Oyebaki yango?
Ndenge nini babriki oyo bamoni na Babilone ya kala mpe ndenge oyo bazalaki kosala babriki yango emonisi ete Biblia elobaka solo?
BATO ya Arkeoloji bamoni na Babilone bamilio ya babriki oyo basalelaki mpo na kotonga engumba yango. Moto moko ya Arkeoloji na nkombo Robert Koldewey alobi ete babriki ya ndenge wana esalemaki na mabulu ya mɔtɔ oyo ezalaki na “libándá ya engumba yango, epai mabele ezalaki malamu mpe epai matiti ezalaki mingi mpo na kosalela yango lokola mafuta.”
Masolo ya kala emonisi ete bakonzi ya Babilone mpe bazalaki kosalela mabulu na bango ya mɔtɔ mpo na kosala likambo moko ya nsɔmɔ. Paul-Alain Beaulieu, profesɛrɛ oyo ayebi malamu istware mpe monɔkɔ ya Asiri ya kala na iniversite ya Toronto, alobi boye: “Masolo mingi ya Babilone . . . elobeli ndenge mokonzi azalaki kopesa mitindo ete bábwaka na mɔtɔ bato oyo bazalaki kotosa ye te mpe bato oyo bazalaki komemya te makambo mosantu.” Na ndakisa, likomi moko oyo ezalaki na ntango ya boyangeli ya Nebukadenezare elobi boye: “Bóboma bango, bótumba bango, bókata bango, . . . na etumbelo ya mɔtɔ . . . mɔtɔ na yango emata makasi mpe engala mpo bákufa.”
Yango ekundwelaka batángi ya Biblia makambo oyo ekomami na mokanda ya Danyele mokapo 3. Kuna totángaka ete Mokonzi Nebukadenezare asalaki ebakata ya ekeko moko ya wolo na mokili patatalu ya Dura, na libándá ya engumba Babilone. Ntango bilenge misato Baebre, elingi koloba, Shadrake, Meshake ná Abedenego baboyaki kofukamela ekeko yango, nkanda ya Nebukadenezare engalaki makasi, apesaki mitindo ete bákómisa mɔtɔ ya libulu yango “makasi mbala nsambo koleka ndenge ezalaka,” mpe bákanga mibali yango misato “bábwaka bango na libulu ya mɔtɔ oyo ezali kopela.” Anzelu moko ya nguya abikisaki bango na liwa.—Dan. 3:1-6, 19-28.
Babriki ya Babilone yango moko mpe emonisi ete Biblia elobaka solo. Likoló ya babriki yango mosusu ezali na makomi oyo ezali kokumisa mokonzi. Likomi moko elobi boye: “Nebukadenezare, Mokonzi ya Babilone . . . Ndako ya mokonzi oyo ngai Mokonzi Monene natongaki . . . Tiká ete bakitani na ngai báyangela yango libela na libela.” Maloba yango ekokani mpenza na maloba oyo ezali na Danyele 4:30, epai Nebukadenezare alobaki na lofundo nyonso boye: “Oyo ezali te Babilone engumba monene, oyo natongaki mpo ezala ndako ya mokonzi, na makasi na ngai mpe na nguya na ngai moko mpe mpo na nkembo ya lokumu na ngai?”