Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda euti na Grɛsi

Kosakola na sudi mpenza ya Mpoto

Kosakola na sudi mpenza ya Mpoto

BANGOMBA milai ya Levká na Esanga Krɛtɛ ebandi kolimwa mokemoke ntango masuwa na biso ezali kotambola likoló ya mai ya mbu ya Mediterane mpo na kokende na esanga moko ya moke. Na kati ya masuwa yango, tozali bato 13 oyo tozali kosala mobembo mpo na kokende kosakola na Esanga Gavdos, oyo ezali komonana moke mpenza na karte, na sudi mpenza ya Mpoto.

Ezali komonana lokola ekozala mobembo moko ya malamu mpo ezali mokolo ya moi makasi na eleko ya molunge. Kasi eumeli te, mopɛpɛ makasi ebandi kobɛta na mbu, mpe mbonge ezali komema masuwa na biso epai na epai. Lokola nazali motema likoló, nakanisi lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge ntoma Paulo akutanaki na mopɛpɛ makasi na mbu yango bankama ya bambula liboso, ntango Esanga Gavdos eyebanaki na nkombo ya Koda. (Misala 27:13-17) Kasi, nazali kaka na elikya ete tokokóma malamu na Gavdos.

Cap Trypití, na sudi mpenza ya Mpoto

Nsukansuka, tomoni esika oyo tozali kokende: ngomba moko ya mabangamabanga oyo ekɔtá na kati ya mbu. Ngomba yango ezali mwa patatalu, mpe ezali na bolai ya mɛtrɛ 300, mpe na likoló ezali mpenza nsɔngɛ te. Eteni monene ya esanga yango (26 kilomɛtrɛ-karé) etondi na banzete ya momboya, na mwa banzete ya mikemike mpe matiti. Na bisika mosusu, banzete ya jenevriye ekitá tii pembeni ya mai.

Kala, esanga yango ezalaki na bato soki 8 000. Kasi lelo oyo, bato oyo bafandaka mpenza na esanga yango bazali soki 40 mpamba. Ezali komonana ete na Gavdos bomoi ezali kaka na ndenge ya kala. Atako bamasuwa oyo ememaka biloko mpe oyo ememaka petrole elekaka mbala na mbala pembenipembeni ya esanga yango, bamasuwa oyo eutaka Krɛtɛ ekendaka kuna mingi te; mbala mingi eyaka na retare to ezangisaka mikolo mosusu soki klima ezali mabe.

Toyei na Gavdos mpo na komemela bato eloko moko ya kitoko mpe ya ntina mingi: elikya kitoko ya kozala na bomoi ya seko mpe na nzoto kolɔngɔnɔ na mikolo ezali koya. Ntango masuwa na biso elingi kosɛma, tozali na mposa ya kokita noki mpo na koyebisa bato nsango wana ya malamu.

Lokola tomoni mpasi ngonga soki minei na ndambo mpo na kokóma na Gavdos, bilongi na biso ezali komonisa ete mobembo yango ezalaki mpenza ya mpasi. Kasi nsima ya kolala mwa moke mpe komɛla mwa kɔpɔ ya kafe, tozwi makasi. Nsima ya kotalela na mokuse lisolo ya mobembo ya Paulo oyo Biblia elobeli, mpe kobondela na motema mobimba, tobandi mosala na biso ya kosakola.

Bato ya mboka yango bazali na boboto mpe bayebi koyamba bapaya. Basɛngi biso tókɔta na bandako na bango, mpe bapesi biso mwa eloko ya komɛla. Longola koyebisa bango nsango malamu, tosalisi mpe bango na makambo mosusu oyo tomoni ete bazali na bosɛnga, mpo na komonisa ete tosepeli ndenge bayambi biso. Na ndakisa, ntango ndeko moko oyo ayebi makambo ya kura azali kopesa mwasi moko litatoli, amoni eloko na ye moko ya mosala ebukani, mpe abongiseli ye yango. Yango esimbi motema ya mwasi yango. Andimi kozwa mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo topesi ye, mpe apesi biso longonya mpe akumisi mosala na biso ya kosakola. Mwasi mosusu amonisi botɔndi na ye mpe alobi boye: “Mosala na bino ezali ya Nzambe, kasi ya bato te; ndenge boyei kosakola na esanga oyo ya mosika emonisi ete ezali mpenza bongo.”

