Mpo na nini bomoi ezali komonana lokola nde ezangi ntina?
Mpo na nini bomoi ezali komonana lokola nde ezangi ntina?
MPO na nini osengeli kondima ete bomoi ekosuka kaka te kozala “mwa-mikolo oyo ezali koleka lokola malili ya se ya nzete,” ndenge Mokonzi Salomo alobelaki yango? (Mosakoli 6:12, Bible na lingala ya lelo oyo) Biblia, Liloba ya Nzambe, mokanda oyo ezali na makambo ya kotyela mpenza motema—elaki ete bomoi na mikolo ezali koya ekozala mpenza na ntina.—2 Timote 3:16, 17.
Biblia eyebisi biso mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli mpo na mabele. Elimboli mpe ntina oyo mokili etondi na kozanga bosembo, minyoko mpe mpasi. Mpo na nini ezali na ntina ete tóyeba makambo yango? Mpo ntina mpenzampenza oyo bato bakanisaka ete bomoi ezali mpenza na ntina te ezali mpo bayebaka te to baboyaka koluka koyeba mokano ya Nzambe mpo na mabele mpe bato oyo bafandi na mabele.
Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
Yehova Nzambe * asalaki mabele mpo ezala paradiso ya malamu mpo bato báfanda, esika oyo bato bakokaki kosepela mpenza, kozala na bomoi ya kokoka libela na libela. Likanisi yango ekweisi likanisi oyo bato mingi bandimaka, kasi oyo euti na Biblia te, ete Nzambe asalá mabele mpo ezala esika moko ya komeka bato, mpo na komona soki babongi kozala na bomoi moko ya ntina mingi na likoló.—Talá etanda “Tosengeli kotika mabele mpo tózala na bomoi ya ntina mingi?” na lokasa 6.
Nzambe akelaki mobali mpe mwasi na elilingi na ye, apesaki bango likoki ya komonisa bizaleli na ye ya malamu mingi. (Ebandeli 1:26, 27) Asalaki bango bato ya kokoka. Bazalaki na biloko nyonso oyo esengeli mpo na kosepela mpe kozala na bomoi oyo ezali na ntina libela na libela. Yango esɛngaki mpe kotondisa mabele mpe kotya yango na nse na bango, kokómisa mabele mobimba paradiso lokola elanga ya Edene.—Ebandeli 1:28-31; 2:8, 9.
Likambo nini ya mabe esalemaki?
Emonani polele ete likambo moko ya mabe mpenza esalemaki. Bato bamonisaka mpenza te bizaleli kitoko ya Nzambe. Mabele ezali paradiso te. Nini esalemaki? Baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, basalelaki na ndenge ya mabe bonsomi na bango ya kopona. Balingaki ‘kokóma mpenza lokola Nzambe,’ kopona bango moko oyo ezali “malamu ná mabe.” Lokola basalaki bongo, balandaki Satana Zabolo na botomboki na ye.—Ebandeli 3:1-6.
Na yango, mabe ezali te likambo oyo ebombaná, oyo Nzambe akanaki. Ebandaki ntango oyo Satana—mpe na nsima Adama ná Eva—batombokelaki boyangeli ya Nzambe. Mpo na botomboki na bango, baboti na biso wana babungisaki paradiso mpe bomoi ya seko, bamemaki lisumu mpe liwa kaka mpo na bango moko te kasi mpe mpo na bana na bango—bato nyonso. (Ebandeli 3:17-19; Baroma 5:12) Yango nde ememá makambo nyonso oyo esali ete bomoi emonana lokola ezangi ntina.
Mpo na nini Nzambe alongolaki mabe mbala moko te?
Bato mosusu batunaka: ‘Mpo na nini Nzambe alongolaki mabe mbala moko te na koboma Satana mpe batomboki mosusu mpe kobandela makambo?’ Kosala bongo elingaki mpenza kozala likambo ya mayele? Okosala nini soki oyoki ete ezali na guvɛrnema moko ya nguya oyo ebomaka mbala moko moto nyonso oyo atɛmɛlaka yango? Yango ekosala te ete bato ya makanisi malamu báboya guvɛrnema yango mpe bámona ete ebongi te?
Nzambe amonaki malamu ete aboma batomboki wana mbala moko te. Na bwanya nyonso, atikaki ete ntango eleka mpo ntembe oyo ebimaki na Edene na likambo etali lolenge na ye ya koyangela ekatama mbala moko mpo na libela.
Kolongolama ya mabe nyonso
Likambo ya ntina yango oyo: Nzambe atiki nzela ete mabe ezala kaka mpo na mwa na ntango. Asalaki bongo mpo ayebi ete akoki kolongola mpo na libela makambo oyo mabe ebimisá, ntango bantembe oyo botomboki ebimisaki mpo na lolenge ya Nzambe ya koyangela ekokatama.
Nzambe atiká te mokano na ye mpo na mabele mpe bato. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova ayebisi biso ete ye moto akelá mabele, “azalisaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Mosika te, akobanda kozongisa mabele ya kokoka ndenge akanaki na ebandeli. Nsima ya komonisa ete lolenge na ye ya koyangela nde ezali malamu, ekobonga mpenza ete asalela nguya na ye monene mpo na kokokisa mokano na ye mpe kolongola mabe nyonso. (Yisaya 55:10, 11) Na libondeli oyo Yesu Kristo alakisaki, alobaki mpe ete Nzambe asala likambo yango. Yesu ateyaki biso tobondelaka ete: “Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Yango esɛngi mpe nini?
