LISOLO YA BOYEKOLI 51
LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai
Yehova atyaka likebi mai ya miso nyonso oyo otangisaka
“Tyá mai ya miso na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama. Yango ekomami te na kati ya buku na yo?”—NZ. 56:8.
NA MOKUSE
Emonisi ete Yehova ayebi malamu mpenza ndenge oyo tomiyokaka ntango tozali na mpasi mpe akopesa biso libɔndisi oyo tosengeli na yango.
1-2. Makambo nini ekoki kosala ete tótangisa mai ya miso?
NA BANTANGO mosusu, biso nyonso totangisaka mai ya miso. Ntango tokutani na makambo ya esengo mpenza, ekómaka ete tótangisa mai ya miso ya esengo. Ekoki kozala ete olelaki ntango likambo moko ya ntina to ya malamu mpenza ekómelaki yo; na ndakisa, ntango mwana na yo abotamaki, ntango okanisaki likambo moko ya esengo, to ntango okutanaki na moninga oyo omoná ye te bambula ebele.
2 Kasi, mbala mingi, tobimisaka mai ya miso mpo toyoki mpasi makasi na motema. Na ndakisa, ekómaka ete tólela ntango moto oyo totyelaka motema asali biso mabe. Tokoki mpe kotangisa mai ya miso mpo na mpasi makasi ya maladi oyo tozali na yango to ntango moto oyo tolingaka akufi. Na bantango ya ndenge wana, tokoki komiyoka ndenge mosakoli Yirimia amiyokaki ntango bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme. Alobaki: “Liso na ngai ezali kaka kobimisa mikɛli ya mai . . . Miso na ngai ezali kaka kolela kozanga kotika.”—Bil. 3:48, 49.
3. Yehova ayokaka ndenge nini ntango basaleli na ye bazali komona mpasi? (Yisaya 63:9)
3 Yehova ayebi mai ya miso nyonso oyo totangisaka ntango tokutani na makambo ya mpasi. Biblia elobi ete ayebi mpasi nyonso oyo basaleli na ye bakutanaka na yango, mpe ayokaka biso ntango tozali kosɛnga ye lisalisi. (Nz. 34:15) Kasi, Yehova asukaka kaka te na komona mpe koyoka biso. Ndenge moko na tata ya bolingo, ayokaka mawa mpenza ntango amonaka bana na ye bazali kolela, mpe ayaka mbangu kosalisa biso.—Tángá Yisaya 63:9.
4. Makambo nini tokoyekola na bandakisa ya Biblia oyo ekosalisa biso tóyeba makanisi ya Yehova?
4 Na Liloba na ye, Yehova amonisi ndenge oyo asalaka ntango basaleli na ye bazali kolela. Tokoki komona yango soki totaleli ndakisa ya Hana, Davidi, mpe Mokonzi Ezekiasi. Nini elelisaki bango? Yehova asalaki nini ntango basɛngaki ye asalisa bango? Mpe ndenge nini ndakisa na bango ekoki kobɔndisa biso ntango totangisi mai ya miso mpo na mawa, mpo basali biso mabe, to tomoni lokola tozangi elikya?
MAI YA MISO M0PO NA MAWA
5. Hana azalaki komiyoka ndenge nini mpo na likambo oyo azalaki na yango?
5 Hana akutanaki na makambo ebele oyo esalaki ete abimisa mai ya miso mpo na mawa. Moko ya mikakatano na ye ezali ete azalaki na libala ya bombanda, mpe Penina, mwasi mosusu ya mobali na ye azalaki kolinga Hana te. Longola yango, Hana azalaki na mwana te, kasi Penina azalaki na bana ebele. (1 Sa. 1:1, 2) Penina azalaki kotyola Hana ntango nyonso mpo azalaki ekomba. Soki ozalaki na esika ya Hana, olingaki komiyoka ndenge nini? Hana atungisamaki mingi tii “azalaki kolela mpe koboya kolya,” mpe “ayokaki mpasi mingi na motema.”—1 Sa. 1:6, 7, 10.
6. Nini ebɔndisaki Hana?
6 Nini ebɔndisaki Hana? Likambo moko oyo esalisaki ye ezalaki ete akendaki na tabernakle kosambela Yehova. Kuna, mbala mosusu pene na ekɔtelo ya lopango ya tabernakle, Hana “abandaki kobondela Yehova mpe kolela mingi mpenza.” Asɛngaki Yehova boye: ‘Talá mpenza mpasi na ngai mosaleli na yo, mpe kanisá ngai.’ (1 Sa. 1:10b, 11) Hana asopelaki Yehova mayoki na ye nyonso na libondeli. Na ntembe te, Yehova ayokaki mawa ntango amonaki mai ya miso ya mosaleli na ye wana ya mwasi!
