Moto moko ya ɛsti ya Azia na Italie ya kala
Moto moko ya ɛsti ya Azia na Italie ya kala
NDENGE nini moto moko ya ɛsti ya Azia akómaki na Ampire ya Roma ya kala, eleki lelo oyo mbula 2 000? Wana nde motuna oyo bato ya arkeoloji bamitunaki ntango bakundolaki eloko moko ya kokamwa na sudi ya Italie na 2009.
Esika yango ezalaki kala malita ya Roma ya kala na Vagnari oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 60 na wɛsti ya Bari. Bamonaki mikuwa 75 ya bato. Nsima ya koyekola mikuwa yango, bamonaki ete bato yango mingi babotamaki pene wana. Kasi, mokuwa ya moto moko ekamwisaki bato ya arkeoloji. Nsima ya koyekola ADN na ye, bamonaki ete nkɔkɔ moko ya mama na ye azalaki moto ya ɛsti ya Azia. * Mikuwa na ye eumelaki wana kobanda ekeke ya liboso to ya mibale ya ntango na biso. Lapolo moko ya likambo yango emonisi ete “emonani ete ezalaki mbala ya liboso oyo bakundolaki mikuwa ya moto moko ya kala ya Azia ya ɛsti na Ampire ya Roma.” Na yango, moto yango azalaki nani?
Kaka lapolo yango elobi ete: “Soki otali mikuwa yango likolólikoló okoki kokanisa ete moto wana mpe azalaki kosala mombongo ya soie oyo ezalaki kosalema kati na Chine mpe Roma.” Kasi, balobaka ete mombongo yango ezalaki kosalema na bato oyo bazalaki kosomba biloko mpe kokende kotɛka, mpe moto moko te akokaki kosala mobembo ya ntaka ya kilomɛtrɛ 8 000 longwa na Chine tii Italie.
Liteya nini tokoki kozwa na esika oyo bamonaki mikuwa yango? Na ntango ya kala, Vagnari ezalaki engumba moko ya mboka oyo amperɛrɛ azalaki koyangela, epai basali bazalaki konyangwisa bibende mpe kosala bakaro ya mabele. Bato mingi oyo bazalaki kosala kuna bazalaki baombo, mpe na ntembe te moto wana ya Azia azalaki mpe moombo. Kutu, lilita na ye ezalaki te ya moto ya bozwi. Biloko oyo bakundaki ye na yango, ezalaki kaka mwa nzungu, mpe bakundaki moto mosusu likoló na ye.
Mpo na nini mikuwa yango oyo bakundolaki ezali kobenda likebi na biso? Kopalangana ya nsango malamu na ekeke ya liboso etalelaki tii wapi bato ya kala bazalaki kosala mibembo. Biblia emonisi ete nsima ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, bapaya oyo bayaki na Yerusaleme bamemaki nsango malamu mosika mpenza. (Misala 2:1-12, 37-41) Na mokuse, mikuwa ya moto wana emonisi ete na ntango wana bato mosusu bazalaki kosala mibembo kolongwa na ɛsti ya Azia mpe kokende na etúká ya Mediterane. *
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 3 Mayele ya koyekola ADN eyebisaka mpenza te na bosikisiki bankɔkɔ ya moto.
^ par. 6 Ezali na makambo mosusu oyo emonisi ete bato ya Wɛsti bazalaki kosala mibembo na ɛsti ya Azia. Talá lisolo “Bamisionɛrɛ bakokaki kokóma tii wapi na ɛsti?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2009.
[Karte na lokasa 29]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
ROMA
Vagnari
Mbu ya Mediterane
ƐSTI YA AZIA
MBU YA PASIFIKE
[Elilingi na lokasa 29]
Mikuwa ya moto moko ya ɛsti ya Azia oyo bakundolaki na malita ya Roma ya kala
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Su concessione del Ministero per i Beni e le Attività Culturali-Direzione Regionale per i Beni Culturali e Paesaggistici della Puglia-Soprintendenza per i Beni Archeologici della Puglia