Biblia eyebisi biso lisolo mobimba ya Yesu?
Ekoki kozala ete Yesu akufaki te na Golgota, ndenge Biblia elobi, kasi atikalaki na bomoi? Ekoki kozala ete abalaki Maria Magadalena mpe abotaki ná ye bana? To ekoki kozala ete azalaki moto moko oyo azalaki koboya bisengo nyonso ya mokili? Ekoki kozala ete ateyaki mateya oyo ekeseni na oyo totángaka na Biblia?
MAKANISI ya ndenge wana epalanganaki na bambula oyo euti koleka, mpe makanisi yango mingi eutaki na bafilme mpe masapo. Longola masapo, ezali mpe na babuku mpe masolo oyo ezali kolobela mingi mikanda ya ekeke ya mibale mpe ya misato ya ntango na biso oyo ekomamaki te na litambwisi ya elimo santu, oyo emonisaka ete ezali na makambo mosusu oyo etali Yesu oyo elobelami te na Baevanzile. Makambo yango ekoki kozala solo? Tokoki mpenza kondima ete Biblia eyebisi biso solo ya lisolo mobimba ya Yesu?
Mpo na koyanola na mituna yango, ezali na ntina tótalela makambo misato ya ntina. Ya liboso, tosengeli koyeba makambo ya ntina oyo etali bato oyo bakomaki Baevanzile mpe ntango oyo bakomaki yango; ya mibale, tosengeli koyeba nani abongisaki liste ya mikanda ya Biblia *
mpe ndenge nini; mpe ya misato, tosengeli koyeba epai wapi mikanda oyo ekomamaki te na litambwisi ya elimo santu eutá mpe ndenge oyo yango ekeseni na mikanda ya Biblia.Ntango nini Makomami ya Grɛki ya bokristo ekomamaki, mpe banani bakomaki yango?
Bato mosusu balobaka ete Evanzile ya Matai ekomamaki na mbula ya mwambe nsima ya liwa ya Kristo, elingi koloba na mobu soki 41 ya ntango na biso. Bato mingi ya mayele bakanisaka ete ekomamaki mwa moke na nsima, kasi emonani polele ete mikanda nyonso ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ekomamaki na boumeli ya ekeke ya liboso ya ntango na biso.
Na ntango yango, bato oyo bamonaki Yesu, liwa mpe lisekwa na ye bazalaki naino na bomoi; mpe bakokaki koyeba soki makambo oyo Baevanzile elobi ezali solo to te. Bakokaki mpe kotɔndɔla makambo nyonso ya lokuta. Bruce, moto moko ya mayele, alobi boye: “Likambo ya ntina mingi ntango bantoma bazalaki kosakola ezali ndenge bazalaki kotya motema na makambo oyo bayoki na bango bayebaki; bazalaki kaka koloba te ete, ‘tozali batatoli ya makambo oyo,’ kasi mpe, ‘ndenge bino moko mpe boyebi yango’ (Misala 2:22).”
Banani bakomaki Makomami ya Grɛki ya bokristo? Kati na bango, ezalaki mpe na bantoma mosusu kati na bantoma 12 ya Yesu. Bantoma yango mpe bakomi mosusu ya Biblia, na ndakisa Yakobo, Yuda mpe ntango mosusu Marko, bazalaki wana na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, ntango lisangá ya bokristo esalemaki. Bakomi nyonso, ata mpe Paulo, basalaki mpenza na bomoko ná lisangani ya mikóló bakambi ya lisangá ya bokristo ya ekeke ya liboso, oyo esangisaki bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme.—Misala 15:2, 6, 12-14, 22; Bagalatia 2:7-10.
Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ya kokoba mosala ya kosakola mpe ya koteya, oyo ye abandisaki. (Matai 28:19, 20) Alobaki kutu boye: “Moto oyo ayoki bino ayoki mpe ngai.” (Luka 10:16) Lisusu, alakaki bango ete elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye, ekopesa bango makasi oyo basengeli na yango mpo na kosala mosala yango. Na yango, ntango makomi eutaki epai ya bantoma to baninga na bango mpenza ya mosala—mibali oyo bamonisaki polele ete elimo santu ya Nzambe ezalaki kopambola bango—bakristo ya ekeke ya liboso bandimaki mikanda yango lokola mikanda oyo ebongi kotyelama motema.
Bakomi mosusu ya Biblia bamonisaki mpe ete baninga na bango mosusu oyo bakomaki mpe Biblia batambwisamaki na elimo ya Nzambe. Na ndakisa, ntoma Petro alobelaki mikanda ya Paulo mpe atyaki yango molɔngɔ moko na “Makomami mosusu oyo etikali.” (2 Petro 3:15, 16) Nzokande, Paulo andimaki ete bantoma mpe bakristo mosusu oyo bazalaki basakoli batambwisamaki mpe na elimo ya Nzambe.—Baefese 3:5.
Kasi, Baevanzile ezali na makambo ya solo oyo tokoki kotyela motema. Ezali te masapo mpamba. Ezali mpenza masolo ya solo, eutaki na masolo ya bato oyo bamonaki makambo yango, ekomamaki na bato oyo batambwisamaki na elimo santu ya Nzambe.
