Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Boyangeli ya Satana ekolonga soki moke te

Boyangeli ya Satana ekolonga soki moke te

Boyangeli ya Satana ekolonga soki moke te

“Ekosukela moto mabe malamu te.”​—MOS. 8:13.

1. Mpo na nini kosambisama ya bato mabe na mikolo ezali koya ezali nsango ya kobɔndisa?

 ATA ndɛlɛ, bato mabe bakosambisama. Bakozongisa monɔkɔ mpo na makambo oyo basalá. (Mas. 5:22; Mos. 8:12, 13) Nsango yango ezali kobɔndisa, mingimingi bato oyo balingaka boyengebene mpe baoyo basalelá bango makambo na bosembo te mpe bazali konyokwama na mabɔkɔ ya bato mabe. Na kati ya bato mabe, moto ya libosoliboso oyo asengeli kosambisama, ezali Satana Zabolo, tata ya mabe.​—Yoa. 8:44.

2. Mpo na nini esengelaki ntango eleka mpo na kosilisa ntembe oyo ebimaki na Edene?

2 Na elanga ya Edene, Satana akómaki na mposa makasi ya lokumu mpe asalaki ete bato báboya boyangeli ya Yehova. Mpo na yango, baboti na biso ya liboso balandaki Satana, batombokelaki Bokonzi ya Yehova mpe bakómaki bato ya masumu na miso na Ye. (Rom. 5:12-14) Ya solo, Yehova ayebaki ndenge kozanga botosi na bango mpe nzela ya botomboki oyo baponaki ekosukela bango. Nzokande, bikelamu nyonso basengelaki komona likambo yango polele. Yango wana, esengelaki ntango eleka mpo na kosilisa ntembe yango mpe komonisa polele ete batomboki yango bazalaki na elonga te.

3. Ndenge nini totalelaka baguvɛrnema ya bato?

3 Lokola bato baboyaki litambwisi ya Yehova, basengelaki kotya baguvɛrnema na bango moko. Ntango akomelaki baninga na ye bakristo ya Roma, ntoma Paulo abengaki baguvɛrnema yango ya bato ete “bakonzi oyo bazali liboso.” Na ntango ya Paulo, bakonzi oyo bazali liboso ezalaki libosoliboso guvɛrnema ya Roma oyo Amperɛrɛ Néron ayangelaki kobanda na mobu 54-68 T.B. Paulo alobaki ete bakonzi yango oyo bazali liboso, “bokonzi na bango ezali na ndelo oyo etyami na Nzambe.” (Tángá Baroma 13:1, 2.) Na maloba yango, Paulo alingaki nde koloba ete guvɛrnema ya bato eleki oyo ya Nzambe? Soki moke te. Kasi, alingaki kaka koloba ete ntango nyonso oyo Yehova akopesa nzela ete bato báyangela, bakristo basengeli kotosa “ebongiseli ya Nzambe” mpe kondima bakonzi yango.

Nzela oyo ezali komema na likama

4. Limbolá ntina oyo boyangeli ya bato ekoki kolonga te.

4 Nzokande, boyangeli ya bato oyo Satana azali kotambwisa ekolonga soki moke te. Mpo na nini? Ntina ya liboso, mpo bokonzi yango ezali kotambwisama te na bwanya ya Nzambe. Kaka Yehova nde azali na bwanya ya kokoka. Na yango, kaka ye nde abongi kotambwisa bato na ndenge oyo ekolonga. (Yir. 8:9; Rom. 16:27) Na bokeseni na bato, oyo mbala mingi bazwaka mayele nsima ya kosala libunga, Yehova ayebaka ntango nyonso lolenge oyo eleki malamu ya kosala. Guvɛrnema ata moko te oyo eboyi kolanda litambwisi na ye ekolonga. Mpo na ntina wana kaka​—kozanga kolobela makanisi mabe oyo ezali na kati—​mayele ndenge na ndenge oyo Satana azali kosalela mpo na koyangela na nzela ya bato ekolonga soki moke te.

5, 6. Ekoki kozala nini etindaki Satana atombokela Yehova?

