Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Yesu ayekolaki kotosa

Yesu ayekolaki kotosa

OZALAKA ntango mosusu na mokakatano mpo na kotosa?— * Ezali likambo ya kokamwa te soki ezali bongo. Ekómelaka moto nyonso ete ntango mosusu akakatana mpo na kotosa. Oyebi ete ata Yesu asengelaki koyekola kotosa?—

Oyebi soki bilenge nyonso basengeli kotosa nani?— Ɛɛ, mama mpe tata na bango. Biblia elobi ete: “Bótosaka baboti na bino na boyokani na Nkolo.” (Baefese 6:1) Tata ya Yesu ezali nani?— Yehova Nzambe, azali mpe Tata na biso. (Matai 6:9, 10) Kasi soki olobi ete Yozefe azalaki tata ya Yesu mpe Maria azalaki mama na ye, okosi te. Oyebi ndenge bakómaki baboti na ye?—

Anzelu Gabriele ayebisaki Maria ndenge asengelaki kobota mwana atako ayebaki mibali te. Yehova akokisaki likambo yango na nzela ya likamwisi moko monene oyo asalaki. Anzelu Gabriele ayebisaki Maria ete: “Nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.”​—Luka 1:30-35.

Nzambe alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria. Na nsima, bomoi yango ekolaki na kati ya libumu ya Maria ndenge mwana nyonso akolaka na libumu ya mama na ye. Sanza soki libwa na nsima, Yesu abotamaki. Liboso ya ntango yango, Yozefe abalaki Maria, mpe bato mingi bazalaki kokanisa ete Yozefe azalaki mpenza tata ya Yesu. Yozefe azalaki nde tata mobɔkɔli ya Yesu. Na yango, tokoki koloba ete Yesu azalaki na batata mibale!

Ntango Yesu azalaki na mbula 12 mpamba, asalaki likambo moko oyo emonisaki ete alingaka Yehova, Tata na ye ya likoló. Na ntango wana, ndenge ezalaki momeseno na bango, libota ya Yesu esalaki mobembo moko molai na Yerusaleme mpo na Elekeli. Ntango bazalaki kozonga epai na bango na Nazarete, Yozefe ná Maria bayebaki te ete Yesu azali na bango te. Okamwe ndenge nini bayebaki te?—

Na ntango wana, Yozefe ná Maria bazalaki na bana mosusu. (Matai 13:55, 56) Ekoki kozala ete basalaki mobembo wana elongo na bandeko na bango mosusu, na ndakisa Yakobo mpe Yoane ná tata na bango Zebede mpe mama na bango Salome, oyo ekoki kozala ete azalaki ndeko ya Maria. Na yango, ekoki kozala ete Maria akanisaki ete Yesu azali elongo na bandeko na bango mosusu.​—Matai 27:56; Marko 15:40; Yoane 19:25.

Ntango Yozefe ná Maria bayebaki ete Yesu azali te, bazongaki mbangu na Yerusaleme. Balukaki mwana na bango na motema likoló, kasi bamonaki ye te. Na mokolo ya misato bakutaki ye na tempelo. Maria alobaki na ye ete: “Osali biso boye mpo na nini? Ngai ná tata na yo totamboli motó mpo na koluka yo.” Kasi, Yesu ayanolaki ete: “Mpo na nini bóluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?”​—Luka 2:45-50.

Mpo na nini okanisi ete Yozefe ná Maria basengelaki koluka Yesu libosoliboso na tempelo?

Okanisi ete ezalaki mabe Yesu apesa mama na ye eyano ya ndenge wana?— Ya solo, baboti na ye bayebaki ete azalaki kolinga kosambela na ndako ya Nzambe. (Nzembo 122:1) Na yango, ebongaki te ete Yesu akanisa ete tempelo ya Nzambe ezalaki esika ya libosoliboso oyo basengelaki kokende koluka ye?— Na nsima, Maria akobaki kokanisa likambo oyo Yesu alobaki.

Ezaleli nini Yesu azalaki na yango epai ya Yozefe ná Maria?— Biblia elobi ete: “Yesu akitaki elongo na bango mpe akómaki na Nazarete, mpe azalaki kaka komikitisa liboso na bango.” (Luka 2:51, 52) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu?— Ya solo, biso mpe, tosengeli kotosaka baboti na biso.

Kasi, kotosa ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na Yesu​— ata kotosa Tata na ye ya likoló.

Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu asɛngaki Yehova soki akoki kobongola makanisi na Ye na oyo alingaki ye asala. (Luka 22:42) Kasi, Yesu atosaki Nzambe atako ezalaki pɛtɛɛ te. Biblia elobi ete “ayekolaki botosi na makambo oyo akutanaki na yango.” (Baebre 5:8) Okanisi ete biso mpe tokoki koyekola ezaleli yango?—

^ par. 3 Ntango ozali kotánga ná mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.