Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baboti​—Bóteya bana na bino banda bomwana

Baboti​—Bóteya bana na bino banda bomwana

BIBLIA elobi boye: “Talá! Bana bazali libula oyo euti na Yehova; mbuma ya libumu ezali mbano.” (Nz. 127:3) Yango wana, baboti bakristo basepelaka mingi ntango mwana abotami.

Kobotama ya mwana ezali likambo ya esengo, kasi ememaka mpe mikumba minene. Mpo mwana akola malamu, esɛngaka koleisa ye bilei oyo etongaka nzoto mokolo na mokolo. Ndenge moko mpe, mpo mwana akóma na boyokani makasi na Nzambe, esɛngaka ete baboti bápesaka ye bilei ya elimo mpe malako. Basengeli koteya ye mitinda ya Liloba ya Nzambe. (Mas. 1:8) Ntango nini esengeli kobanda koteya mwana ndenge wana, mpe makambo nini basengeli koteya ye?

BABOTI BASENGELI NA LISALISI YA NZAMBE

Tótalela ndakisa ya mobali moko ya libota ya Dani na nkombo Manoa, oyo azalaki kofanda na engumba Zora, na Yisraele. Anzelu ya Yehova ayebisaki mwasi ya Manoa oyo azalaki ekomba ete akobota mwana mobali. (Bas. 13:2, 3) Na ntembe te, Manoa moto ya sembo ná mwasi na ye basepelaki mingi na nsango yango. Kasi, bamitungisaki mpe mingi. Yango wana, Manoa abondelaki ete: “Limbisá ngai, Yehova. Nabondeli yo, tiká moto ya Nzambe ya solo oyo outi kotinda aya lisusu epai na biso mpe alakisa biso nini tosengeli kosalela mwana oyo akobotama.” (Bas. 13:8) Manoa ná mwasi na ye bazalaki komitungisa mpo na ndenge ya kobɔkɔla mwana na bango. Na ntembe te, bateyaki mwana na bango Samsone mibeko ya Nzambe, mpe emonani ete milende na bango ebotaki mbuma malamu. Biblia elobi boye: “Na nsima, elimo ya Yehova ebandaki kotinda [Samsone].” Mpo na yango, Samsone asalaki misala mingi ya nguya na eleko oyo azalaki mosambisi na Yisraele.​—Bas. 13:25; 14:5, 6; 15:14, 15.

Manoa abondelaki Nzambe apesa bango malako mpo na ndenge ya kobɔkɔla mwana oyo bakobota

Ntango nini esengeli kobanda koteya mwana? Enise, mama ya Timote, mpe Loisi nkɔkɔ na ye ya mwasi, bateyaki Timote “makomi mosantu” ‘banda bomwana na ye mpenza.’ (2 Tim. 1:5; 3:15) Ya solo, babandaki koteya Timote Makomami banda bomwana mpenza.

Ezali malamu baboti bakristo bábondela Nzambe atambwisa bango mpe bábongisa makambo liboso mpo bákoka kobanda koteya bana na bango banda ‘bomwana mpenza.’ Masese 21:5 elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.” Liboso mwana abotama, na ntembe te baboti bamibongisaka malamu. Bakoki kutu kosala liste ya biloko oyo esengeli mpo na mwana oyo bakobota. Ezali mpe na ntina ete bámibongisa mpo na ndenge oyo bakobanda koteya ye makambo ya Yehova. Mokano na bango esengeli kozala ya kobanda koteya mwana yango ntango azali naino bebe.

Buku moko oyo elimbolaka ndenge oyo mwana akolaka elobi ete basanza ya liboso nsima ya kobotama ya mwana ezalaka ntango oyo misisa ya bɔɔngɔ na ye ekolaka nokinoki. Ezali mpenza likambo ya bwanya soki baboti basaleli eleko wana ya mokuse oyo bɔɔngɔ ya mwana ekolaka noki mpo na koteya ye makambo ya Yehova mpe mibeko na ye!