7. Libɔndisi nini Hana azwaki ntango afungwelaki Yehova motema na ye?
7 Ntango Hana afungwelaki Yehova motema na ye na libondeli mpe Nganga-nzambe monene Eli ayebisaki ye ete Yehova akoyoka libondeli na ye, na nsima amiyokaki ndenge nini? Biblia elobi: “Mwasi yango asimbaki nzela mpe akendaki; alyaki, mpe elongi na ye ezalaki lisusu na mawa te.” (1 Sa. 1:17, 18) Atako likambo oyo ezalaki kopesa ye mawa esilaki naino te, motema ya Hana ekitaki. Apesaki Yehova kilo ya mayoki nyonso oyo azalaki na yango. Yehova amonaki mpasi ya Hana, ayokaki kolela na ye, mpe na nsima apambolaki ye na ndenge asalisaki ye abota bana.—1 Sa. 1:19, 20; 2:21.
8-9. Na kotalela Baebre 10:24, 25, mpo na nini tosengeli kosala nyonso mpo na koyangana na makita? (Talá mpe elilingi.)
8 Liteya mpo na biso. Ozali kokutana na likambo moko ya mpasi oyo esalaka ete otangisa mai ya miso mpo na mawa? Mbala mosusu ozali kolela liwa ya moto moko ya libota to moninga na yo. Na bantango ya bongo, okoki kolinga kozala kaka yo moko, mpe yango ezali mabe te. Kasi, kaka ndenge Hana azwaki libɔndisi mpe alendisamaki ntango akendaki na tabernakle, yo mpe okozwa libɔndisi ntango okei na makita, ata soki ozali komiyoka mpenza malamu te. (Tángá Baebre 10:24, 25.) Na makita, toyokaka bavɛrsɛ ya kobɔndisa oyo esalisaka biso tókóma na makanisi ya malamu. Ezali lolenge oyo Yehova asalisaka biso tólongola makanisi ya mabe. Yango ekoki kosalisa biso tómiyoka malamu, ata soki likambo oyo ezali kopesa biso mawa esili naino te.
9 Na makita, tozalaka mpe elongo na bandeko ya boboto, oyo maloba na bango mpe bolingo na bango ekoki kolendisa biso. (1 Tes. 5:11, 14) Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko ya mobongisi-nzela monene oyo mwasi na ye akufaki. Alobaki boye: “Tii lelo natangisaka mai ya miso. Na bantango mosusu, nafandaka na esika na ngai moko mpe nalelaka. Kasi, makita na biso elendisaka ngai mingi mpenza. Maloba ya boboto ya bandeko mibali mpe bandeko basi ekitisaka ngai motema mpenza. Ata soki nazalaki na mitungisi to komiyoka mabe mpenza liboso naya na makita, nsima ya makita namiyokaka ntango nyonso malamu.” Na makita na biso, Yehova akoki kosalela bandeko mpo na kosalisa biso.
10. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Hana ntango tozali na mawa na motema?
10 Hana abɔndisamaki mpe ntango asopelaki Yehova mayoki na ye na libondeli. Yo mpe okoki ‘kobwakela [Yehova] mitungisi na yo nyonso,’ na elikya ete akoyoka yo. (1 Pe. 5:7) Ndeko mwasi moko oyo miyibi babomaki mobali na ye, alobaki boye: “Nayokaki lokola nde bapanzi motema na ngai na biteni ya mikemike mpe ekobonga lisusu te. Kasi, nabɔndisamaka mpe nazwaka kimya soki nabondeli Yehova, Tata na ngai ya likoló oyo alingaka ngai. Na bantango mosusu, nazalaki koyeba te naloba nini, kasi amityaki na esika na ngai. Soki nabulungani na makanisi, nazalaki kobondela mpo apesa ngai kimya. Nazalaki mbala moko koyoka kimya ya motema mpe ya makanisi, mpe yango ezalaki kosalisa ngai nakoba.” Ntango tosopeli Yehova mitungisi na biso na libondeli, atyaka likebi na mai ya miso oyo totangisi mpo na mawa, ye mpe ayokaka mawa oyo tozali na yango na motema. Ata soki likambo oyo ezali kotungisa yo ezali kaka, Yehova akoki kokitisa yo motema mpe kosalisa yo ozwa mwa kimya. (Nz. 94:19; Flp. 4:6, 7) Mpe soki oyiki mpiko na bosembo nyonso, akopesa yo mbano.—Ebr. 11:6.