Emonani ete bato yango basepeli mingi na mikanda oyo tomemeli bango. Mobali moko andimi kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe azali na mposa ya mikanda mosusu mpo atánga yango na basanza oyo malili ezalaka makasi. Mobali mosusu asɛngi mikanda, kaka mpo na ye moko te, kasi mpe mpo atya yango na butiki na ye mpo bakiliya na ye bátángaka. Apesi biso adrɛsi na ye mpo tótindelaka ye bazulunalo sanza nyonso. Libota mosusu ekamwi mingi ntango tomonisi bango ete Biblia elobeli mwa esanga na bango. Na esengo nyonso, bango mpe bandimi kozwa bazulunalo na biso.

Libongo ya Sarakíniko, ezali komonisa ndako ya bato bakimá mboka, mpe etanda moko mpo na kokanisa bango

Atako tosepeli mingi ndenge bato ebele bandimi koyoka nsango malamu, mobembo na biso na Gavdos ezongisi na makanisi ya basusu kati na biso basuvenire ya mabe. Pene na libongo ya Sarakíniko, ezali na ndako moko oyo kala bazalaki kotya bato bakimá mboka mpo na makambo ya politiki. Emmanuel Lionoudakis, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, akimaki kuna pene na nsuka ya bambula 1930 mpo balingaki kokanga ye mpo na mosala na ye ya kosakola. * Na ntango wana, bazalaki kobenga Gavdos “esanga ekauká oyo ebimisaka kaka bankóto oyo ebomaka, esika oyo bato mingi . . . bakufaki mpo na nzala, bobola, mpe maladi, yango wana bakómaki kobenga yango esanga ya liwa.” Mpo na kozwa eloko ya kolya, ndeko Lionoudakis azalaki kolɔba mbisi, atako azalaki mpe kolekisa ntango mingi na kosakwela bato mosusu ya bolɔkɔ, mpo kaka ye moko nde azalaki Motatoli. Ntango mwana na ye ya mwasi ná mobali na ye mpe mwana na bango bamonaki esika oyo akangamaki esili koleka mbula soki 70, esalaki bango mpasi na mitema. Ndeko yango atikelá biso ndakisa malamu ya bosembo mpe ya molende na mosala ya kosakola.

Esanga Gavdos ezalaki esika moko mabe mpo na bato oyo bazalaki kokima kuna. Kasi mpo na biso, emonanaki ete ezali esika moko ya malamu, ntango tosakolaki na esanga yango mobimba na nsuka ya pɔsɔ oyo, tokabolaki bazulunalo 46, mwa babuku 9, epai ya bato wana ya boboto. Tozali kozela mbala ya nsima mpo na komona lisusu baninga oyo tozwi kuna!

Kozanga kutu tóyeba, ntango na biso ya kozonga ekoki. Kasi, kaka ndenge ezalaki ntango toyaki, klima ezali malamu te; yango wana atako tolobaki ete tokolongwa na ngonga ya 17, topusi lisusu ngonga yango. Tokɔti na masuwa na midi ya butu, mpe tozali komilɛngɛla mpo na mobembo mosusu ya mpasi. Nsukansuka, tolongwe na ngonga ya 3 ya butu, mpe nsima ya kolekisa ngonga soki mitano na kati ya mbonge ya mbu, tosɛmi na Krɛtɛ. Atako tolɛmbi mingi ntango tozali kobima na masuwa, tozali na esengo ndenge tosali ete nkombo ya Yehova eyebana na Esanga Gavdos. (Yisaya 42:12) Biso nyonso oyo tokendaki kosakola kuna tomoni ete esengelaki mpenza kosala yango. Nsima ya mikolo, tokobosana mpasi nyonso oyo tomonaki na mobembo yango, kasi tondimi ete suvenire ya mobembo yango ekotikala libela na mitema na biso.

^ par. 11 Lisolo ya bomoi ya ndeko Emmanuel Lionoudakis ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1999, nkasa 25-29.