5 Mbala mingi, moto oyo akanisaka malamu alingaka te komikɔtisa na likambo moko oyo emonani polele ete ekolonga te. Soki atingami kaka na likambo yango, nsukansuka akomona ete asalaki libunga. Makambo oyo eleká, emonisi ete ezali na ntina te kotɛmɛla Mozalisi na biso, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. (Tángá Masese 21:30.) Kasi, lolendo mpe mposa makasi ya kozwa lokumu oyo Satana akómaki na yango ekangaki ye miso, mpe apesaki Yehova mokɔngɔ. Na yango, Zabolo aponaki na nko nzela oyo esengelaki kaka komema ye na likama.

6 Lolendo ya Satana emonanaki na nsima epai ya mokonzi moko ya Babilone oyo Biblia elobi ete atutaki ntolo boye: “Nakomata na likoló. Nakotombola kiti na ngai ya bokonzi likoló ya minzoto ya Nzambe, mpe nakofanda na ngomba ya kokutana, na nsukansuka ya nɔrdi. Nakomata likoló ya bisika oyo etombwaná ya mapata; nakomikokanisa na Oyo-Aleki-Likoló.” (Yis. 14:13-15) Mikano ya bozoba ya mokonzi wana elongaki te, mpe bokonzi ya Babilone esukaki na ndenge ya nsɔni. Ndenge moko mpe, mosika te Satana ná mokili na ye bakokwea mpo na libela.

Mpo na nini apesaki nzela?

7, 8. Wapi mwa matomba oyo ebimi na ndenge Yehova atikaki nzela mabe ezala mpo na mwa ntango?

7 Bato mosusu bakoki komituna mpo na nini Yehova apekisaki te bato bálanda Satana mpe bálanda te boyangeli oyo emonanaki ete ekolonga soki moke te. Lokola azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, akokaki mpenza kosala yango. (Kob. 6:3) Kasi, asalaki yango te. Bwanya na ye etindaki ye ete mpo na mwa ntango asala eloko te na botomboki ya bato mpo ayebaki ete nsukansuka yango ekobimisa matomba. Na nsuka, ekomonana ete Yehova azali Moyangeli ya sembo mpe ya bolingo, mpe bato ya sembo bakozwa matomba na ekateli wana ya Nzambe.

8 Soki bato baboyaki kolanda Satana mpe baboyaki kobwaka boyangeli ya Nzambe, mpasi elingaki kozala te na mokili! Atako bongo, ekateli ya Yehova ya kotika bato bámiyangela bango moko mpo na mwa ntango ebimisi mpe matomba. Esalisi bato ya mitema sembo bázala na bwanya ya koyoka Nzambe mpe kotyela ye motema. Na boumeli ya bikeke, bato bameki baguvɛrnema mingi mpe ya ndenge na ndenge, kasi ata moko te elongi. Likambo yango esalisi basambeli ya Nzambe bákóma lisusu na kondima makasi ete kaka guvɛrnema ya Yehova nde eleki malamu. Ya solo, kotika oyo Yehova atikaki nzela na boyangeli mabe ya Satana, ememeli bato mpasi, ata mpe basambeli ya sembo ya Nzambe bazali komona mpasi yango. Kasi, ntango moke oyo Nzambe atiki ete mabe ezala ebimisi mpe matomba mpo na basambeli yango ya sembo.

Botomboki oyo ekumisi nde Yehova

9, 10. Limbolá ndenge oyo boyangeli ya Satana epesi Yehova nkembo.

9 Kotika nzela ete bato bátambwisama na Satana mpe bámiyangela bango moko emonisi te ete Yehova ayangelaka mabe. Kutu, emonisi bosolo ya maloba oyo Yirimia alobaki na nzela ya elimo santu ete bato bakoki komiyangela bango moko te. (Tángá Yirimia 10:23.) Lisusu, botomboki ya Satana esali ete Yehova amonisa lisusu polele bizaleli na ye kitoko. Ndenge nini?

