Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nazali na ekateli ya kokoba kosalela Mozalisi na ngai

Nazali na ekateli ya kokoba kosalela Mozalisi na ngai

Lisolo ya bomoi

Nazali na ekateli ya kokoba kosalela Mozalisi na ngai

AYA CONSTANCE BENANTI

ACamille, mwana na biso ya mwasi ya sanza 22, abɛlaki fɛfɛlɛ makasi mpe maladi na ye eumelaki te. Nsima ya mikolo motoba kaka akufaki. Nazalaki na mawa makasi. Nazalaki lisusu na mposa ya bomoi te. Mpo na nini Nzambe atiki likambo ya boye esalema? Natambolaki motó.

BABOTI na ngai balongwaki na Castellammare del Golfo, na Sicile, engumba moko ya Italie. Bayaki kofanda na engumba New York, epai ngai nabotamaki mwa 8 Desɛmbɛ 1908. Na libota na biso tozalaki: tata, mama mpe bana mwambe, mibali mitano mpe basi misato. a

Na 1927, tata na ngai Santo Catanzaro, abandaki koyangana na makita na mwa etuluku moko ya bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Giovanni De Cecca, ndeko moko ya Italie oyo azalaki kosala na Brooklyn, na New York, biro monene ya Batatoli ya Yehova (oyo ebengami Betele) azalaki kotambwisa makita na esika tozalaki kofanda, pene na New Jersey. Na nsima, tata abandaki kosakola mpe akómaki mobongisi-nzela, mosala oyo asalaki tii ntango akufaki na 1953.

Ntango mama azalaki elenge, azalaki kosepela akóma mamelo, kasi baboti na ye balingaki te. Na ebandeli, mama abandaki kopekisa ngai nasangana na tata na boyekoli na ye ya Biblia. Kasi, mosika te namonaki ete ezaleli ya tata ebongwanaki. Akómaki kimya, boboto, mpe kimya ezalaki makasi mpenza na libota. Nasepelaki mpenza na ezaleli yango.

Na ntango wana, nakutanaki na Charles, mobali moko ya mbula na ngai oyo abotamaki na Brooklyn. Libota na bango ná oyo ya biso eutaki na esanga Sicile. Mosika te, tokómaki bafianse, mpe ntango tata autaki na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na 1931 na engumba Columbus, na etúká ya Ohio, tobalanaki. Nsima ya mbula moko, Camille, mwana na biso ya mwasi abotamaki. Ntango akufaki, natungisamaki mingi. Mokolo moko Charles, azalaki kolela mpe alobaki na ngai boye: “Camille azalaki mwana na biso nyonso. Bomoi esuki te, tóbɔndisana kaka.”

Tondimi solo ya Biblia

Charles akundwelaki ngai ete tata alobelaki elikya ya lisekwa na lisolo oyo asalaki mokolo bakundaki Camille. Natunaki ye ete: “Yo ondimaka mpenza ete lisekwa ekozala?”

Ayanolaki ete, “Nandimaka! Mpo na nini toluki te koyeba makambo mingi oyo Biblia elobi na ntina na yango?”

Nalalaki te na butu wana. Na ngonga ya motoba na ntɔngɔ, liboso tata akende mosala, nakendeki epai na ye mpe nayebisaki ye ete ngai ná Charles tolingi koyekola Biblia. Asepelaki makasi mpe ayambaki ngai. Mama azalaki naino na mbeto, kasi ayokaki lisolo na biso. Atunaki ngai soki likambo nini esalemi. Nayanolaki ye ete, “Likambo ezali te. Ngai ná Charles tozwi ekateli ya koyekola Biblia.”

Ye alobaki ete: “Biso nyonso tozali na mposa ya koyekola Biblia.” Na yango, biso nyonso, ná bandeko na ngai ya mibali ná ya basi, bato 11, tobandaki koyekola Biblia.

Boyekoli ya Biblia ebɔndisaki ngai, mpe mokemoke makanisi na ngai oyo ebulunganaki mpe mawa oyo nazalaki na yango ebongwanaki elikya. Mbula moko na nsima, na 1935, ngai ná Charles tobandaki koteya bato mosusu solo ya Biblia. Na Febwali 1937, nsima ya kolanda lisukulu moko na biro monene ya Batatoli na Brooklyn, oyo elobelaki ndimbola ya batisimo ya mai na kati ya Makomami, tobatisamaki elongo na bandeko mosusu pene na otɛlɛ moko oyo ezalaki mosika te na esika yango. Nabatisamaki te kaka mpo nazalaki na elikya ya komona mwana na ngai mokolo mosusu, kasi mpe mpo nasepelaki kosalela Mozalisi na biso, oyo nakómaki koyeba mpe kolinga.