Banani baponaki liste ya mikanda ya Biblia?
Bakomi mosusu balobaka ete liste ya Makomami ya Grɛki ya bokristo eponamaki bikeke mingi na nsima na lingomba oyo ezalaki kotambwisama na Amperɛrɛ Constantin mpe ezalaki na bokonzi. Kasi, masolo emonisi bongo te.
Na ndakisa, yoká ndenge Oskar Skarsaune, moto moko ya mayele na makambo ya mangomba alobi: “Makomi nini esengelaki kobakisama na Kondimana ya Sika, mpe oyo wapi esengelaki kobakisama te, lingomba ata moko te to moto moko te azwaki ekateli yango na likita ya lingomba . . . Batalelaki makambo mingi mpe ya ntina: Makomi ya ekeke ya liboso ya ntango na biso, oyo bato bazalaki kotalela ete ekomamaki na bantoma to na baninga na bango mosusu ya mosala, ebongaki kotyelama motema. Makomi mosusu, mikanda, to “baevanzile” oyo
ekomamaki na nsima ekɔtaki te . . . Mosala yango esilaki ntango molai liboso ya eleko ya Constantin mpe ntango molai liboso ete lingomba na ye ya nguya etyama. Ezalaki lingomba ya bamartiru, kasi te lingomba ya nguya, nde epesaki biso Kondimana ya Sika.”Ken Berding, moto moko ya mayele oyo ayekolaka maloba ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, apesi makanisi oyo mpo na ndenge liste ya mikanda ya Biblia esalemaki: “Lingomba eponaki te mikanda oyo elingaki ete ezala na kati ya liste ya mikanda ya Biblia; ebongi mpenza tóloba ete lingomba endimaki mikanda oyo bakristo bazalaki ntango nyonso kotalela ete ezali Liloba ya Nzambe.”
Kasi, ezali kaka bakristo wana ya ekeke ya liboso nde baponaki liste ya mikanda ya Biblia? Biblia eyebisi biso ete likambo moko ya ntina mingi mpe ya nguya esimbaki mosala yango.
Biblia emonisi biso ete moko ya makabo ya kokamwa ya elimo santu oyo epesamaki na bambula ya ebandeli ya lisangá ya bokristo ezalaki “bososoli ya maloba oyo euti na elimo.” (1 Bakorinti 12:4, 10) Na yango, bakristo yango mosusu bazwaki likoki ya kokamwa mpenza ya komona bokeseni kati na maloba oyo etambwisamaki na elimo ya Nzambe mpe oyo etambwisamaki na elimo ya Nzambe te. Yango wana, bakristo lelo oyo bakoki kotya motema ete Makomami oyo ezali na Biblia etambwisamaki na elimo ya Nzambe.
Na yango, emonani ete kaka na ebandeli mpenza, liste ya mikanda ya Biblia ebongisamaki na litambwisi ya elimo santu. Pene na nsuka ya ekeke ya mibale ya ntango na biso, bakomi mosusu balobelaki liste ya mikanda ya Biblia. Kasi, bakomi yango basalaki te liste ya mikanda yango; bamonisaki kaka oyo Nzambe asilaki kondima na nzela ya bamonisi na ye oyo batambwisamaki na elimo na ye.
Lisusu, bamaniskri ya kala emonisaki mpe bilembeteli oyo esalisi mpo liste ya mikanda ya Biblia oyo tozali na yango lelo endimama na bato mingi. Ezali na bamaniskri koleka 5 000 ya Makomami ya Grɛki oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Ebre, ata mpe bamaniskri mosusu ya ekeke ya mibale mpe ya misato. Ezalaki mikanda yango, kasi te mikanda oyo ekomamaki te na litambwinsi ya elimo santu nde etalelamaki lokola mikanda oyo endimamaki na boumeli ya bikeke ya liboso ya ntango na biso, mpe babimisaki mikanda yango ebele mpe ekabolamaki epai ya bato mingi.
Kasi, makambo oyo ezali na kati nde emonisi polele ete mikanda yango ebongi mpenza kozala na liste ya mikanda ya Biblia. Mikanda oyo ezali na liste ya mikanda ya Biblia ezali na boyokani na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” oyo tozali kokuta na mikanda mosusu ya Biblia. (2 Timote 1:13) Ezali kolendisa batángi bálinga, básambela, mpe básalela Yehova, mpe ezali kokebisa na makambo lokola biyambayamba, misala ya bademo, mpe kosambela biloko oyo ekelamá. Masolo oyo eleká emonisi ete makomi yango ezali ya solo mpe ezali na bisakweli ya solo. Mpe ezali kolendisa batángi bálinga bazalani na bango. Mikanda ya Makomami ya Grɛki ya bokristo eyokani na makambo oyo touti kolobela. Tokoki mpe koloba bongo mpo na mikanda oyo ekomamaki te na litambwisi ya elimo santu?
