Bomoi na ntango ya kala—Mbongo
Bomoi na ntango ya kala—Mbongo
“Afandaki liboso ya bakɛsi ya makabo mpe abandaki kotala ndenge ebele wana ya bato bazalaki kotya mbongo na bakɛsi ya makabo; mpe bazwi mingi bazalaki kotya mbongo mingi ya bibende. Nzokande mwasi mobola moko oyo mobali akufá ayaki mpe atyaki mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza.”—MARKO 12:41, 42.
BIBLIA elobelaka mbongo mbala mingi. Na ndakisa, ndenge elobelami na Baevanzile, Yesu asalelaki mbongo ya bibende ya ndenge na ndenge mpo na koteya makambo ya ntina. Amonisaki liteya oyo tokoki kozwa na likabo ya mwasi oyo mobali akufá, oyo apesaki “mbongo ya bibende mibale,” oyo tolobeli na vɛrsɛ oyo totángi awa na likoló. Na libaku mosusu, alobelaki lolenge mosusu ya mbongo ya ebende oyo eyebani na nkombo denari mpo na kosalisa bayekoli na ye básosola ndenge oyo basengeli kotalela bakonzi ya mokili. *—Matai 22:17-21.
Mpo na nini bato babimisaki mbongo? Ndenge nini bazalaki kosala yango na ntango ya kala? Ndenge nini bazalaki kosalela yango? Biblia eteyi biso nini na ndenge oyo tosengeli kotalela mbongo?
Mabanga ya ntalo ezwi esika ya biloko
Liboso bábimisa mbongo, bato bazalaki kosalela mayele ya kosombitinya biloko. Bazalaki kopesana biloko mpe kosalelana misala oyo ezali na valɛrɛ ndenge moko. Kasi, kosala bongo ekokaki kozala na mikakatano. Mpo makambo etambola malamu, moto na moto asengelaki kosepela na biloko oyo moninga azalaki kopesa. Longola yango, batɛki basengelaki komema to kobatela biloko ya kilo, lokola banyama to basaki ya bambuma.
Nsukansuka, bato ya mimbongo bamonaki ntina ya kosalela eloko moko ya malamu koleka, oyo bakokaki kosalela mpo na kotɛka mpe kosomba biloko. Bamonaki malamu kosalela mabanga ya ntalo lokola wolo, palata, mpe motako. Na elilingi oyo ezali awa, ozali komona moto moko ya mombongo azali kosalela mabanga ya ntalo oyo ezali lokola babiju mpe bibende mosusu ya ntalo mpo na kosomba biloko to koluka basalela ye mosala. Bazalaki komeka mabanga yango malamumalamu na bimekeli-kilo ya sikisiki liboso bápesana biloko. Na ndakisa, ntango Abrahama asombaki esika mpo na Ebandeli 23:14-16.
kokunda mwasi na ye Sara, amekaki na kilo palata oyo basɛngaki ye.—Ntango Yehova apesaki Bayisraele mibeko oyo ekomamaki, bakomelesa ya lokoso bazalaki kosalela bimekeli-kilo ya mabe mpo na kokosa bakiliya. Yehova Nzambe ayinaka kozanga bosembo, yango wana ayebisaki Bayisraele oyo bazalaki bakomelesa ete: “Bokozala na bimekeli-kilo ya sikisiki, biloko ya kilo oyo emekami na sikisiki.” (Balevi 19:36; Masese 11:1) Lelo oyo, baoyo batɛkaka biloko basengeli koyeba ete makanisi ya Yehova na oyo etali lokoso mpe kozanga bosembo ebongwani te.—Malaki 3:6; 1 Bakorinti 6:9, 10.
Ndenge oyo basalaki mbongo ya bibende na ebandeli
Ekoki kozala ete mbongo ya liboso ya bibende esalamaki na Lydia (lelo oyo Turquie), ntango mosusu liboso ya mobu 700 liboso ya ntango na biso. Mosika te, bato ya mosala ya bibende na bikólo ndenge na ndenge bakómaki kosala mbongo ya bibende mingi, mpe bato ya mikili nyonso oyo Biblia elobeli babandaki kosalela yango.
Ndenge nini bazalaki kosala mbongo ya bibende? Mosali azalaki kolongola ebende oyo enyangwisami na mɔtɔ ya makasi (1) mpe azalaki kosopa yango na lidusu moko, ezalaki kobimisa ebende moko ya sɛrklɛ oyo ebengamaki tarte (2). Na nsima, azalaki kokɔtisa tarte yango na katikati ya biloko oyo ezali na bilembo to bililingi (3). Na nsima, azalaki kobɛta marto mpo na kokangisa elilingi na tarte (4). Lokola bazalaki kosala mosala yango mbangumbangu, yango ezalaki kosala ete mbala mingi elilingi oyo babɛti ebima na katikati te. Basali bazalaki kopona oyo ebimi malamu, komeka yango na kilo mpo na koyeba soki ebongi, mpe soki esengelaki, bazalaki kobongisa ebende nyonso oyo ebimi malamu te (5).