Mosala ya mobongisi-nzela

Koyebisa basusu makambo oyo nayekolaki ezalaki kosepelisa ngai mingi mpe ebotaki mbuma, mingimingi mpo bato mingi na ntango wana bandimaki nsango ya Bokonzi mpe bakómaki kosakola yango. (Matai 9:37) Na 1941, ngai ná Charles tokómaki babongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basaleli ya ntango nyonso. Mosika te, tosombaki wagɔ moko oyo ekómaki ndako na biso, mpe Charles atikaki izini na biso ya bilamba na mabɔkɔ ya leki na ngai Frank. Na nsima, tosepelaki makasi ntango tozwaki mokanda oyo batindelaki biso mpo na koyebisa biso ete tokómi babongisi-nzela minene. Tokendaki liboso na New Jersey, mpe na nsima batindaki biso na engumba New York.

Na 1946, na liyangani ya etúká oyo tosalaki na engumba Baltimore, na Maryland, basɛngaki biso tókɔta na likita moko na bandeko oyo biro ya Batatoli ya Yehova etindaki. Kuna, tokutanaki na Nathan H. Knorr mpe Milton G. Henschel. Balobelaki mosala ya misionɛrɛ mpe, mingimingi, mosala ya kosakola na Italie. Basɛngaki biso tótalela soki tokoki kokɔta na Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia.

Balobaki na biso ete, “Bókanisa bongo bópesa biso eyano.” Ntango tobimaki na biro, ngai ná Charles totalanaki, tobalukaki, mpe tozongaki lisusu na biro yango. Tolobaki boye: “Nsima ya kokanisa, tomoni ete tokokende na Gileadi.” Mikolo zomi na nsima, tokɔtaki kelasi ya mbala ya nsambo ya Gileadi.

Nabosanaka te basanza oyo tolekisaki kuna mpo na koyekola. Likambo ekamwisaki biso mingi ezali motema molai mpe bolingo oyo balakisi bazalaki na yango ntango bazalaki kolakisa biso ndenge ya kolonga mikakatano na mboka mopaya. Ntango tosilisaki formasyo yango na Yuli 1946, batindaki biso tókenda kosakola mwa moke na engumba New York, epai bato mingi ya Italie bazali. Na nsima, mokolo ya esengo eyaki! Mwa 25 Yuni 1947, tokendaki na Italie, epai batindaki biso.

Tokómi epai batindaki biso

Tosalaki mobembo yango na masuwa moko oyo ezalaki liboso masuwa ya basoda. Nsima ya mikolo 14 na mai, tosɛmaki na Italie, na libongo ya Genoa. Bilembo ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki naino komonana na engumba yango; elekaki kaka mbula mibale uta etumba yango esilaki. Na ndakisa, babɔmbi epanzaki bavitre nyonso ya maninisa na esika bazwaka engbunduka. Na Genoa, tozwaki engbunduka moko oyo ememaka biloko mpe tokendeki na Milan, epai biro ya filiale mpe ndako moko ya bamisionɛrɛ ezalaki.

Nsima ya etumba, bomoi ezalaki mpasi na Italie. Bazalaki kosala makasi mpo na kotonga lisusu mboka yango, kasi bobola ezalaki kaka makasi. Mosika te, nakómaki kobɛlabɛla. Monganga moko ayebisaki ngai ete nazali na maladi ya motema, mpe akanisaki ete ekozala malamu nazonga na États-Unis. Nazali na esengo mpo ekzame na ye ezalaki solo te. Nsima ya mbula 58, nazali kaka na teritware na ngai na Italie.

Nsima ya kosala kaka mwa bambula na Italie, bandeko na ngai na États-Unis balingaki kotindela biso vuatire. Charles aboyaki, mpe nasepelaki mpenza na ekateli yango. Toyebaki ete Motatoli ata moko te na Italie azalaki na vuatire, mpe Charles amonaki malamu tózala na bomoi lokola oyo ya bandeko na biso baklisto. Toyaki kozwa mwa vuatire moko ya moke kaka na 1961.

Ndako ya Bokonzi na biso ya liboso na Milan ezalaki na nse ya mabelé mpe pavema na yango ezalaki na simá te. Mai ya mbula ezalaki kotɛlɛma na ndako yango lokola kikɔsɔ. Bampoko ezalaki mpe kotambolatambola na Ndako ya Bokonzi. Ndako yango ezalaki kaka na ampulɛ mibale oyo tozalaki kopelisa ntango tozalaki kosala makita. Atako makambo ezalaki mabe bongo na ndako yango, tozalaki kolendisama mingi komona bato ya sembo bazali koya na makita mpe nsukansuka, kosangana na biso na mosala ya kosakola.