Mikanda oyo ekomamaki te na litambwisi ya elimo santu ekeseni na nini?
Mikanda oyo ekomamaki te litambwisi ya elimo santu ekeseni na mikanda oyo endimami na liste ya mikanda ya Biblia. Mikanda yango oyo ekomamaki te na litambwisi ya elimo santu ekomamaki soki na katikati ya ekeke ya mibale, bambula mingi mpenza nsima ya kobimisama ya liste ya mikanda ya Biblia. Elobelaka Yesu mpe lisangá ya bokristo na ndenge oyo eyokani te na Makomami oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo.
Na ndakisa, Evanzile ya Thomas, elobelaka makambo mingi oyo ekamwisaka oyo balobaka ete Yesu alobaki; na ndakisa, akokómisa Maria mobali mpo akoka kokɔta na Bokonzi ya likoló. Evanzile ya Thomas oyo elobeli bomwana ya Yesu elobelaka elenge Yesu lokola mwana moko ya elimo oyo abomaki mwana mosusu. Mikanda ya misala ya Paulo mpe ya Petro oyo babakisaki elobelaka mingi likambo etali koboya mpenza kosangisa nzoto mpe elakisaka kutu bantoma bazali kolendisa basi bákabwana na mibali na bango. Evanzile ya Yuda elakisi Yesu azali kosɛka bayekoli na ye mpo bazali kosambela Nzambe liboso bálya. Makanisi yango ekeseni mpenza na oyo ezali na mikanda oyo ezali na kati ya liste ya mikanda ya Biblia.—Marko 14:22; 1 Bakorinti 7:3-5; Bagalatia 3:28; Baebre 7:26.
Mikanda mingi oyo ekomamaki te na litambwisi ya elimo santu emonisaka mateya ya bato oyo balobaka ete Yehova, Mozalisi azali Nzambe ya malamu te. Bandimaka mpe ete lisekwa ekosalema te na ndenge ya solosolo, bandimaka ete biloko nyonso oyo emonanaka ezali mabe, mpe ete Satana azalaki mobandisi ya libala mpe ya kobota.
Bato balobaka ete bakomi ya Biblia nde bakomaki mikanda yango mingi oyo ekomamaki te na litambwisi ya elimo santu, kasi likambo yango ezali solo te. Mayele mabe wana esali ete mikanda yango ezala lisusu te na Biblia? James, moto moko ya mayele oyo alimbolaka mikanda oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu alobaki boye: “Moto moko te akokaki kolongola yango na Kondimana ya Sika: emilongolaki yango moko.”
Bakomi ya Biblia bakebisaki mpo na lipɛngwi oyo esengelaki koya
Na liste ya mikanda ya Biblia, tozali kokuta ebele ya makebisi na likambo etali lipɛngwi oyo esengelaki koya mosika te, oyo ekokaki kobebisa lisangá ya bokristo. Kutu, lipɛngwi yango esilaki kobanda na ekeke ya liboso, kasi bantoma bapekisaki yango epalangana. (Misala 20:30; 2 Batesaloniki 2:3, 6, 7; 1 Timote 4:1-3; 2 Petro 2:1; 1 Yoane 2:18, 19; 4:1-3) Makebisi yango esalisaki mpo na kokanga ntina ya makomi oyo ebandaki kobima nsima ya liwa ya bantoma, makomi oyo ezalaki na boyokani te na mateya ya Yesu.
Kasi, mpo na bato mosusu ya mayele, makomi yango ekoki komonana ete eumeli mingi mpe ezali na motuya mingi. Kasi, tótalela likambo oyo: Ekozala boni soki bato ya mayele basangisi ebele ya makomi ya lokuta oyo ezali kobima lelo, ntango mosusu bazwi yango na bazulunalo ya bilobaloba mpe na mikanda ya misala mabe ya mangomba, mpe na nsima babombi yango na esika moko? Ata soki mikanda yango eumeli, makambo oyo ezali na kati ekokóma ya solo mpe bato bakobanda kotyela yango motema? Nsima ya mbula 1 700, lokuta mpe makambo ezangi ntina oyo ezali na mikanda yango ekokóma ya solo kaka mpo eumeli mpenza?
Soki moke te! Ezali ndenge moko na likambo oyo balobaka ete Yesu abalaki Maria Magadalena mpe makambo mosusu ya lokuta oyo ezali na mikanda oyo ekomamaki te na litambwisi ya elimo santu. Mpo na nini kotyela mikanda wana ya lokuta motema, mingimingi ntango mikanda ya solo ezali? Eloko nyonso oyo Nzambe alingi biso tóyeba mpo na Mwana na ye ezali na kati ya Biblia—mokanda oyo tokoki kotyela motema.
^ par. 4 Maloba “liste ya mikanda ya Biblia” esalelami mpo na kolobela mikanda ya Biblia oyo ezali kopesa bilembeteli ete ezali mikanda oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mikanda oyo ezali na liste ya mikanda ya Biblia ezali 66 mpe ezali na kati ya Liloba ya Nzambe mpe ezali na ntina mingi.