Nzambe alingaka bápesa basi lokumu mpe limemya
NTANGO Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki mpenza bizaleli ya Tata na ye mpe ndenge oyo asalaka makambo. Alobaki boye: “Nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko; kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba . . . Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoane 8:28, 29; Bakolose 1:15) Yango wana, soki totaleli ndenge oyo Yesu azalaki kosalela basi makambo mpe ndenge oyo azalaki kotalela bango, yango ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Nzambe atalelaka basi mpe makambo oyo alingaka ete básalela bango.
Na kotalela masolo ya Baevanzile, bato ya mayele oyo balimbolaka Biblia bamoni ete ndenge oyo Yesu azalaki kotalela basi ekesanaki mosika na ndenge oyo bato bazalaki kotalela basi na eleko oyo Baevanzile ekomamaki. Na ndenge nini? Oyo eleki ntina, mateya ya Yesu ezali kaka kopesa basi bonsomi mingi lelo oyo?
Ndenge oyo Yesu azalaki kotalela basi
Yesu azalaki te kozwa basi lokola biloko mpamba ya kosilisa na yango mposa ya nzoto. Bakonzi mosusu ya lingomba ya Bayuda bazalaki komona ete soki mobali azali kolekisa ntango mingi elongo na mwasi, nsukansuka, akoyoka Matai 5:28.
mposa ya kosangisa na ye nzoto. Lokola bazalaki kotalela basi lokola bato oyo bakoki kokweisa mibali, bazalaki te kopesa bango nzela ya kosolola ná mibali na miso ya bato to kobima libándá kozanga kozipa elongi na litambala. Nzokande, Yesu apesaki mibali toli báyeba kopekisa bamposa na bango ya nzoto mpe básalelaka basi makambo na limemya, na esika ya kotya bango pembeni.—Yesu alobaki mpe boye: “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye mpe abali mosusu azali kosalela ye ekobo.” (Marko 10:11, 12) Na ndenge yango, aboyaki liteya ya Barabi oyo ezalaki kopesa mibali nzela ya koboma libala ná basi na bango “mpo na likambo nyonso.” (Matai 19:3, 9) Bayuda mingi bazalaki koloba te ete mobali asaleli mwasi na ye ekobo. Barabi bazalaki koteya ete soki mobali asangisi nzoto ná mwasi mosusu, asali ekobo te; kasi soki mwasi na ye asangisi nzoto ná mobali mosusu, asali ekobo! Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobi ete “Yesu amatisaki lokumu ya basi ntango amonisaki ete soki mobali asangisi nzoto ná mwasi mosusu, asali mpe ekobo.”
Ndenge oyo mateya ya Yesu esalisaka lelo oyo: Na lisangá ya Batatoli ya Yehova, basi ná mibali bayanganaka esika moko na makita. Atako bongo, basi yango babangaka te ete bandeko mibali bakotala bango na miso ya mabe to bakomesana na bango na ndenge ya kolekisa ndelo, mpo bayebi ete mibali bakristo batalelaka “basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi na makanisi ya pɛto mpenza.”—1 Timote 5:2.
Yesu azalaki kozwa ntango ya koteya basi. Na kokesana na makanisi ya Barabi oyo epalanganaki na ntango wana, ete basi basengeli koyekola makambo te, Yesu azalaki koteya bango mpe alendisaki bango bápesaka makanisi na bango. Lokola Yesu aboyaki te ete Maria ayoka mateya, amonisaki ete mosala ya mwasi ezali kaka ya kolamba te. (Luka 10:38-42) Marta, ndeko ya Maria, azwaki mpe litomba na mateya ya Yesu, ndenge emonisami na biyano ya bwanya oyo apesaki Yesu nsima ya liwa ya Lazare.—Yoane 11:21-27.
Yesu azalaki kozwa makanisi ya basi na valɛrɛ. Na ntango wana, Bayuda mingi ya basi bazalaki kokanisa ete mpo na kozala na esengo esengeli kozala na mwana mobali ya lokumu, mingimingi oyo azali mosakoli. Ntango mwasi moko alobaki na Yesu ete: “Esengo na libumu oyo ememaki yo!” Yesu azwaki libaku yango mpo na koyebisa ye likambo moko ya ntina mingi. (Luka 11:27, 28) Ndenge Yesu amonisaki ye ete kotosa Nzambe eleki ntina, alakisaki ye likambo moko oyo elekaki mosika makambo oyo bonkɔkɔ na bango ezalaki kosɛnga basi na makasi.—Yoane 8:32.
Ndenge oyo mateya ya Yesu esalisaka lelo oyo: Mibali oyo bateyaka na lisangá ya bokristo bandimaka biyano oyo basi bapesaka na makita. Bamemyaka basi oyo bakɔmɛli mpo bazalaka “bateyi ya makambo malamu,” ezala ntango bazali bango moko to na ndakisa na bango. (Tito 2:3) Batyelaka mpe bango motema na likambo ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bato nyonso.—Nzembo 68:11; talá etanda “Ntoma Paulo apekisaki nde basi bálobaka?” na lokasa 9.
Yesu azalaki kozwa basi na valɛrɛ. Na ntango ya kala, bazalaki kozwa bana mibali na valɛrɛ koleka bana basi. Buku Talmud elobi boye mpo na likambo yango: “Esengo na ye oyo aboti bana mibali, mpe mawa na ye oyo aboti bana basi.” Baboti mosusu bazalaki komona ete kozala na bana basi ezali mokumba monene, mpamba te, basengelaki kolukela bango mibali, kopesa mbongo ya libala, mpe bazalaki kotya motema te ete bana basi yango bakosunga bango ntango bakokóma mibange.