Makambo namoni na mosala ya misionɛrɛ

Mokolo moko, totikelaki mobali moko mwa buku La paix de demain sera-t-elle de longue durée? Ntango tozalaki kokenda, Santina, mwasi ya moto yango akómaki; azalaki na basaki ya biloko na mabɔkɔ. Asalaki lokola asilika; alobaki ete azali kobɔkɔla bana ya basi mwambe mpe azali na ntango ya kobungisa te. Ntango nakendaki lisusu kotala Santina, mobali na ye azalaki na ndako te, mpe ye moko azalaki kotonga bilamba. Alobaki ete, “Nazali na ntango te ya koyoka yo. Longola yango, nayebi kotánga te.”

Nabondelaki Yehova na motema, na nsima natunaki Santina soki nakoki kofuta ye mpo atongela mobali na ngai triko. Pɔsɔ mibale na nsima, nazwaki triko yango mpe ngai ná Santina tobandaki koyekola Biblia na lisalisi ya buku “La vérité vous affranchira.” Santina ayekolaki kotánga mpe, atako mobali na ye azalaki kotɛmɛla ye, akolaki na elimo mpe azwaki batisimo. Bana na ye mitano bakómaki Batatoli, mpe Santina asalisaki ebele ya bato mosusu bándima solo ya Biblia.

Na Marsi 1951, ngai ná bamisionɛrɛ mosusu mibale, Ruth Cannon b mpe Loyce Callahan, oyo na nsima abalaki Bill Wengert, batindaki biso na Brescia, epai Motatoli ata moko te azalaki. Tozwaki ndako ya kofutela oyo ezalaki na biloko nyonso na kati, kasi nsima ya sanza mibale, nkolo-ndako yango apesaki biso mokolo moko kaka mpo tóbima na ndako na ye. Lokola Batatoli bazalaki na mboka yango te, tomonaki malamu tófanda na otɛlɛ moko, epai tosalaki sanza soki mibale.

Biloko ya kolya ezalaki mingi te: na ntɔngɔ tozalaki komɛla kafe ná mampa ya pɛpɛlɛ; na midi mbuma, mampa mpe fromaje; mpe na mpokwa mbuma, mampa mpe fromaje. Atako bongo, tozwaki mapamboli mingi. Na nsima, tozwaki mwa apartema moko, mpe na Ekaniseli ya liwa ya Nkolo na 1952, bato 35 bayanganaki na eteni moko ya apartema yango oyo tosalelaki lokola Ndako ya Bokonzi.

Mikakatano oyo tokutanaki na yango

Na ntango wana, bakonzi ya Lingomba ya Katolike bazalaki naino kokonza bato na Italie. Na ndakisa, ntango tozalaki kosakola na engumba Brescia, bana mibali moko oyo basango batindaki babambaki biso mabanga. Atako bongo, bato 16 babandaki koyekola Biblia, mpe nsima ya mwa ntango moke bakómaki Batatoli. Mpe na kati na bango, ezalaki mpe na moko kati na bana mibali oyo balingaki kobamba biso mabanga. Lelo oyo, azali nkulutu na lisangá moko na Brescia. Na 1955, ntango totikaki Brescia, basakoli bazalaki 40.

Na nsima, tosalaki mbula misato na engumba Leghorn (Livourne), epai Batatoli mingi bazalaki basi. Na yango, biso bandeko basi nde tozalaki kosala mikumba ya lisangá oyo ebongi na bandeko mibali. Na nsima, tokendaki lisusu na Genoa, epai tobandaki mbula 11 liboso. Na ntango wana, Genoa ekómaki na lisangá moko. Ndako ya Bokonzi ezalaki na eteni ya ebandeli ya ndako oyo apartema na biso ezalaki.

Ntango kaka tokómaki na Genoa, nabandaki koyekola Biblia na mwasi moko oyo mobali na ye azalaki liboso mobundi ya lisano ya makofi mpe na ntango wana azalaki mokonzi ya ndako moko ya lisano ya makofi. Mwasi yango akolaki noki na elimo mpe mosika te akómaki ndeko na biso. Nzokande, mobali na ye atɛmɛlaki ye ntango molai. Na nsima, abandaki kokende kotika mwasi na ye na makita. Na esika ya kokɔta na Ndako ya Bokonzi, azalaki kolanda makita libándá. Ntango totikaki Genoa, toyokaki na nsima ete asɛngaki abanda koyekola Biblia. Na nsima, azwaki batisimo mpe akómaki nkulutu moko ya bolingo mpenza na lisangá. Atikalaki sembo tii na liwa.