Mokano ya Nzambe mpo na mabele
Na makambo yango mosusu, “bato ya komikitisa bakozwa mabele.” (Nzembo 37:9-11, 29; Masese 2:21, 22) Yesu Kristo “akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi.” Akosikola bango “na monyoko mpe na mobulu.” (Nzembo 72:12-14) Bitumba ekozala lisusu te; liwa, mpisoli, mpasi to minyoko ekozala lisusu te. (Nzembo 46:9; Emoniseli 21:1-4) Ebele ya bato oyo bakufi na ntango oyo Nzambe apesi nzela ete mabe ezala, bakosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabele, mpe bakozala na libaku ya kozwa mapamboli yango mpe mosusu.—Yoane 5:28, 29.
Kutu, Yehova akolongola mabe oyo botomboki ya Satana ememi. Lokola akolongola mabe nyonso, bato “bakobosana mpenza bampasi [makambo nyonso oyo ememaka mawa mpe mpasi lelo] ya kala.” (Yisaya 65:16-19) Bomoi yango na mikolo ezali koya, ezali solo. Nzambe akosaka te. Bilaka na ye nyonso ekokisamaka. Bomoi ekozala lisusu te ‘kaka pamba, lokola kolanda mopepe.’ (Mosakoli 2:17, Bible na lingala ya lelo oyo) Kutu, bomoi ekozala mpenza na ntina.
Kasi tokoloba nini mpo na sikoyo? Koyeba oyo Biblia eteyaka mpe mokano ya Nzambe mpo na mabele, ekoki kosala ete bomoi na yo ezala lisusu na ntina mingi? Lisolo ya nsuka na kati ya masolo oyo elobeli motuna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 5 Na Biblia, Yehova ezali mpenza nkombo ya Nzambe.
[Etanda na lokasa 6]
Tosengeli kotika mabele mpo tózala na bomoi ya ntina mingi?
Na boumeli ya basiɛklɛ, bato oyo bayebi te mokano ya Nzambe mpo na mabele bateyaki ete tosengeli kotika mabele mpo tózala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina.
Ndenge buku moko (New Dictionary of Theology) emonisi yango, basusu balobaki ete molimo “ezalaki naino na bomoi moko ya likoló mpenza liboso ekɔta na nzoto ya moto.” Basusu balobaka ete molimo “ekangamaki bolɔkɔ na kati ya nzoto lokola etumbu mpo na masumu oyo esalaki ntango ezalaki na likoló.”—Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature.
Bato ya filozofi ya Grɛki lokola Socrate ná Platon, bateyaki likanisi oyo: Kaka ntango molimo ebimi na nzoto ya moto nde ekoki “kosikwama na koyengayenga, na makanisi ya bozoba mpe kobanga na yango, na bamposa na yango ya mabe mpe bampasi mosusu nyonso oyo ekómelaka yango” mpe efandaka “elongo na banzambe mpo na ntango nyonso oyo ekoya.”—Plato’s Phaedo, 81, A.
Na nsima, bakambi ya mangomba oyo bazalaki komibenga bakristo, bakɔtisaki na mateya na bango ‘makanisi ya bato ya filozofi ya Grɛki oyo ezalaki koloba ete moto azali na eteni moko oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa.’—Christianity—A Global History.
Talá bokeseni oyo ezali kati na makanisi yango mpe mateya misato ya ntina mpenza oyo ya Biblia:
1. Mokano ya Nzambe ezali ete mabele ezala esika ya kofanda ya libela mpo na bato, kasi te esika ya kofanda mwa ntango mpo na komekama, kotala soki babongi mpo na kozala na ye kuna na likoló. Soki Adama ná Eva bátosaka mibeko ya Nzambe, balingaki kozala na bomoi tii lelo na paradiso awa na mabele.—Ebandeli 1:27, 28; Nzembo 115:16.
2. Atako mangomba mingi eteyaka ete moto azali na molimo—eloko moko oyo ezalaka na kati ya nzoto na ye—Biblia eteyaka likambo moko ya pɛtɛɛ. Moto azali “molimo ya bomoi” oyo asalemaki na “putulu ya mabele.” (Ebandeli 2:7) Biblia elobaka soki moke te ete molimo yango ekufaka te. Elobaka ete molimo ekoki kobomama to kobebisama, ezalaka lisusu te. (Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4, 20) Molimo ya liboso, elingi koloba Adama, akufaki mpenza mpe azongaki na putulu epai autaki. Azalaki lisusu te.—Ebandeli 2:17; 3:19.
3. Elikya ya bomoi ya moto na mikolo ezali koya etaleli te kozala na eloko moko oyo ebimaka na nzoto mpe ekendeke esika moko boye na likoló, kasi nde na elaka ya Nzambe ya kosekwisa bato mpo bázala na bomoi na paradiso awa na mabele.—Danyele 12:13; Yoane 11:24-26; Misala 24:15.