10 Makambo mabe ya boyangeli ya Satana, emonisi polele bizaleli ya kokoka ya Yehova na ndenge oyo ekokaki komonana te. Na ndenge yango, azwi nkembo lisusu na miso ya bato oyo balingaka ye. Ya solo, ata soki ezali bongo to te, boyangeli ya Satana ekumisi nde Nzambe. Emonisi polele lolenge eleki malamu oyo Yehova asalaki mpo na kosilisa ntembe oyo ebimaki mpo na boyangeli na ye. Mpo na komonisa bosolo ya likambo yango, tólobela mwa moke bizaleli mosusu ya Yehova mpe tómona ndenge boyangeli mabe ya Satana esali ete Yehova amonisa bizaleli yango malamu lisusu.

11. Ndenge nini Yehova amonisaki bolingo na ye?

11 Bolingo. Makomami eyebisi biso ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoa. 4:8) Bolingo ya Nzambe emonanaki libosoliboso ndenge akelaki bato. Lisusu, lolenge oyo tokelamá na ndenge ya kokamwa mpe kitoko emonisaka polele bolingo ya Nzambe. Na bolingo na ye, Yehova apesaki mpe bato esika kitoko ya kofanda oyo ezali na biloko nyonso oyo basengelaki na yango mpo na kozala na esengo. (Eba. 1:29-31; 2:8, 9; Nz. 139:14-16) Kasi, ntango mabe ekɔtaki na mokili, Yehova amonisaki bolingo na ye na ndenge mosusu. Ndenge nini? Ntoma Yoane atángi maloba oyo ya Yesu: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Ezali na lolenge mosusu ya malamu koleka oyo Nzambe akokaki komonisa bolingo na ye mpo na bato koleka ndenge atindaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki aya awa na mabele mpo na kosikola bato ya masumu? (Yoa. 15:13) Bolingo monene wana oyo Nzambe amonisaki ezalaki ndakisa oyo apesaki bato, apesaki bango libaku ya komonisa mokolo na mokolo, bolingo ya komipimela oyo Nzambe amonisaki, oyo Yesu mpe amonisaki.​—Yoa. 17:25, 26.

12. Na ndenge nini Yehova amonisi nguya na ye?

12 Nguya. Kaka “Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” nde azali na nguya ya kokela bomoi. (Em. 11:17; Nz. 36:9) Ntango moto abotamaka, bomoi na ye ezalaka lokola papye oyo bakomi eloko te. Na liwa, papye yango etondaka na bikateli oyo azwaki, makambo oyo asalaki, mpe makambo oyo akutanaki na yango na bomoi na ye mobimba oyo emonisaki bizaleli mpe bomoto na ye. Yehova akoki kobomba makambo wana nyonso na makanisi na ye. Na ntango oyo ebongi, Yehova akoki kozongisa lisusu moto yango na bomoi, ná makambo na ye nyonso. (Yoa. 5:28, 29) Na yango, atako Nzambe akanaki te ete bato bákufaka, liwa epesi Yehova libaku ya komonisa ete azali na nguya likoló ya lilita. Ya solo, Yehova azali “Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”

13. Ndenge nini mbeka ya Yesu emonisi bosembo ya kokoka ya Yehova?

13 Bosembo. Yehova akosaka te; asalaka mpe te makambo ya kozanga bosembo. (Mib. 32:4; Tito 1:2) Akangamaka ntango nyonso na mitinda na ye ya solo mpe ya bosembo, ata soki kosala bongo ekoki komonana ete ezali mpo na litomba na ye te. (Rom. 8:32) Ezalaki mpenza mpasi mpo na Yehova komona Yesu, Mwana na ye oyo alingaka mingi azali kokufa likoló ya nzete ya mpasi lokola motuki! Kasi, lokola alingaki bato ya kozanga kokoka, Yehova apesaki nzela na likambo wana ya mpasi mpo na kolanda mitinda na ye ya sembo mpe ya kokoka. (Tángá Baroma 5:18-21.) Mokili oyo etondi na makambo ya kozanga bosembo esali ete Yehova amonisa ete kaka ye nde azali na bosembo oyo eleki.

14, 15. Wapi mwa makambo mosusu oyo emonisi bwanya monene ya Yehova mpe motema molai na ye?

