Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali na ‘motema moko mpo na koyeba’ Yehova?

Ozali na ‘motema moko mpo na koyeba’ Yehova?

“Nakopesa bango motema moko mpo báyeba ngai, ete ngai nazali Yehova; mpe bakokóma mpenza bato na ngai.”​—YIR. 24:7.

1, 2. Mpo na nini bato mosusu basepelaka na mbuma ya figi?

BATO mingi balingaka kolya mbuma ya figi, ezala ya sika to oyo ekauká. Na ntango ya kala, Bayuda bazalaki kozwa mbuma ya figi na motuya mingi. (Nah. 3:12; Luka 13:6-9) Mbuma ya figi ezalaka na fibre mingi, bavitamini, sukali, mpe mungwa; balobaka ete ezalaka malamu mpo na motema.

2 Mokolo moko oyo Yehova alobelaki figi, atángaki mpe motema. Nzambe alingaki te kolobela ndenge oyo kolya mbuma ya figi ekoki kosalisa moto azala nzoto kolɔngɔnɔ. Asalelaki nde maloba ya elilingi. Likambo oyo alobaki na nzela ya mosakoli Yirimia etaleli motema na yo mpe mitema ya bato oyo yo olingaka. Ntango tozali kotalela likambo oyo alobaki, kanisá oyo yango ekoki kolimbola mpo na bakristo.

3. Bafigi oyo Yirimia mokapo 24 elobeli elimbolaki nini?

3 Tótalela naino likambo moko oyo Nzambe alobaki na mikolo ya Yirimia mpo na bafigi. Na mobu 617 L.T.B., ekólo Yuda ezalaki lisusu na boyokani malamu ná Yehova te. Na emonaneli moko oyo Nzambe apesaki Yirimia mpo na makambo oyo esengelaki kosalema na mikolo ekoya, apesaki ndakisa ya mitindo mibale ya figi: bafigi “ya malamu mpenza” mpe bafigi “ya mabe mpenza.” (Tángá Yirimia 24:1-3.) Figi ya mabe elimbolaki mokonzi Zidikiya mpe bato mosusu lokola ye, oyo mokonzi Nebukadenezare ná basoda na ye banyokolaki. Kasi ezalaki boni mpo na Ezekiele, Danyele ná baninga na ye misato oyo bazalaki na Babilone, mpe Bayuda mosusu oyo mosika te balingaki mpe komemama kuna? Bango bazalaki lokola bafigi ya malamu. Ndambo na bango basengelaki kozonga mpo na kotonga lisusu Yerusaleme mpe tempelo na yango. Na nsima, makambo esalemaki kaka bongo.​—Yir. 24:8-10; 25:11, 12; 29:10.

4. Likambo oyo Nzambe alobaki mpo na bafigi ya malamu ekoki kolendisa biso na nini?

4 Mpo na baoyo bazalaki lokola bafigi ya malamu, Yehova alobaki boye: “Nakopesa bango motema moko mpo báyeba ngai, ete ngai nazali Yehova; mpe bakokóma mpenza bato na ngai.” (Yir. 24:7) Yango nde vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo, mpe maloba yango ezali mpenza kolendisa! Nzambe azali na mposa ya kopesa bato “motema moko mpo báyeba” ye. Na vɛrsɛ wana, liloba “motema” elimboli bamposa oyo moto azalaka na yango. Na ntembe te, ozali na mposa ya kozala na motema ya ndenge wana mpe kozala moko ya bato na ye. Mpo na yango, osengeli koyekolaka Liloba na ye mpe kotosa yango, kobongola motema, kobongwana, komipesa epai ya Nzambe, mpe kozwa batisimo na nkombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya elimo santu. (Mat. 28:19, 20; Mis. 3:19) Ekoki kozala ete osali matambe wana, to ozali koyangana mbala na mbala elongo na Batatoli ya Yehova mpe ozali komibongisa mpo na kosala matambe yango.