Yesu amonisaki ete bomoi ya mwana mwasi ezali na motuya ndenge moko na oyo ya mwana mobali; asekwisaki mwana mwasi ya Yairuse ndenge asekwisaki mpe mwana mobali ya mwasi moko oyo mobali akufá na mboka Naine. (Marko 5:35, 41, 42; Luka 7:11-15) Nsima ya kobikisa mwasi moko oyo atungisamaki na ‘demo moko oyo abɛlisaki ye na boumeli ya mbula zomi na mwambe,’ Yesu abengaki mwasi yango “mwana ya Abrahama,” maloba oyo eyebanaki mpenza te na makomi ya Bayuda. (Luka 13:10-16) Ndenge asalelaki maloba wana ya bokonde mpe ya boboto, Yesu amonisaki ete mwasi yango azalaki na ntina lokola moto nyonso, mpe azalaki na kondima makasi.—Luka 19:9; Bagalatia 3:7.
Ndenge oyo mateya ya Yesu esalisaka lelo oyo: Lisese moko ya Azia elobaka boye: “Kobɔkɔla mwana mwasi ezali lokola kosopela jardin ya moninga mai.” Batata bakristo balandaka te makanisi ya ndenge wana; batyelaka bana na bango nyonso likebi, bázala mibali to basi. Baboti bakristo basalaka nyonso mpo ete bana na bango nyonso bátánga kelasi ya malamu mpe bázwa lisalisi malamu ya monganga.
Yesu azalaki kotyela basi motema. Na batribinale ya Bayuda, litatoli ya mwasi ezalaki kotalelama ndenge moko na oyo ya moombo. Josèphe, moto moko ya mayele na istware na siɛklɛ ya liboso, alobaki boye: “Esengeli te kotyela basi motema, kaka mpo bazali basi.”
Yesu akesanaki mosika na bango, mpamba te ye aponaki basi mpo bátatola mpo na lisekwa na ye. (Matai 28:1, 8-10) Atako basi yango ya sembo bamonaki na miso ndenge oyo babomaki Nkolo na bango mpe ndenge bakundaki ye, ezalaki mpasi mpo bantoma bándima maloba na bango. (Matai 27:55, 56, 61; Luka 24:10, 11) Kasi, lokola Kristo amonanaki libosoliboso epai ya basi nsima ya lisekwa na ye, amonisaki ete basi babongi mpe kopesa litatoli ndenge moko na bayekoli na ye mosusu.—Misala 1:8, 14.
Ndenge oyo mateya ya Yesu esalisaka lelo oyo: Na masangá ya Batatoli ya Yehova, mibali oyo bazali na mikumba bamonisaka ete basi mpe bazali na ntina na ndenge bandimaka mpe makanisi 1 Petro 3:7; Ebandeli 21:12.
na bango. Longola yango, mibali bakristo bapesaka basi na bango ‘lokumu’ na ndenge bayokaka bango na likebi.—Mitinda ya Biblia esalaka ete basi bázala na esengo
Soki mibali bazali kolanda ndakisa ya Kristo, bapesaka basi na bango limemya mpe bonsomi oyo Nzambe akanaki mpo na bango na ebandeli. (Ebandeli 1:27, 28) Na esika ya kondima likanisi oyo ete mibali baleki basi na valɛrɛ, mibali bakristo batikaka ete mitinda ya Biblia etambwisa bango, mpe yango esalaka ete basi na bango bázala na esengo.—Baefese 5:28, 29.
Ntango Yelena abandaki koyekola Biblia, mobali na ye azalaki konyokola ye makasi, kasi azalaki kaka kokanga motema. Akolaki na esika oyo mobulu ezalaki makasi, epai mibali bazalaki kozwa basi oyo balingi kobala na makasi mpe konyokola bango. Yelena alobi boye: “Makambo oyo nayekolaki na Biblia epesaki ngai makasi. Nayebaki ete ezali na moto moko oyo alingaka ngai mingi, azwaka ngai na valɛrɛ, mpe atyelaka ngai likebi. Nayebaki mpe ete soki mobali na ngai ayekoli Biblia, akonyokola ngai lisusu te.” Nsukansuka, mposa na ye ekokisamaki ntango mobali na ye andimaki koyekola Biblia mpe na nsima azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Yelena alobi ete “akómaki ndakisa malamu mpo na ezaleli ya komipekisa. Toyekolaki kolimbisana na motema moko.” Asukisi na maloba oyo: “Mitinda ya Biblia esalisaki ngai mpenza namiyoka ete nazali na ntina mpe nabatelami na libala na ngai.”—Bakolose 3:13, 18, 19.
Yelena azali moto ya liboso te ya kokutana na likambo ya ndenge wana. Bamilio ya basi bakristo bazali na esengo mpo bango ná mibali na bango basalaka makasi mpo na kosalela mitinda ya Biblia na mabala na bango. Ntango bayanganaka elongo na bandeko na bango bakristo, bamiyokaka ete bazali komemya bango, bazali kobɔndisa bango, mpe bazali na bonsomi.—Yoane 13:34, 35.
Bakristo nyonso, ezala basi to mibali, bandimaka ete lokola bazali bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka, bazali na kati ya bozalisi ya Nzambe, oyo “ekómisamaki eloko mpamba.” Nzokande, lokola bazali kokóma na boyokani malamu ná Yehova Nzambe, Tata na bango, bazali na elikya ya ‘kolongwa na boombo ya kopɔla’ mpe kozwa ‘bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.’ Ezali mpenza elikya kitoko mpo na mibali mpe basi oyo bakozala na nse ya boyangeli ya Nzambe!—Baroma 8:20, 21.