Mpo na mwana na ye ya mwasi, mama moko oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza alobi boye: “Nazalaki komema ye na mosala ya kosakola banda ntango azalaki na sanza moko mpamba. Atako azalaki koyeba te soki ezalaki nini, nabanzi ete lokola nazalaki komema ye ndenge wana na bomwana, yango esalisá ye mingi. Ntango akómaki na mbula mibale, azalaki kobanga te kopesa batrakte epai ya bato oyo tokutani na bango na mosala ya kosakola.”

Koteya mwana banda bomwana ebotaka mbuma ya malamu. Nzokande, baboti bayebi ete koteya bana ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te.

‘KOMISOMBELA NTANGO OYO EBONGI’

Lokola bana bazalaka likolólikoló mpe bakokaka kotya likebi ntango molai te, ekoki kozala mpasi mpo baboti báteya bango. Likebi ya bana eumelaka te kokende na likambo mosusu. Balukaka koyeba makambo ya sika mpe makambo oyo ezali zingazinga na bango. Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa mwana na bango atya likebi na makambo oyo balingi koteya ye?

Tótalela makambo oyo Moize alobaki. Kolimbola Mibeko 6:6, 7 elobi: “Maloba oyo nazali kopesa yo mitindo lelo esengeli kozala na motema na yo; mpe osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana na yo mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.” Liloba “kokɔtisa” epesaka likanisi ya kozongela likanisi moko mbala na mbala mpo na koteya. Mwana moke azali lokola molona ya moke oyo esengeli kosopela yango mai mbala na mbala. Lokola kozongela likambo moko mbala na mbala esalisaka ata mikóló bábosana te makanisi ya ntina, na ntembe te, ekosalisa mpe bana!

Koteya bana mateya ya Nzambe esɛngaka ete baboti bálekisaka ntango mingi elongo na bango. Na mokili ya lelo oyo baboti mingi bazali na makambo ebele ya kosala, kozwa ntango ya kofanda na bana ezali mpenza mpasi. Kasi, ntoma Paulo alendisi biso ‘tómisombela ntango oyo ebongi’ mpo na kosala makambo oyo eleki ntina, makambo ya elimo. (Ef. 5:15, 16) Ndenge nini baboti bakoki kosala yango? Koyeba kokabola ntango mpo na koteya mwana, mosala, mpe kokokisa mikumba ya lisangá ezalaki mokakatano mpo na mokristo moko oyo azali nkulutu mpe mwasi na ye oyo azalaka na ntango mingi te mpo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Basalaki nini mpo na kozwa ntango ya koteya mwana na bango ya mwasi? Tata alobi boye: “Ntɔngɔ nyonso liboso nakende mosala, ngai ná mwasi na ngai totángelaka ye buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia to mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Na mpokwa, tozangaka te kotángela ye liboso alala, mpe soki tobimi na mosala ya kosakola, tobimaka na ye. Tolingi te kolekisa libaku wana ya koteya ye ntango azali naino moke mpenza.”

‘BANA BAZALI LOKOLA MAKULA’

Na ntembe te, mposa na biso ezali ete bana na biso bákola malamu. Kasi, ntina ya libosoliboso oyo tosengeli koteya bango ezali mpo na kokolisa bolingo ya Nzambe na mitema na bango.​—Mrk. 12:28-30.

Nzembo 127:4 elobi boye: “Lokola makula na lobɔkɔ ya mobali ya nguya, bana ya bolenge bazali mpe ndenge wana.” Na yango, bana bazali lokola makula oyo esengeli kobwaka yango malamu mpo ekóma na esika oyo tolingi. Moto oyo abwakaka makula akoki lisusu te kobenda likula oyo asili kobwaka yango. Baboti bazali na “makula”​—elingi koloba bana na bango—​na mabɔkɔ kaka mpo na mwa ntango moke. Basengeli kosalela ntango yango mpo na kokɔtisa mitinda ya Nzambe na makanisi mpe na mitema ya bana na bango.

Mpo na bana na ye ya elimo, ntoma Yoane akomaki boye: “Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.” (3 Yoa. 4) Baboti bakristo bakoki mpe kozala na botɔndi ndenge wana ntango bazali komona bana na bango “bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”