5. Yirimia alobelaki mingimingi mitema ya banani?

5 Ata soki tosalá matambe wana nyonso to ndambo na yango, ezali kaka na ntina tótya likebi na makanisi mpe etamboli na biso. Likambo mosusu oyo Yirimia akomaki mpo na motema ekoki kosalisa biso tóyeba mpo na nini tosengeli kosala bongo. Mikapo mosusu ya mokanda ya Yirimia elobelaki bikólo oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, kasi elobelaki mingimingi nde ekólo Yuda na boumeli ya boyangeli ya bakonzi na yango mitano. (Yir. 1:15, 16) Na yango, Yirimia akómaki libosoliboso mpo na mibali, basi, mpe bana oyo bazalaki na ekólo oyo ezalaki na boyokani malamu ná Yehova. Bankɔkɔ na bango bandimaki bango moko kozala na boyokani ya ndenge wana ná Yehova. (Kob. 19:3-8) Mpe na ntango ya Yirimia, bato bandimaki ete bamipesaki na Nzambe. Balobaki ete: “Toyei epai na yo, mpo yo, Ee Yehova, ozali Nzambe na biso.” (Yir. 3:22) Kasi, okanisi ete mitema na bango ezalaki ndenge nini?

OSENGELI KOSALA LIPASO YA MOTEMA NA YO YA ELILINGI?

6. Mpo na nini tosengeli mingimingi koluka koyeba likambo oyo Nzambe alobaki mpo na motema?

6 Lelo oyo, minganga bakoki kosalela bamasini oyo bato ya mayele bazali kobimisa mpo na kotala motema mpe komona ndenge oyo ezali kosala. Kasi, Yehova akoki kosala mingi koleka bango, ndenge asalaki na ntango ya Yirimia. Nzambe ayebi mingi koleka minganga, ndenge tokoki komona yango na maloba na ye oyo: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango? Ngai, Yehova, nalukalukaka na kati ya motema . . . mpo na kopesa moto na moto ndenge banzela na ye ezali, ndenge mbuma ya misala na ye ezali.” (Yir. 17:9, 10) Ntango Nzambe ‘alukalukaka na kati ya motema,’ esɛngaka te ete asala ekzamɛ ya motema na biso ya solo, oyo na boumeli ya mbula 70 to 80 ekoki kobɛta mbala soki miliare misato. Yehova azalaki nde kolobela motema ya elilingi. “Motema” yango elimboli bomoto ya kati, oyo esangisi bamposa, makanisi, elimo, mpe mikano na biso. Yo mpe ozali na motema ya ndenge wana. Nzambe akoki kotalatala yango; yo moko mpe okoki kotalatala yango.

7. Yirimia alobaki ete na ntango na ye mitema ya Bayuda mingi ezalaki ndenge nini?

7 Mpo omilɛngɛla liboso ete Yehova atalatala motema na yo, okoki komituna boye: ‘Mitema ya elilingi ya Bayuda mingi na ntango ya Yirimia ezalaki ndenge nini?’ Mpo na koyanola na motuna wana, tótalela elobeli moko oyo esalelamaka mingi te, oyo Yirimia asalelaki; alobaki ete: “Ndako mobimba ya Yisraele ekatami ngenga na motema te.” Azalaki te kolobela kokatama ngenga ya solosolo mpo na mibali Bayuda, mpamba te alobaki ete: “‘Talá! Mikolo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘nakosɛnga bato nyonso oyo bakatamá ngenga, nzokande bakatami naino ngenga te.’” Na yango, mibali Bayuda oyo bakatamaki ngenga ‘bakatamaki ngenga na motema te.’ (Yir. 9:25, 26) Maloba yango elimbolaki nini?

8, 9. Bayuda mingi basengelaki kosala nini mpo na mitema na bango?

