Ozali koyeba lisusu?
Ozali koyeba lisusu?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna elandi:
• Nini ekosalisa yo oteya bana bákokisaka mikumba na bango?
‘Pesá mwana ndakisa’ na oyo etali kokokisa mikumba malamu. (Yoa. 13:15) Kolikya makambo mingi te; soki akoli mwa mingi, okoki kosɛnga ye mwa mingi na oyo etali bopɛto, kotosa ngonga mpe badevuare ya kelasi. Pesá malako ya sikisiki mpo osalisa mwana ayeba kokokisa mikumba na ye.—1/5, nkasa 19-20.
• Mpo na nini Nzambe apesaki Arona etumbu te ndenge asalaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo?
Arona abukaki mobeko ya Nzambe na likambo etali losambo ya bikeko. (Kob. 20:3-5) Kasi, Moize abondelaki Nzambe mpo na Arona, mpe lilɔmbɔ na ye ezalaki na “bokasi mingi.” (Yak. 5:16) Arona azalaki sembo bambula mingi. Mpe atako bato batyaki ye mpanzi likoló asala mwana-ngɔmbɛ, na nsima Arona amonisaki ete motema na ye ezalaki elongo na bango te, mpo elongo na bana ya Levi, akangamaki na ngámbo ya Yehova. (Kob.32:25-29)—15/5, lokasa 21.
• Ofire, oyo Biblia elobi ete ezalaki kobimisa wolo, ezalaki wapi?
Mpo na kozwa wolo na Ofire, Salomo asalaki bamasuwa na Ezione-gebere. (1 Bak. 9:26-28) Libongo yango ezalaki likoló ya golfe ya Aqaba pene na esika oyo ezali lelo Elat mpe Aqaba, na Mbu Motane. Na yango, mbala mosusu Ofire ezalaki na Arabie, pene na Mbu Motane to mpe na bokúla ya Afrika to ya Inde.—1/6, lokasa 15.
• ‘Balsame ya Gileade’ ezali nini? (Yir. 8:22)
Balsame ezali mai moko ya nsolo kitoko oyo ezalaka mafutamafuta oyo eutaka na milona ndenge na ndenge, oyo emonanaka na bisika mosusu, na ndakisa na Gileade, na ɛsti ya ebale Yordani. Lokola ezalaki kosalelama lokola nkisi, bazalaki kotya yango na bampota. Lokola Yisraele ezalaki lisusu na boyokani na Nzambe te, esengelaki kotinda bango báluka kobikisama, kasi basalaki bongo te. (Yir. 8:9)—1/6, nkasa 21-22.
• Nini ekoki kosalisa mokristo ayika mpiko soki molongani na ye asali ekobo?
Soki molongani oyo asali lisumu te azali kosala makasi ya kotosa mitinda ya Biblia, ezali na ntina te amona ete azali na ngambo mpo na ekobo oyo molongani na ye asali. Nzambe ayebi ete ozali na mposa ya kobɔndisama mpe kolendisama. Akoki kobɔndisa yo na nzela ya baninga na yo bakristo.—15/6, nkasa 30-31.
• Ndenge nini okoki kosalisa moninga oyo azali kobɛla?
Zalá moyoki malamu. (Mos. 3:1, 7) Omitya na esika na ye mpe zalá na boboto. (Rom. 12:15) Zalá na maloba ya kolendisa mpe yebá kosunga. (Kol. 4:6; 1 Yoa. 3:18) Kosundola moninga te. (Mas. 17:17)—1/7, nkasa 10-13.
• Ndenge nini toyebi ete Nzambe azali na ebandeli te?
Moize amonisaki yango na libondeli moko. (Nz. 90:2) Yango wana, kaka Yehova nde azali na titre “Mokonzi ya seko.” (1 Tim. 1:17)—1/7, lokasa 28.
• Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bálinga kotánga?
Osengeli komonisa bolingo mpe kopesa ndakisa malamu mpo na kosalisa bana bálinga kotánga. Mpe bana bázala na babuku. Tángáká na mongongo makasi. Lendisá bana báloba, bósolola makambo oyo botángi. Sɛngá bana bátángelaka yo, mpe lendisá bango bátunaka mituna.—15/7, lokasa 26.
• Mpo na nini Yesu awelaki te kokende epai ya moninga na ye Lazare oyo azalaki kobɛla mpo na kobikisa ye?
Ntango Yesu akómaki, Lazare asilaki kokufa banda mikolo minei. Lokola azelaki, Yesu apesaki litatoli malamu mpo na Tata na ye. Na yango, ebele ya bato bakómaki bandimi. (Yoa. 11:45)—1/8, nkasa 14-15.
• “Bisika oyo etombwaná” ezalaki nini?
Mbala mingi, ezalaki bisika ya polele oyo etombwaná to bisika mosusu ya losambo ya lokuta. Mbala mosusu, bazalaki kotya bitumbelo, makonzí to banzete ya losambo, mpe bililingi mosusu ya losambo na bisika moko boye mpo na kosala misala oyo Nzambe azalaki koboya. (Mit. 33:52)—1/8, lokasa 23.