Bato oyo basenzaka mbongo, bakɔngɔli-mpako, mpe bato ya banki
Na siɛklɛ ya liboso, mbongo ya bibende ya bikólo ndenge na ndenge ezalaki kokɔta na Palestini. Na ndakisa, bato oyo bazalaki kosala mibembo mpo na kokende na tempelo ya Yerusaleme bazalaki komema mbongo ya bibende ya bapaya. Kasi, baoyo bazalaki kobatela tempelo bazalaki kondima mpako ya tempelo kaka soki efutami na mbongo ya bibende oyo bazalaki kosalela. Bato oyo bazalaki kosanze mbongo, bazalaki koya na tempelo mpe mbala mingi, bazalaki komatisa ntalo mingi ya kosanze mbongo mpo bapaya bázwa mbongo ya bibende oyo basengelaki kosalela. Yesu apamelaki bato wana ya lokoso. Mpo na nini? Mpo bakómisaki ndako ya Yehova “ndako ya mombongo” mpe “mobenga ya miyibi.”—Yoane 2:13-16; Matai 21:12, 13.
Matai 22:17) Mpako mosusu ezalaki ya kofuta mpo na nzela mpe bampako mpo na kokɔtisa mpe kobimisa biloko na libanda ya mboka. Na Palestini, bakɔngɔli-mpako ya Leta bazalaki kobuba bato, mpe bato bazalaki kosepela na bango te. (Marko 2:16) Bakɔngɔli-mpako bazalaki konduka bozwi na ndenge bazalaki kobakisa ntalo ya mpako koleka ndelo mpe kobomba mbongo ya likoló. Kasi, bakɔngɔli-mpako mosusu, na ndakisa Zakai, bandimaki nsango ya Yesu mpe batikaki misala wana ya kozanga bosembo. (Luka 19:1-10) Lelo oyo, moto nyonso oyo alingi kolanda Kristo asengeli mpe kozala sembo na makambo nyonso, ata mpe na makambo ya mimbongo.—Baebre 13:18.
Bato ya Palestine basengelaki mpe kofutaka mpako ya ndenge na ndenge. Moko na yango ezalaki “mpako oyo moto nyonso afutaka,” oyo batɛmɛli ya Yesu batunaki ye mpo na yango. (Etuluku mosusu ya bato oyo bazalaki kosalela mbongo ezalaki bato ya banki. Longola likambo ya kosanze mbongo ya bapaya, babimisaki mayele moko ya kobomba mbongo, kodefisa, mpe kofutisa na matabisi baoyo bazalaki kotya mbongo na banki. Yesu alobelaki bato yango ya banki na ndakisa ya baombo oyo bapesaki bango moto na moto motángo na ye ya mbongo, mpo básala mombongo.—Matai 25:26, 27.
Lolenge malamu ya kotalela mbongo
Na mikili mingi lelo oyo, bato basengeli koluka mbongo mpo na kosomba biloko oyo bazali na yango mposa. Maloba oyo mokonzi Salomo akomaki na lisalisi ya elimo santu eleki sikoyo ebele ya bambula ezali kaka solo: “Mbongo ebatelaka.” Kasi, Salomo alobaki mpe ete bwanya eleki mbongo mosika mpo “ebatelaka na bomoi baoyo bazali na yango.” (Mosakoli 7:12) Bwanya ya ndenge wana ezali na Biblia.
Yesu asalisaki bayekoli na ye báyeba lolenge malamu ya kotalela mbongo, ntango alobaki ete: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Ndenge moko na bayekoli ya Yesu ya siɛklɛ ya liboso, tokomonisa bwanya ntango tozali kosalela mbongo na ndenge ebongi mpe na bosembo, tozali koboya kokolisa bolingo ya mbongo.—1 Timote 6:9, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 3 Talá etanda “Makambo etali mbongo ya bibende, na lokasa 26.”
[Etanda/Bililingi na lokasa 26]
Makambo etali mbongo ya bibende
● Moko ya mbongo ya bibende ya moke oyo bazalaki kosalela na siɛklɛ ya liboso na Palestini ezalaki Leptone ya kwivre, oyo ezalaki mbongo ya moke mpenza. Mosali azalaki kozwa lifuti ya leptone mibale soki asali miniti 15 mpamba. Ekoki kozala ete mwasi wana oyo mobali akufá atyaki na kɛsi ya tempelo leptone mibale.—Marko 12:42.
● Drakimɛ ya palata ezalaki mbongo ya ebende ya Bagrɛki oyo ezalaki kosɛnga kosala mosala mokolo mobimba mpo na kozwa yango. (Luka 15:8, 9) Drakimɛ mibale ezalaki motángo ya mpako ya tempelo oyo Moyuda nyonso ya mobali azalaki kofuta mbula na mbula.—Matai 17:24.
● Denari ya palata ezalaki mbongo ya ebende ya Baroma oyo ezalaki na elilingi ya Kaisala, na yango ebongaki mpenza mpo na “lifuti” ya mbongo ya ebende oyo bazalaki kosɛnga mobali nyonso ya Moyuda oyo azalaki mokóló na ntango Baroma bazalaki koyangela bango. (Baroma 13:7) Nkolo-mosala azalaki kofuta mosali denari moko mpo na ngonga 12 ya mosala na mokolo.—Matai 20:2-14.
● Shekele ya palata ya pɛto oyo ezalaki kosalama na engumba Tire, bazalaki kosalela yango na Palestini na ntango oyo Yesu azalaki awa na mabele. Ekokaki kozala ete “shekele ya palata” 30 oyo banganga-nzambe bakonzi bafutaki Yudasi Mokeriota mpo na kotɛka Yesu, ezalaki bashekele ya mboka Tire.—Matai 26:14-16.
Balolenge ekeseni ya mbongo ya ebende