MAI YA MISO NTANGO BASALI BISO MABE
11. Davidi amiyokaki ndenge nini mpo na makambo ya mabe oyo bazalaki kosala ye?
11 Na bomoi na ye, Davidi akutanaki na makambo ebele oyo esalaki ete atangisa mai ya miso. Bato mingi bazalaki koyina ye mpe ata baninga oyo azalaki kotyela motema basalaki ye mabe. (1 Sa. 19:10, 11; 2 Sa. 15:10-14, 30) Mokolo moko akomaki: “Nalɛmbi na kolelalela na ngai; butu nyonso nazali kopɔlisa mbeto na ngai na mai ya miso; nazali kotondisa kiti na ngai ya mpɔngi na mai ya miso.” Nini ezalaki kolelisa Davidi boye? Alobaki: “Mpo na baoyo nyonso bazali konyokola ngai.” (Nz. 6:6, 7) Makambo ya mabe oyo basusu bazalaki kosala Davidi epesaki ye mpasi mingi mpe elelisaki ye mingi mpenza.
12. Ndenge emonisami na Nzembo 56:8, Davidi andimaki likambo nini?
12 Atako mikakatano oyo Davidi akutanaki na yango, andimaki ete Yehova azalaki kolinga ye. Akomaki boye: “Yehova akoyoka mongongo ya kolela na ngai.” (Nz. 6:8) Mokolo mosusu, Davidi alobaki likambo moko oyo esimbaka motema na Nzembo 56:8. (Tángá.) Maloba yango emonisaka ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema. Davidi alobaki ete ezalaki lokola nde Yehova azalaki kozwa mai nyonso ya miso na ye mpe azalaki kotya yango na molangi to kokoma yango na buku moko. Davidi andimaki mpenza ete Yehova azalaki komona mpasi na ye mpe abosanaki yango te. Amindimisaki ete Tata na ye ya likoló oyo atondi na bolingo ayebaki makanisi oyo ezalaki kotungisa ye, kasi ayebaki mpe ndenge oyo ezalaki kotinda ye amiyoka.
13. Ntango basusu basali biso mabe, nini ekoki kobɔndisa biso? (Talá mpe elilingi.)
13 Liteya mpo na biso. Ozali na mpasi na motema mpo moto moko oyo otyelaka motema asali yo mabe to awangani yo? Mbala mosusu ozali na mpasi mpo olinganaki na moto kasi bokabwani to mpe libala na yo ekufi kaka boye, to mbala mosusu moto oyo olingaka atiki kosalela Yehova. Ndeko mobali moko oyo mwasi na ye asalaki ekobo mpe asundolaki ye alobaki boye: “Nabulunganaki mpe nazalaki kondima te. Namonaki ete nazali na ntina te, nayokaki mawa mpe nkanda.” Soki ozali sikoyo na mpasi mpo moto oyo otyelaka motema asali yo mabe to awangani yo, yebá ete Yehova akosundola yo ata moke te. Ndeko mobali yango alobaki boye: “Nayaki komona ete boyokani kati na bato ekoki kobeba, kasi Yehova azali Libanga makasi na biso. Ata soki likambo nini esalemi, Yehova azalaka ntango nyonso pene na biso. Akotika bato na ye ya sembo ata mokolo moko te.” (Nz. 37:28) Kobosana mpe te ete bolingo oyo Yehova alingaka yo eleki ata ya moto nini. Ata soki mpasi oyo oyoki mpo na mabe oyo basali yo ezali makasi ndenge nini, yango ekoleka te ndenge oyo Yehova alingaka yo. (Rom. 8:38, 39) Simbá likambo oyo: Ata soki moto asali yo nini, Tata na yo ya likoló alingaka yo.
14. Elikya nini Nzembo 34:18 epesi biso?
14 Soki moto oyo totyelaka motema asali biso mabe, tokoki kozwa mpe libɔndisi na maloba mosusu ya Davidi oyo ezali na Nzembo 34:18. (Tángá.) Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete baoyo “balɛmbi nzoto” to oyo “motema etutami” ekoki komonisa “baoyo bazali komona makambo nyonso kaka mabe.” Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo bamiyoki bongo mpo basusu basali bango mabe? Ndenge kaka tata ya bolingo asimbaka mwana na ye oyo azali na mawa mpe abɔndisaka ye, Yehova mpe “azali pene” na biso, ayokelaka biso mawa mingi mpe azalaka pene ya kosalisa biso ntango motema na biso etutami mpo basali biso mabe to basundoli biso. Yehova azalaka na mposa ya kobɔndisa mpe kokitisa motema na biso oyo etutami mpe elimo na biso oyo ezali na mpasi. Yehova apesi biso mpe bilaka ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tozali na yango lelo oyo.—Yis. 65:17.