8 Mpo na koyeba ndimbola ya maloba ‘kokatama ngenga na motema,’ tótalela likambo oyo Nzambe alendisaki Bayuda básala: ‘Bino bato ya Yuda mpe bino bato oyo bofandi na Yerusaleme, bólongola misutu ya mitema na bino; mpo nkanda na ngai ebima te lokola mɔtɔ . . . mpo na mabe ya misala na bino.’ Kasi misala na bango ya mabe ezalaki kouta wapi? Ezalaki kouta na kati, na mitema na bango. (Tángá Marko 7:20-23.) Na nzela ya Yirimia, Nzambe amonisaki ntina oyo Bayuda bazalaki kosala misala ya mabe. Bazalaki na mitema makasi mpe ya botomboki. Bamposa mpe makanisi na bango ezalaki kosepelisa Nzambe te. (Tángá Yirimia 5:23, 24; 7:24-26.) Nzambe ayebisaki bango ete: “Bókatama ngenga mpo na Yehova, mpe bólongola misutu ya mitema na bino.”​—Yir. 4:4; 18:11, 12.

9 Na yango, Bayuda na ntango ya Yirimia basengelaki kosala lipaso ya mitema na bango ya elilingi, to ‘kokatama ngenga na motema,’ kaka ndenge Bayisraele basengelaki kosala yango na ntango ya Moize. (Mib. 10:16; 30:6) ‘Kolongola misutu ya mitema na bango’ elimbolaki kolongola makambo oyo ezalaki kosala ete bákóma mitema makasi, elingi koloba makanisi, mayoki, to bamposa na bango oyo eyokanaki te na oyo ya Nzambe.​—Mis. 7:51.

‘MOTEMA MOKO MPO NA KOYEBA’ YEHOVA LELO OYO

10. Ndenge libondeli ya Davidi emonisi yango, tosengeli kosala nini?

10 Tosengeli kozala na botɔndi mingi ndenge Nzambe asalisi biso tóyeba malamu motema ya elilingi! Kasi, bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Likambo yango etaleli mpe Batatoli ya Yehova lelo oyo?’ Ezali solo ete lelo oyo bakristo mingi te na lisangá ya Yehova basalaka makambo ya mabe to bakómá lokola “bafigi ya mabe” ndenge Bayuda mingi bakómaki na ntango ya kala. Kutu, lelo oyo basaleli ya Nzambe bazali bato oyo bamipesá na ye, oyo bazali pɛto. Atako bongo, tosengeli komanyola na libondeli oyo Davidi asalaki epai ya Yehova ete: “Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai. Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai, mpe moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi.”​—Nz. 17:3; 139:23, 24.

11, 12. (a) Mpo na nini mokomoko na biso asengeli kotalatala motema na ye? (b) Eloko nini Nzambe akosala te?

11 Yehova alingi ete mokomoko na biso akoba kosepelisa ye. Mpo na moto ya sembo, Yirimia alobaki ete: “Yo, Ee Yehova ya mampinga, ozali kotalatala moyengebene; ozali komona bangɛi mpe motema.” (Yir. 20:12) Soki Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atalatalaka ata motema ya moto ya sembo, omoni te ete biso moko mpe tosengeli komitalelaka na bosembo nyonso? (Tángá Nzembo 11:5.) Soki tosali bongo, mbala mosusu tokomona ete tokómi na makanisi, mikano, to mayoki oyo ezali kosɛnga ete tótyela yango likebi. Tokoki komona eloko moko oyo tosengeli kolongola, oyo ezali lokola ‘mosutu ya motema na biso’ mpe ezali kosala ete motema na biso eboya kondima toli. Yango nde lipaso ya motema na biso ya elilingi. Soki omoni ete ezali malamu otalatala motema na yo ya elilingi, eloko nini osengeli koluka? Mpe ndenge nini okoki kobongisa bisika oyo esengeli kobongisa?​—Yir. 4:4.

12 Tóbosana likambo oyo te: Tosengeli te kokanisa ete Yehova akotinda biso na makasi tóbongwana. Alobaki na “bafigi ya malamu” ete ‘akopesa bango motema moko mpo báyeba’ ye. Alobaki te ete akotinda bango na makasi bábongola mitema. Esengelaki ete bango moko bázala na mposa ya kozala na mitema ya botosi, oyo ekomonisa ete bayebi Nzambe. Tomoni te ete biso mpe tosengeli kosala bongo?

