Mituna ya batángi . . .
Mpo na nini bato mosusu basalaka fɛti ya Noele te?
Na mokili mobimba, bato pene na miliare mibale basalaka fɛti ya Noele mokolo ya 25 Desɛmbɛ, nzokande bato mosusu soki milio 200 basalaka fɛti yango mokolo ya 7 Yanuali. Kasi, ezali mpe na bamilio ya bato oyo baboyaka kosala fɛti ya Noele. Mpo na nini?
Ekoki kozala mpo bazali bakristo te. Mbala mosusu, basambelaka na Lingomba ya Bayuda, Bahindu to ya Shinto. Bato mosusu oyo bandimaka te ete Nzambe azalaka, baoyo balobaka ete tokoki koyeba Nzambe te, bato ya bonsomi ya makanisi (libre penseur), baoyo basambelaka te mpe balobaka ete tokoki kozala na esengo kozanga kokota na lingomba, batalelaka Noele lokola lisapo mpamba.
Likambo ya kokamwa, bato mingi oyo bandimelaka Yesu baboyaka kosala makambo oyo esalemaka na eloko ya Noele. Mpo na nini? Mpo na bantina soki minei.
Ya liboso, bandimaka te ete Yesu abotamaki na Desɛmbɛ to na Yanuali. Biblia epesi dati ya sikisiki te. Elobi: “Kaka na mokili yango babateli ya mpate bazalaki kofanda libándá butu mobimba mpo na kobatela bitonga na bango. Mpe na mbala moko anzelu ya Yehova atɛlɛmaki pene na bango, mpe . . . anzelu yango alobaki na bango ete: ‘. . . Baboteli bino Mobikisi, oyo azali Kristo Nkolo.’”—Luka 2:8-11.
Masolo emonisaka ete Yesu abotamaki soki na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, na ntango oyo babateli ya bampate ná bitonga na bango bazalaki kolala libándá na butu na bilanga. Na sanza ya Desɛmbɛ mpe ya Yanuali, malili ezalaka makasi na bamboka oyo ezalaka pene ya Beteleme. Na yango mpo báyoka mwa molunge na butu, bakɔtisaka bitonga na kati ya mwa bandako mpo na kobatela yango.
Ntina ya mibale: Likambo kaka moko oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye basalaka ezali ya kokanisa liwa na ye, kasi mbotama na ye te; mpe esengelaki kosalema lokola mwa elambo ya bato ebele. (Luka 22:19, 20) Simbá mpe ete, baevanzile ya Marko mpe Yoane elobeli mpenza te mbotama ya Yesu.
Likambo kaka moko oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye basalaka ezali ya kokanisa liwa na ye, kasi mbotama na ye te
Ntina ya misato: Istware elobeli ata likambo moko te oyo emonisi ete bakristo ya kala bazalaki kosala fɛti ya mbotama ya Yesu. Kasi bazalaki nde kokanisa liwa na ye. (1 Bakorinti 11:23-26) Lingomba ya bokristo ebandaki mpenzampenza kosala fɛti ya Noele na mokolo ya 25 Desɛmbɛ, bambula 300 nsima ya liwa ya Yesu. Likambo ya kokamwa, na katikati ya siɛklɛ ya 17, mobeko moko ya parlema na Angleterre epekisaki fɛti ya Noele. Na États-Unis, Tribinale monene ya etúká ya Massachusetts esalaki mpe bongo. Mpo na nini? Buku moko (The Battle for Christmas) elobi boye: “Ezali ata na likambo moko te na Biblia to na istware oyo emonisi ete Yesu abotamaki mokolo ya 25 Desɛmbɛ.” Ebakisi likanisi ya ba puritains oyo ete: “Noele ezali fɛti ya bapakano oyo bato mosusu baluká kokómisa yango fɛti ya bakristo.”
Yango ememi biso na ntina ya minei: epai fɛti yango eutá. Fɛti ya Noele eutá na bafɛti oyo bapakano ya Roma bazalaki kosala mpo na kokumisa Saturne, nzambe ya bilanga mpe (Sol Invictus to Mithra), nzambe ya moi. Bato ya mayele oyo bayekolaka bomoi ya bato, Christian Rätsch mpe Claudia Müller-Ebeling oyo bapesaki mabɔkɔ na kokomama ya buku (Pagan Christmas), bakomi boye: “Ndenge moko ná mimeseno mpe makambo mingi oyo ezalaki kosalama liboso ete Yesu abotama, fɛti ya kala oyo bazalaki kosala mbula na mbula mpo kokumisa kozonga ya moi, bakómisaki yango fɛti ya mbotama ya Kristo.”
Na kotalela makambo oyo touti kolobela, omoni ntina oyo bakristo ya solo basalaka fɛti ya Noele te?