele ezali esika makambo oyo basalaka na fɛti yango eutá. Na buku na ye (The Battle for Christmas), Stephe Nissenbaum alobeli Noele lokola “fɛti ya bapakano oyo balatisi yango elamba ya sika mpo ebima fɛti ya bakristo.” Na yango, fɛti ya Noele eyokisaka Nzambe ná Mwana na ye Yesu Kristo nsɔni. Yango ezali likambo moke? Biblia etuni boye: “Boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko? To pole ná molili esanganaka na nini?” (2 Bakorinti 6:14) Ndenge moko na nzete oyo etɛngamá, fɛti ya Noele mpe etɛngamá, elingi koloba “ekoki kosembolama te.”—Mosakoli 1:15.