14 Bwanya. Ntango kaka Adama ná Eva basalaki lisumu, Yehova amonisaki ndenge oyo akolongola mabe nyonso oyo botomboki na bango ebimisi. (Eba. 3:15) Ekateli wana oyo azwaki kozanga kozela, mpe ndenge oyo azalaki komonisa mokemoke epai ya basaleli na ye makambo mosusu oyo etali mokano yango, esali ete bwanya na ye emonana polele. (Rom. 11:33) Eloko moko te ekoki kopekisa Nzambe asala makambo na ndenge oyo ekolonga. Na mokili oyo etondi na pite, bitumba, kozanga bokatikati, kozanga botosi, kozanga mawa, koponapona, mpe bokosi, Yehova azwi mpenza libaku ya komonisa bikelamu na ye bwanya ya solosolo. Moyekoli Yakobo alobaki boye: “Bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto, mpe kimya, na makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na mbuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te.”​—Yak. 3:17.

15 Motema molai. Motema molai ya Yehova elingaki komonana mpenza te soki makambo lokola kozanga kokoka ya bato, masumu mpe mabunga ezalaki te. Ndenge Yehova andimi kosala bongo na boumeli ya bankóto ya bambula, emonisi ete azali na bizaleli wana kitoko na ndenge ya kokoka mpenza, mpe tosengeli kozala na botɔndi mingi mpo na yango. Mpo na likambo yango, ntoma Petro akomaki ete tosengeli ‘kotalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko.’​—2 Pe. 3:9, 15.

16. Mpo na nini ndenge oyo Yehova alimbisaka ezali likambo ya esengo monene?

16 Alimbisaka mpenza. Biso nyonso tozali bato ya masumu, mpe tobɛtaka mabaku mbala mingi. (Yak. 3:2; 1 Yoa. 1:8, 9) Tosengeli mpenza kozala na botɔndi ndenge Yehova ‘alimbisaka mpenza’! (Yis. 55:7) Tótalela mpe likambo oyo: Lokola tobotamá bato ya masumu, toyokaka esengo makasi ntango Nzambe alimbisi mabunga na biso. (Nz. 51:5, 9, 17) Soki mokomoko na biso amoni ezaleli wana ya Yehova, bolingo na ye mpo na Nzambe ekokóma makasi mpe ekolendisa ye alanda ndakisa ya Nzambe na boyokani na ye na basusu.​—Tángá Bakolose 3:13.

Ntina oyo mokili ezali na maladi

17, 18. Na ndenge nini boyangeli ya Satana elongi te?

17 Ebongiseli mobimba ya Satana​—likambo oyo boyangeli na ye ebimisi—​ekwei mbala na mbala mpe esalemi bongo na boumeli ya bikeke mingi. Na 1991, zulunalo moko (The European) elobaki boye: “Mokili ezali mpenza na maladi? Ɛɛ, ezali mpenza bongo, kasi . . . Nzambe te nde apesi maladi yango​—maladi ya mokili euti na bato ya mokili.” Ezali mpenza solo! Lokola baboti na biso ya liboso balandaki Satana, baponaki boyangeli ya bato na esika ya boyangeli ya Yehova. Na ndenge yango, babimisaki boyangeli oyo ekoki kolonga soki moke te. Bampasi mpe minyoko oyo bato bazali komona na mokili mobimba emonisi ete boyangeli ya bato ezali na maladi mabe mpenza.

18 Boyangeli ya Satana elendisaka moimi. Nzokande, moimi ekoki kolonga bolingo te oyo esimbi mpenza boyangeli ya Yehova. Boyangeli ya Satana elongi te kosalisa bato bázala na bomoi ya malamu, ya esengo mpe na kimya. Boyangeli ya Yehova elongisami kaka! Tozali mpenza komona bilembeteli ya likambo yango lelo oyo? Ɛɛ, ndenge tokomona yango na lisolo oyo ekolanda.

Makambo nini toyekoli na ntina na Bokonzi nsima ya kotánga . . .

Baroma 13:1, 2?

Masese 21:30?

Yirimia 10:23?

Bakolose 3:13?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 25]

Boyangeli ya Satana ememeli bato litomba moko te

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Fɔtɔ ya basoda ya États-Unis

Fɔtɔ ya P. Almasy mpo na OMS

[Elilingi na lokasa 26]

Yehova azali na nguya ata likoló ya lilita

[Elilingi na lokasa 27]

Bolingo mpe bosembo ya Yehova emonanaki na mbeka ya Mwana na ye