Oyebaki yango?
Oyebaki yango?
Lokola eleko oyo mbula ezalaki kobɛta te ezalaki koumela mingi na Yisraele, mayele nini bazalaki kosalela mpo bázangaka mai te?
▪ Kolongwa na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ tii ya Aprili, mbula ezalaki kobɛta na Yisraele mpe na bantango mosusu ezalaki kotondisa mabwaku ya mikɛli. Nzokande, na eleko ya molunge, “bibale” yango mingi ezalaki kokauka, mpe mbula ezalaki kobɛta te basanza mingi. Ndenge nini bato na ntango ya kala bazalaki kosala mpo bázanga mai te?
Mpo na yango, bazalaki kosala banzela na bangomba mpo na komema mai ya mbula na mabulu ya mai oyo basalaki na nse ya mabele. Bazalaki kobongisa samba ya ndako na bango malamu mpo elekisaka mai ya mbula mbala moko tii na mabulu yango. Mabota mingi ezalaki na libulu na bango ya mai, epai bazalaki kotoka mai mpo na kosalela.—2 Bakonzi 18:31; Yirimia 6:7.
Bayisraele bazalaki mpe kosalela mai ya maziba. Na bamboka oyo ezalaki na bangomba, mai ya mbula ezalaki kokɔta na mabele mpe kokende kofanda na mabanga, esika ezalaki kotíyola tii kobima na maziba. Mbala mingi, bamboka yango ezalaki kotongama pene ya liziba (Na Ebre, en) yango emonisi ntina oyo bisika ya ndenge wana ezalaki na bankombo lokola Ene-shemesh, Ene-rogele, mpe Ene-gedi. (Yosua 15:7, 62) Na Yerusaleme, bazalaki kopasola libanga ya makasi mpo emema mai ya liziba tii na engumba.—2 Bakonzi 20:20.
Na bisika oyo maziba ezalaki te, bazalaki na libulu ya mai (na Ebre, beʼerʹ) na ndakisa, lokola oyo ezalaki na Beere-sheba, oyo batimolaki yango mpe ekómaki tii esika mai ezalaki na nse ya mabele. (Ebandeli 26:32, 33) André Chouraqui, mokomi moko amonisi ete “mayele oyo [Bayisraele] bazalaki kosalela ezali kokamwisa ata lelo.”
Ekoki kozala ete Abrama (Abrahama) azalaki kofanda na ndako ya ndenge nini?
▪ Abrama ná mwasi na ye bazalaki kofanda na Ure, engumba moko ya Bakaladea oyo ezalaki na bomɛngo. Kasi, mpo na kotosa etinda ya Nzambe, balongwaki na engumba yango mpe bakómaki kofanda na bahema. (Ebandeli 11:31; 13:12) Tótalela makambo oyo bamipimelaki ntango balongwaki na engumba wana.
Na katikati ya mobu 1922 mpe 1934, Leonard Woolley, moto moko ya mayele atimolaki na Irak, esika oyo engumba Ure ezalaká kala. Na bandako oyo amonaki, ezalaki na bandako soki 73 oyo etongamaki na babriki. Bashambre mingi ya bandako yango etalaki na kati ya lopango moko oyo ezalaki na pavema. Esika yango esalaki mwa libulu na katikati na yango mpo na kolekisa mai ya salite. Na bandako ya minene, bashambre ya bapaya ezalaki na bisika ya kosukola. Bashambre mosusu oyo ezalaki na etajɛ ya nse ezalaki na bakuku, mpe mimbonda mpe bisika oyo baombo bazalaki kolala. Bato ya libota bazalaki kofanda na likoló, mpo na kokóma kuna bazalaki komata na eskalye. Baeskalye yango ezalaki komema na balcon moko ya mabaya oyo ezalaki zingazinga ya lopango yango mpe ezalaki kopesa nzela na kokɔta na bashambre oyo ezalaki na likoló.
Woolley akomaki boye: “Ndako . . . oyo lopango na yango batyá pavema mpe bifelo na yango batyá langi ya mpɛmbɛ, mpe ezali na bisika ya kobimisa mai ya salite, . . . oyo ezali na bashambre zomi na mibale to koleka, ezalaki komonisa ete ezalaki ndako ya mozwi. Mpe yango ezalaki bandako . . . ya bato ya mwa bozwi, bato oyo bazalaki na bamagazini, mwa bakomelesa, bakomeli, mpe bato mosusu.”
[Elilingi na lokasa 19]
Libulu ya mai ya Horvot Mezada na Israël
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Masada National Park, Israel Nature and Parks Authority
[Elilingi na lokasa 19]
Liyemi ya ndako moko na ntango ya Abrahama
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Drawing: A. S. Whitburn