Nayekolaki mpe Biblia na mwasi moko oyo fianse na ye azalaki polisi. Na ebandeli, polisi yango azalaki kosepela na solo mwa moke, kasi nsima ya libala na bango, abongolaki makanisi. Akómaki kotɛmɛla mwasi na ye, mpe mwasi yango atikaki koyekola. Ntango azongelaki koyekola Biblia, mobali na ye alobaki na ye ete soki kaka akuti biso tozali koyekola, akobɛta biso masasi. Kasi, akolaki na elimo mpe azwaki batisimo. Abomaki biso lisusu te. Bambula na nsima, nazalaki na liyangani moko na Genoa mpe moto moko ayaki na nsima na ngai, azipaki ngai miso mpe atunaki ngai naloba soki ezali nani. Nakokaki kokanga mai ya miso te ntango namonaki ete ezali mobali ya mwasi wana. Nsima ya koyamba ngai, alobaki na ngai ete auti kozwa batisimo kaka mokolo wana mpo na komonisa ete amipesi epai ya Yehova.

Kobanda na 1964 tii na 1972, nazwaki libaku malamu ya kokende elongo na Charles ntango azalaki kotala masangá mpo na kolendisa yango na elimo. Totalaki pene na masangá nyonso ya nɔrdi ya Italie: na Piedmont, na Lombardy mpe na Liguria. Na nsima, tozongelaki mosala ya mobongisi-nzela pene na engumba Florence mpe na nsima na engumba Vercelli. Na 1977, Vercelli ezalaki kaka na lisangá moko, kasi ntango totikaki wana na 1999, ekómaki na masangá misato. Na mbula wana, nakómaki na mbula 91, mpe bayebisaki biso tókende kofanda na ndako ya bamisionɛrɛ na Rome, ndako moko kitoko, oyo ezali na esika moko ya kimya.

Likambo mosusu ya mawa

Na Marsi 2002, Charles, oyo azalaki ntango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ, abɛlaki maladi ya mbalakaka. Nzoto na ye ebebaki mpenza kino akufaki mwa 11 Mai 2002. Na boumeli ya mbula 71, tozalaki kolela elongo na ntango ya mpasi mpe kosepela elongo na ntango ya esengo. Liwa na ye ezalaki mpenza mpasi monene mpo na ngai.

Mbala mingi namonaka Charles na makanisi, na veste mpe ekɔti na ye ya bambula ya 1930. Namonaka lisusu na makanisi ndenge azalaki komungamunga to ndenge azalaki kosɛka. Na lisalisi ya Yehova mpe bolingo ya bandeko baklisto mingi, nalongaki na eleko wana ya mawa. Nazali kozela na motema likoló ntango nakomona Charles lisusu.

Nazali kokoba mosala na ngai

Kosalela Mozalisi na ngai ezali likambo eleki kitoko na bomoi na ngai. Na boumeli ya bambula, ‘Nameki mpe namoni ete Yehova azali malamu.’ (Nzembo 34:8) Namoni mpenza ete Yehova alingaka ngai mpe atyelaka ngai likebi. Atako nabungisaki mwana na ngai, Yehova apesi ngai bana mingi ya elimo na Italie mobimba, oyo bazali kosepelisa motema na ngai mpe oyo ya Yehova.

Koyebisa basusu makambo ya Mozalisi na ngai ezali likambo oyo nalingaka ntango nyonso kosala mingi koleka. Yango wana nazali kokoba kosakola mpe koyekola na bato Biblia. Ntango mosusu nayokaka mawa mpo nakoki lisusu kosala mingi te mpo nzoto ezali lisusu makasi te. Kasi, nayebaka ete Yehova ayebi esika makasi na ngai esuki, ete alingaka ngai mpe asepelaka na oyo nazali kosala. (Malako 12:42) Nazali kosala makasi nasalela maloba ya Nzembo 146:2: “Nakosanzola [Yehova] ntango nyonso ezali ngai na bomoi, nakoyembela Nzambe na ngai nzembo naino ekoumela ngai na mosuni.” c

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisolo ya bomoi ya ndeko na ngai Angelo Catanzaro ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1975, nkasa 429-431 (na lifalanse).

b Okoki kotánga lisolo ya bomoi na ye na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1971, nkasa 724-726 (na lifalanse).

c Ndeko Benanti akufaki mwa 16 Yuli 2005, ntango tozalaki kobongisa lisolo oyo. Azalaki na mbula 96.

[Elilingi na lokasa 13]

Camille

[Elilingi na lokasa 14]

Mokolo ya libala na biso, na 1931

[Elilingi na lokasa 14]

Atako mama asepelaki na solo te na ebandeli, andimaki ete biso nyonso tóyekola Biblia

[Elilingi na lokasa 15]

Ngai ná Ndeko Knorr, mokolo tosilisaki kelasi na Gileadi, na 1946

[Elilingi na lokasa 17]

Ngai ná Charles mwa moke liboso akufa