Kotalatala motema mpe kolongola bamposa ya mabe ekomemela biso mapamboli

13, 14. Na ndimbola nini motema ya mokristo moko ekoki kosala ye mabe?

13 Yesu alobaki ete: “Makanisi mabe, koboma bato, misala ya ekobo, misala ya pite, koyiba, matatoli ya lokuta, maloba ya kofinga, eutaka na motema.” (Mat. 15:19) Yango emonisi ete soki motema makasi ya ndeko moko etindi ye asala ekobo to pite, mpe soki abongoli motema te, Nzambe akoki koboya ye mpo na libela. Kasi, ata moto oyo asali te lisumu ya ndenge wana akoki kotika ete mposa ya mabe ekola na kati ya motema na ye. (Tángá Matai 5:27, 28.) Wana nde esika mokomoko na biso asengeli kotalatala motema na ye. Soki otalitali motema na yo, mbala mosusu okomona ete ozali na makanisi ya mbindo mpo na moto oyo azali molongani na yo te, to ozali na bamposa oyo esepelisaka Nzambe te, oyo osengeli kobengana.

14 Ekoki mpe kozala ete ndeko moko ‘abomá moto’ te na ndenge ya solo, kasi abombá nkanda na motema mpe akómi tii na koyina ndeko na ye mokristo. (Lev. 19:17) Ndeko yango asengeli kosala makasi abengana makanisi wana oyo ekoki kokómisa motema na ye makasi.​—Mat. 5:21, 22.

15, 16. (a) Pesá ndakisa ya likambo moko oyo ekoki komonisa ete ndeko moko ‘akatami ngenga na motema te.’ (b) Mpo na yo, nini emonisi ete moto oyo ‘akatami ngenga na motema te’ akoki kosepelisa Yehova te?

15 Likambo ya esengo, bakristo mingi bakolisaka te bamposa ya ndenge wana na mitema na bango. Atako bongo, Yesu alobelaki mpe “makanisi mabe.” Yango ezali makanisi oyo ekoki kobebisa bomoi na biso na makambo mingi. Na ndakisa, moto moko akoki komonisa bosembo oyo ebongi te epai ya bandeko na ye ya libota. Toboyi te, bakristo basengeli kolinga bandeko na bango ya libota, mpe kozala te lokola bato mingi oyo bazangi bolingo na ‘mikolo oyo ya nsuka.’ (2 Tim. 3:1, 3) Atako bongo, ekoki kosalema ete moto alekisa ndelo ntango azali komonisa bolingo yango. Bato mingi balobaka ete ndeko ya makila azali na ntina mingi koleka bato mosusu. Yango wana, soki moto moko alobi to asali ndeko na bango mabe, balukaka komilatisa likambo yango. Kanisá likambo oyo bosembo ya ndenge wana etindaki bandeko mibali ya Dina básala. (Eba. 34:13, 25-30) Kanisá mpe nini ezalaki na motema ya Abisalome, oyo etindaki ye aboma ndeko na ye Aminone. (2 Sa. 13:1-30) Omoni te ete “makanisi mabe” nde etindaki bango básala makambo nyonso wana?

16 Lelo oyo, bakristo ya solo babomaka bato te. Atako bongo, ekoki kozala ete ndeko moko azali na makanisi mabe mpo na ndeko mobali to ndeko mwasi mosusu mpo asalelaki ndeko na ye ya libota likambo moko ya mabe to mpo akanisi ete asalaki bongo. Akoki ata koboya kokende epai ya ndeko yango soki abengisi ye na ndako na ye to koboya koyamba ye epai na ye, kaka mpo akanisi ete asalelaki ndeko na ye ya libota likambo moko ya mabe. (Ebr. 13:1, 2) Tosengeli te koluka komilongisa soki tokómi na makanisi ya ndenge wana mpo na ndeko to soki tolingaka te koyamba bapaya; yango ezali nde kozanga bolingo. Yehova, oyo atalatalaka mitema, akoki komona ete ndeko wana ‘akatami ngenga na motema te.’ (Yir. 9:25, 26) Kanisá lisusu bato oyo Yehova ayebisaki bango ete: “Bólongola misutu ya mitema na bino.”​—Yir. 4:4.

