Mituna ya batángi
Mituna ya batángi
Maloba oyo ezali na Ezekiele 18:20, oyo elobi ete “Mwana akomema ngambo te mpo na libunga ya tata,” ekweisi nde maloba oyo ezali na Kobima 20:5, oyo elobi ete Yehova apesaka “etumbu mpo na libunga ya batata likoló ya bana”?
Ezali bongo te. Vɛrsɛ ya liboso elobeli likambo oyo moto ye moko asali oyo asengeli kozongisa monɔkɔ mpo na yango, mpe vɛrsɛ mosusu emonisi ete libunga oyo moto asali ekoki komemela bana na ye mpe mpasi.
Makambo oyo ezali na Ezekiele mokapo 18 emonisi ete moto akozongisa monɔkɔ mpo na oyo asali. Vɛrsɛ 4 elobi ete “Molimo oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.” Kasi, tokoloba boni mpo na moto oyo azali “moyengebene mpe asali na bosembo mpe na boyengebene”? “Akotikala mpenza na bomoi.” (Ezk. 18:5, 9) Na yango, ntango moto akokisi mbula oyo akoki kozongisa monɔkɔ mpo na likambo oyo asali, moto na moto akosambisama “na kotalela banzela na ye.”—Ezk. 18:30.
Yango emonanaki na likambo ya Kora, oyo azalaki Molevi. Ntango Bayisraele bazalaki naino kosala mobembo na esobe, Kora azalaki lisusu kosepela te na mikumba na ye. Mpo na koluka kozwa mikumba nyonso ya bonganga-nzambe, Kora ná bato mosusu batombokelaki bamonisi ya Yehova, Moize ná Arona. Lokola balukaki na lolendo nyonso kozwa esika yango—mokumba oyo ezalaki ya bango te—Yehova abomaki Kora ná bato mosusu oyo balandaki ye na botomboki yango. (Mit. 16:8-11, 31-33) Kasi, bana ya Kora bakɔtaki na botomboki wana te. Nzambe apesaki bango etumbu te mpo na lisumu ya tata na bango. Bosembo na bango epai ya Yehova esalisaki bango bátikala na bomoi.—Mit. 26:10, 11.
Kasi, tokoloba nini mpo na likebisi oyo ezali na Kobima 20:5, oyo ezalaki na kati ya Mibeko Zomi? Awa mpe tótalela bavɛrsɛ mosusu oyo ezali liboso mpe nsima na yango. Yehova asalaki kondimana ya Mibeko ná ekólo Yisraele. Nsima ya koyoka maloba ya kondimana yango, Bayisraele balobaki polele ete: “Nyonso oyo Yehova alobi tondimi kosala yango.” (Kob. 19:5-8) Na ndenge yango, ekólo mobimba ekɔtaki na boyokani mpenza na Yehova. Na yango, maloba oyo ezali na Kobima 20:5 etalelaki mpenza ekólo yango mobimba.
Ntango Bayisraele bazalaki sembo epai ya Yehova, ekólo mobimba ezalaki kozwa matomba mpe mapamboli mingi. (Lev. 26:3-8) Ntango bazalaki kotikala sembo te, bazalaki kozanga mapamboli yango. Ntango ekólo Yisraele ebwakaki Yehova mpe elandaki banzambe ya lokuta, Yehova alongolaki bango mapamboli mpe libateli na ye; ekólo ekómaki na mpasi. (Bas. 2:11-18) Likambo ya esengo, ezalaki na mwa bato oyo babatelaki bosembo mpe mibeko ya Nzambe atako ekólo mobimba elandaki losambo ya bikeko. (1 Bak. 19:14, 18) Na ntembe te, bato ya sembo mpe bamonaki mpasi mpo na masumu ya ekólo, kasi Yehova amoniselaki bango motema boboto na ye.
Ntango Bayisraele bakómaki mpenza kobuka mibeko ya Yehova na nko, nkombo ya Yehova ekómaki eloko ya kotyola na kati ya bikólo; mpe Yehova azwaki ekateli ya kopesa bato na ye etumbu, na ndenge atikaki ete bámemama na boombo na Babilone. Ya solo, etumbu yango ezwaki moto mokomoko mpe ekólo mobimba. (Yir. 52:3-11, 27) Ya solo, Biblia emonisi ete ngambo ya ekólo Yisraele ezalaki mpenza monene na boye ete mabota misato, minei to mpe koleka bazwaki etumbu mpo na makambo mabe ya bankɔkɔ na bango, ndenge Kobima 20:5 emonisi yango.
Liloba ya Nzambe ezali mpe na masolo ya mabota oyo ezwaki bitumbu mpo na etamboli mabe ya baboti na bango. Nganga-nzambe monene Eli asilikisaki Yehova ndenge atikaki bana na ye ya mibali, “bato mpamba,” oyo bazalaki kosala pite bákoba kozala banganga-nzambe. (1 Sa. 2:12-16, 22-25) Lokola Eli akumisaki bana na ye koleka Yehova, Nzambe alobaki ete libota ya Eli ekolongolama na mosala ya bonganga-nzambe, yango nde esalemaki kobanda na Abiatare, nkɔkɔ ya nkɔkɔ ya nkɔkɔ na ye. (1 Sa. 2:29-36; 1 Bak. 2:27) Mobeko oyo ezali na Kobima 20:5 emonisami mpe na ndakisa ya Gehazi. Asalelaki mabe mokumba na ye ya kozala mosaleli ya Elisha mpo na kozwa biloko oyo Naamane, mokonzi ya basoda ya Asiri oyo abikaki na maladi amemaki. Na nzela ya Elisha, Yehova ayebisaki etumbu na ye na maloba oyo: “Maba ya Naamane ekokangama na yo mpe na bana na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (2 Bak. 5:20-27) Na yango, bana ya Gehazi bazwaki mpe mpasi mpo na mabe ya tata na bango.
Lokola Yehova azali Mozalisi mpe Mopesi-Bomoi, azali na lotomo ya kopona etumbu nini ezali sembo mpe ebongi. Bandakisa oyo touti kolobela emonisi ete bana to bankɔkɔ bakoki koyoka mpasi mpo na masumu ya bankɔkɔ na bango. Kasi, Yehova “ayokaka koganga ya bato ya mpasi,” mpe bato oyo bazongeli ye na motema moko, bakoki kondimama na ye ata mpe kozwa kimya ya motema.—Yobo 34:28.
[Elilingi na lokasa 29]
Kora ná batomboki mosusu bazongisaki monɔkɔ mpo na oyo basalaki