MAI YA MISO MPO TOZANGI ELIKYA
15. Likambo nini elelisaki Ezekiasi?
15 Ntango Ezekiasi mokonzi ya Yuda azalaki na mbula 39, abɛlaki maladi moko makasi. Mosakoli Yisaya ayebisaki Ezekiasi nsango ya Yehova ete maladi yango ekoboma ye. (2 Bak. 20:1) Emonanaki ete elikya ezali te mpo na Ezekiasi. Lokola nsango yango epesaki ye mawa makasi, Ezekiasi alelaki mingi mpenza. Abondelaki Yehova asalisa ye.—2 Bak. 20:2, 3.
16. Yehova asalaki nini ntango Ezekiasi abondelaki ye na mai na miso?
16 Yehova ayokaki mawa mpo na mai ya miso oyo Ezekiasi atangisaki ntango azalaki kobondela ye, mpe na boboto nyonso ayebisaki ye: “Nayoki libondeli na yo. Namoni mai ya miso na yo. Talá, nazali kobikisa yo na maladi oyo.” Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova amoniselaki Ezekiasi motema mawa, mpe alakaki ete akobakisa molai ya bomoi na ye mpe akobikisa Yerusaleme na mabɔkɔ ya bato ya Asiri.—2 Bak. 20:4-6.
17. Ndenge nini Yehova asungaka biso ntango tozali na maladi makasi? (Nzembo 41:3) (Talá mpe elilingi.)
17 Liteya mpo na biso. Ozali na maladi oyo ezali kotinda yo omona lokola elikya ezali te? Bondelá Yehova, ata na mai ya miso. Biblia elobi ete “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso” akobɔndisa biso na mikakatano na biso nyonso. (2 Ko. 1:3, 4) Lelo oyo, tokoki kozela te ete Yehova alongola mikakatano na biso nyonso na ndenge ya likamwisi, kasi toyebi ete akosunga biso. (Tángá Nzembo 41:3.) Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova apesaka biso makasi, bwanya, mpe kimya ya motema mpo tóyika mpiko. (Mas. 18:14; Flp. 4:13) Asungaka biso mpe na nzela ya elikya oyo apesi biso na Biblia, ete mokolo mosusu maladi ya ndenge nyonso ekozala lisusu te.—Yis. 33:24.
18. Mokapo nini omonaka ete ebɔndisaka yo mpenza ntango okutani na mokakatano ya makasi? (Talá etanda “ Maloba oyo ekoki kokausa mai ya miso na biso.”)
18 Maloba ya Yehova ebɔndisaki Ezekiasi. Biso mpe tokoki kozwa libɔndisi na Liloba ya Nzambe. Yehova akomisaki na Biblia maloba ya kokitisa motema oyo ekoki kopesa biso makasi ntango tokutani na makambo oyo epesaka mpasi mpe mawa. (Rom. 15:4) Ntango bazwaki ndeko mwasi moko na Afrika ya Wɛsti maladi ya kanser, ndeko mwasi yango azalaki kolela mingi. Alobi boye: “Vɛrsɛ moko oyo ezalaki kobɔndisa ngai mingi ezali Yisaya 26:3. Atako mbala mingi tozalaka na eloko ya kosala te mpo na mikakatano oyo tokutani na yango, vɛrsɛ wana emonisaka ngai ete Yehova akoki kopesa biso kimya ya motema oyo ekosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala liboso ya mikakatano oyo tokutani na yango.” Yo mpe ozalaka na vɛrsɛ oyo omonaka ete ekitisaka yo motema mingi ntango okutani na makambo ya mpasi mpenza, to mbala mosusu ozali komona ete elikya ezali te mpo na yango?
19. Yehova alaki biso nini?
19 Topusani mpenza na kati ya mikolo ya nsuka, mpe makambo oyo elelisaka ekokoba kobakisama. Kasi, ndenge tomoni yango na ndakisa ya Hana, Davidi mpe Mokonzi Ezekiasi, Yehova amonaka mai ya miso oyo totangisaka mpe epesaka ye mawa mingi. Atyaka likebi na mai ya miso nyonso oyo totangisaka. Na yango, ntango tokutani na makambo oyo epesi biso mawa, tósopela Yehova motema na biso na libondeli. Tóluka te kozala kaka biso moko mpe kokima bandeko na biso ya lisangá. Mpe tiká tókoba kozwa libɔndisi na maloba ya kokitisa motema oyo ezali na Biblia. Tótya motema ete soki tokobi koyika mpiko na bosembo, Yehova akopesa biso mbano. Apesi biso elaka ete ekozala na ntango moko oyo akopangwisa mai ya miso nyonso oyo totangisaka mpo na mawa, mpo basali biso mabe, to mpo tozali komona ete tozangi elikya. (Em. 21:4) Na ntango yango, tokobimisa mai ya miso, kasi kaka ya esengo.
LOYEMBO 4 “Yehova azali Mobateli na ngai”