NDENGE YA KOZWA MPE KOBATELA ‘MOTEMA MOKO MPO NA KOYEBA’ NZAMBE

17. Ndenge nini kobanga Yehova ekoki kosalisa biso tókóma na motema oyo etosaka?

17 Okosala nini soki otalitali motema na yo ya elilingi mpe omoni ete etosaka mpenza te batoli ya Yehova, mpe ‘ekatamá [mpenza] ngenga te’? Ntango mosusu, omoni ete okweaka na motambo ya kobanga bato, olingaka kozala na lokumu to bozwi mingi, to mpe ozalaka mwa motó makasi to olingaka kosala kaka oyo motema na yo elingi. Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. (Yir. 7:24; 11:8) Yirimia akomaki ete Bayuda ya ntango na ye oyo bazalaki sembo te bakómaki “na motema makasi mpe ya botomboki.” Abakisaki ete: “Balobi na motema na bango te ete: ‘Sikoyo, tiká tóbanga Yehova Nzambe na biso, Oyo azali kopesa biso mbula makasi ná mbula ya eleko ya otɔnɛ.’” (Yir. 5:23, 24) Yango emonisi ete kokóma na momeseno ya kobanga Yehova makasi mpe kolinga ye ekoki kosalisa moto alongola ‘mosutu ya motema na ye.’ Kobanga ya ndenge wana ekoki kosalisa mokomoko na biso akóma na motema oyo endimaka kosala makambo oyo Nzambe asɛngi biso tósala.

18. Elaka nini Yehova apesaki mpo na bakristo oyo bazali na kondimana ya sika?

18 Lisusu, soki Yehova apesi biso ‘motema moko mpo na koyeba ye,’ tokoki kosala elongo na ye. Kutu, yango nde likambo oyo alakaki ete akosala mpo na bakristo oyo batyami mafuta oyo bazali na kondimana ya sika: “Nakotya mobeko na ngai na kati na bango, mpe nakokoma yango na motema na bango. Mpe nakokóma Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.” Kasi alobaki nini na oyo etali koyeba ye malamu? Abakisaki ete: “Bakoteyana lisusu te moto na moto moninga na ye mpe moto na moto ndeko na ye ete: ‘Bóyeba Yehova!’ mpo bango nyonso bakoyeba ngai, kobanda na oyo aleki moke kati na bango kino na oyo aleki monene kati na bango. . . . Mpo nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.”​—Yir. 31:31-34. *

19. Bakristo ya solo bazali na elikya nini ya kitoko?

19 Ezala ete ozali kozela kozwa matomba ya libela oyo kondimana ya sika ekopesa kuna na likoló to awa na mabele, osengeli koluka koyeba Yehova mpe kozala na kati ya bato na ye. Kasi liboso ete ozwa matomba wana, masumu na yo esengeli naino kolimbisama na nzela ya mbeka ya lisiko ya Kristo. Koyeba ete masumu na yo ekoki kolimbisama esengeli kotinda yo olimbisaka basusu, ata baoyo yo ná bango esimbaka te. Soki ondimi kolongola na motema na yo eloko nyonso oyo ekoki kobebisa yo, yango ekozala malamu mpo na motema na yo. Na ndenge yango, okomonisa kaka te ete ozali na mposa ya kosalela Yehova, kasi mpe ete okómi koyeba ye malamumalamu. Okozala lokola bato oyo Yehova alobaki mpo na bango na nzela ya Yirimia ete: “Bokoluka ngai mpe bokozwa ngai, mpo bokoluka ngai na motema na bino mobimba. Mpe nakomitika ete bózwa ngai.”​—Yir. 29:13, 14.

^ par. 18 Kondimana ya sika elobelami na mokapo 14 ya buku Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia.