Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bilenge: “Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko”

Bilenge: “Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko”

“Se ndenge botosaka ntango nyonso, . . . bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga mpe na kolɛnga.”​—BAFILIPI 2:12.

NZEMBO: 133, 135

1. Mpo na nini batisimo ezali na ntina mingi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

MBULA na mbula, bankóto ya bayekoli ya Biblia bazwaka batisimo. Mingi na bango bazalaka bilenge, oyo bakokisi naino mbula 20 te, ata mpe oyo bakokisi naino mbula 13 te. Mbala mosusu baboti na bango bazali Batatoli ya Yehova. Ezali bongo mpo na yo? Soki bongo, osali likambo ya malamu mpenza. Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo; ezali na ntina mingi mpo na kozwa lobiko mpe bomoi ya seko.​—Matai 28:19, 20; 1 Petro 3:21.

2. Mpo na nini esengeli kobanga te komipesa na Yehova?

2 Batisimo ememaka mapamboli ndenge na ndenge, kasi eyaka mpe na mikumba. Na ndenge nini? Na mokolo ya batisimo na yo, ndeko oyo asalaki diskur atunaki boye: “Na lisalisi ya mbeka ya Yesu Kristo, obongoli motema na masumu na yo mpe omipesi na Yehova mpo na kosala mokano na ye?” Oyanolaki ɛɛ. Olakaki Yehova ete okolinga ye mpe okotya mosala na ye na esika ya liboso na bomoi na yo. Osengeli nde koyoka mawa mpo opesaki Nzambe elaka ya monene bongo? Te! Okoyoka mawa ata mokolo moko te ndenge otiki Yehova atambwisa bomoi na yo. Nzokande, bato oyo bayebi Yehova te bazali na mokili ya Satana. Zabolo akipaka bango te, akokipe mpe yo te. Kutu, akosepela soki obungisi elikya na yo ya bomoi ya seko mpo okendaki na ngámbo na ye mpe oboyaki Yehova.

3. Mapamboli nini ozwi mpo omipesá na Yehova?

3 Kanisá naino ndenge Yehova apamboli yo mpo omipesá na ye mpe ozwá batisimo. Lokola opesaki Yehova bomoi na yo, okoki koloba na kondima nyonso ete: “Yehova azali pene na ngai; nakobanga te. Moto ya mabele akoki kosala ngai nini?” (Nzembo 118:6) Okozwa lokumu mosusu te koleka lokumu ya kozala na ngámbo ya Yehova mpe koyeba ete asepelaka na yo.

EZALI LIKAMBO NA YO MOKO

4, 5. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete komipesa na Nzambe ezali likambo ya moto ye moko? (b) Mikakatano nini bakristo ya mbula nyonso bakutanaka na yango?

4 Komona te ete boyokani na yo na Yehova ezali lokola lopango to eteni ya mabele oyo baboti bakoki kotikela yo. Ata soki ozali kaka na ndako ya baboti, boyokani na yo na Yehova ezali likambo na yo moko. Mpo na nini ezali na ntina obosana yango te? Mpo moto moko te akoki koyeba mpenza ndenge kondima na ye ekomekama na mikolo ezali koya. Na ndakisa, ekoki kozala ete ozwaki batisimo na bomwana. Kasi sikoyo lokola okɔti na eleko ya bolenge, okómi na mayoki mpe mikakatano ya sika. Elenge mwasi moko alobaki boye: “Mbala mingi, mwana moke asilikaka te ndenge azali Motatoli ya Yehova kaka mpo alyaka te eteni ya gato ya fɛti ya mbotama na kelasi. Kasi mwa bambula na nsima, ntango mposa ya kosangisa nzoto ekómaka makasi, esengeli kozala na kondima mpenza ete kotosa mibeko ya Yehova ezalaka ntango nyonso malamu.”

5 Ya solo, bilenge bakutanaka na mikakatano ya sika. Kasi, ata baoyo bazwaka batisimo ntango bazali mikóló bakutanaka mpe na mikakatano ya mbalakaka oyo ekoki komeka kondima na bango. Komekama yango ekoki kozala makambo ya libala, kolɔngɔnɔ ya nzoto, to mpe mosala na bango. Biso nyonso, tózala bilenge to mikóló, tokokutana na makambo oyo ekosɛnga tótikala sembo epai ya Yehova.​—Yakobo 1:12-14.

6. (a) Na ndenge nini komipesa na yo epai ya Yehova ezali likambo ya kokakola te? (b) Liteya nini okoki kozwa na Bafilipi 4:11-13?

6 Mpo otikala sembo, kobosanaka te ete elaka oyo opesaki Yehova ezali ya kokakola te. Olakaki Nzambe Oyo-Aleki-Likoló ete okokoba kosalela ye, ata soki baninga to baboti na yo batiki kosala yango. (Nzembo 27:10) Na makambo nyonso, kobosanaka te kosɛnga Yehova asalisa yo okokisa elaka oyo opesaki ye.​—Tángá Bafilipi 4:11-13.

7. Kosala mpo na lobiko na yo moko “na kobanga mpe na kolɛnga” elimboli nini?

7 Yehova alingi ozala moninga na ye. Kasi, mpo obatela boninga yango mpe osala mpo na lobiko na yo moko osengeli kosala milende. Kutu, Bafilipi 2:12 elobi: “Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga mpe na kolɛnga.” Yango elingi koloba ete tosengeli kokanisa malamumalamu ndenge oyo tokobatela boninga na biso na Yehova mpe tokotikala sembo epai na ye ata soki tokutani na mokakatano nini. Tóloba te ete tokosala yango kaka. Ata bato mosusu oyo basalelaki Yehova bambula ebele batikalaki sembo te. Na yango, ndenge nini okoki kosala mpo na lobiko na yo moko?

KOYEKOLA BIBLIA EZALI NA NTINA

8. Koyekola yo moko esangisi makambo nini, mpe mpo na nini ezali na ntina?

8 Mpo tózala baninga ya Yehova, tosengeli koyokaka ye mpe kolobaka na ye. Koyekola Biblia yo moko nde lolenge ya libosoliboso ya koyoka Yehova. Yango esangisi kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya moombo ya sembo. Kasi, koyekola Biblia elimboli te kokanga makambo na motó ndenge okoki kosala mpo na ekzamɛ ya kelasi. Ezali nde lokola kosala mobembo molai epai ozali kotalatala mpe koyekola makambo ya sika oyo etali Yehova. Ekosalisa yo opusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na yo.​—Yakobo 4:8.

Osololaka malamu mpenza na Yehova, oyokaka ye mpe olobaka na ye? (Talá paragrafe 8-11)

9. Bisaleli nini ekoki kosalisa yo mpo na boyekoli na yo moko?

9 Ebongiseli ya Yehova ebimisi biloko ebele oyo ekoki kosalisa yo na boyekoli na yo moko. Na ndakisa, masolo oyo elobi “Mpo na koyekola Biblia,” oyo ezalaka na eteni “Bilenge” na site jw.org ekoki kosalisa yo ozwa mateya na masolo ya Biblia. Na site jw.org, okokuta mpe nkasa mpo na koyekola Biblia oyo elobi “Biblia eteyaka mpenza nini?” Yango ekoki kosalisa yo okóma na kondima makasi mpe oyeba ndenge ya kolimbwela basusu mateya oyo ondimaka. Okoki kozwa makanisi mosusu mpo na boyekoli na yo moko na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Ndenge nini nakoki kosepela na botángi ya Biblia?” na Lamuká! ya 04/2009 (na Lifalanse). Koyekola mpe komanyola ezali na ntina mingi mpo osala mpo na lobiko na yo moko.​—Tángá Nzembo 119:105.

KOBONDELA EZALI NA NTINA

10. Mpo na nini mokristo oyo azwá batisimo asengeli kobondelaka?

10 Koyekola Biblia ezali ndenge ya koyoka Yehova, mpe kobondela ezali ndenge ya koloba na ye. Kokanisa te ete libondeli ezali kaka momeseno moko to mwa eloko moko boye oyo epesaka makila malamu mpo na kosalisa biso tólonga na makambo oyo tozali kosala. Kobondela ezali mpenza nde kosolola na Mozalisi na biso. Kanisá naino: Yehova alingaka koyoka yo! (Tángá Bafilipi 4:6.) Na yango, soki likambo ata ya ndenge nini etungisi yo, Biblia elobi: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo.” (Nzembo 55:22) Bandeko ebele bakoki koyebisa yo ete toli yango esalisi bango. Ekoki mpe kosalisa yo!

11. Mpo na nini tosengeli kopesa Yehova matɔndi ntango nyonso?

11 Kasi, tosengeli kobondela kaka te ntango tolingi Yehova asalisa biso. Biblia elobi: “Bózala na botɔndi.” (Bakolose 3:15) Na bantango mosusu, komitungisa mpo na mikakatano na biso epekisaka biso tómona makambo ya malamu oyo tozali na yango. Yango wana, meká kosala boye: Mokolo na mokolo, kanisáká ata makambo misato oyo okoki kopesela matɔndi, mpe yebisá yango Yehova. Elenge moko na nkombo Abigail, oyo azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 12, alobi boye: “Namonaka ete ebongi kopesa Yehova matɔndi koleka moto mosusu nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba. Tosengeli kopesa ye matɔndi na libaku nyonso mpo na makabo oyo apesaka biso. Mokolo moko nayokaki motuna oyo etindaki ngai nakanisa: ‘Soki lobi nalamuki kaka na biloko oyo napesaki Yehova matɔndi mpo na yango lelo, nakozala mpenza na nini?’” *

NTINA YA KOMONA BOLAMU YA YEHOVA

12, 13. Mpo na nini ezali na ntina okanisaka makambo oyo esalisaki yo omona bolamu ya Yehova?

12 Yehova asalisaki Mokonzi Davidi ayika mpiko na mikakatano ndenge na ndenge. Na kotalela makambo oyo amonaki, Davidi alobaki: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu; esengo na mobali makasi oyo azali kokima epai na ye.” (Nzembo 34:8) Vɛrsɛ yango emonisi ete biso moko tosengeli komona bolamu ya Yehova. Ntango ozali kotánga Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo, mpe okei na makita, oyekolaka ndenge Nzambe asalisaka basusu bátikala sembo. Kasi, wana boyokani na yo moko na Yehova ezali kokóma makasi, osengeli komona ndenge azali kosalisa yo. Na makambo nini yo moko omonaki bolamu ya Yehova?

13 Mokristo nyonso asilá komona bolamu ya Yehova. Abendaki mokomoko na biso epai na ye mpe ya Mwana na ye. Yesu alobaki: “Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoane 6:44) Ondimaka mpenza ete Yehova abendá yo? To okanisaka nde, ‘Yehova abendá baboti na ngai, ngai nalandaka kaka bango’? Kobosana te ete ntango omipesaki na Yehova mpe ozwaki batisimo, omonisaki ete ozalaki na boyokani makasi elongo na ye. Biblia elobi: “Soki moto alingaka Nzambe, moto yango ayebani na ye.” (1 Bakorinti 8:3) Salá makasi osepelaka na esika oyo Yehova atye yo na lisangá na ye.

14, 15. Ndenge nini mosala ya kosakola ekoki kosalisa yo okóma na kondima makasi?

14 Okoki mpe komona bolamu ya Yehova ntango omoni ete apesi yo mpiko mpo olobela kondima na yo epai ya basusu, ezala na mosala ya kosakola to na eteyelo. Ekoki kozala mpasi oteya bana-kelasi na bino. Okoki kobanga mpo oyebi te soki bakosala yo nini. Okoki kobanga mingi koleka kolimbola mateya ya Biblia liboso ya bato ebele. Nini ekoki kosalisa yo?

15 Kanisá ntina oyo ondimaka mateya yango. Soki nkasa mpo na koyekola oyo ezalaka na jw.org ezali mpe na monɔkɔ na bino, saleláká yango. Ekoki kosalisa yo okanisa mateya oyo ondimaka, ntina oyo ondimaka yango, mpe ndenge ya koyebisa yango basusu. Soki kondima na yo ekómi makasi mpe omibongisi malamu, ekotinda yo osepela kosakolaka makambo ya Yehova.​—Yirimia 20:8, 9.

16. Nini ekoki kopesa yo mpiko ya kolobela mateya ya Biblia?

16 Ata soki omibongisi malamu, okoki kaka kobanga kolobela mateya oyo ondimaka. Ndeko mwasi moko ya mbula 18, oyo azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 13, alobi boye: “Nayebi mateya oyo nandimaka, kasi na bantango mosusu nakokaka te koloba makambo oyo nazali kokanisa.” Na yango, asalaka makasi akɔtisa mateya ya Biblia na masolo na ye ná baninga. Alobi boye: “Bana-kelasi na biso babangaka te kobɛta masolo ya makambo oyo basalaka. Ngai mpe nasengeli kosala bongo. Yango wana, na masolo na biso, nakɔtisaka mwa maloba lokola, ‘Ntango nazalaki koteya bato Biblia mokolo wana, . . .’ Na nsima nabɛtaka lisolo yango. Ata soki nabendaka likebi mbala moko te na Biblia, mbala mingi baninga balukaka koyeba soki nasalaka nini ntango nateyaka Biblia. Ntango mosusu batunaka mpe mituna. Soki nazali kosala bongo, nabangaka lisusu mingi te. Mpe na nsima, nasepelaka mpenza!”

17. Eloko nini lisusu ekoki kosalisa yo osakwelaka basusu?

17 Soki bato bamoni ete otyelaka bango likebi mpe opesaka bango limemya, ekozala mpasi te bango mpe bámemya yo ná bindimeli na yo. Olivia, oyo azali na mbula 17 mpe azwaki batisimo na bomwana, alobi boye: “Nazalaki kobanga ete soki nakɔtisi makambo ya Biblia na lisolo moko, bato bakomona ete nazali na molende ya mabe.” Na nsima, akómaki kotalela makambo ndenge mosusu. Na esika akanisa mingi makambo oyo ebangisaka ye, akanisaki boye: “Bilenge ebele bayebi makambo ya Batatoli ya Yehova te. Batatoli oyo bayebi ezali kaka biso. Na yango, ezaleli na biso nde ekoki kosalisa bango bándima to báboya Batatoli. Bongo soki toyokaka nsɔni, tobangaka kolobela bindimeli na biso, to soki tozalaka na mpiko te ntango tozali koloba? Bakoki komona lokola ete tosepelaka te ndenge tozali Batatoli. Bakoki kutu kotyola biso soki bamoni ete tozali na mpiko te. Kasi, soki tobangaka te kolobela makambo oyo tondimaka, soki tokɔtisaka yango mingi na masolo, na ntembe te bakopesa biso limemya.”

KOBÁ KOSALA MPO NA LOBIKO NA YO MOKO

18. Kosala mpo na lobiko na yo moko esɛngi makambo nini?

18 Tomoni ete kosala mpo na lobiko na yo moko ezali mokumba monene. Mpo osala yango, osengeli kotángaka Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango, kobondela Yehova, mpe kokanisa mpenza bolamu nyonso oyo Yehova asaleli yo. Kosala makambo wana ekosalisa yo omona mpenza ete Yehova azali Moninga na yo. Yango ekotinda yo osepela koyebisaka basusu bindimeli na yo.​—Tángá Nzembo 73:28.

19. Mpo na nini ebongi mpenza osala mpo na lobiko na yo moko?

19 Yesu alobaki: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Ya solo, mpo na kolanda Yesu, mokristo nyonso asengeli komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Kasi, yango ezali kaka ebandeli ya bomoi kitoko banda sikoyo, mpe ekomema na bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. Yango wana, salá makasi okoba kosala mpo na lobiko na yo moko!

^ par. 11 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Mituna oyo bilenge batunaka​—Mpo na nini nasengeli kobondela?” mpe lokasa na yango na jw.org.