Oyebaki yango?
Sinagoga ebandaki ndenge nini?
LILOBA “sinagoga” euti na liloba moko ya Grɛki oyo elimboli “liyangani” to “koyangana elongo.” Nkombo yango ebongi mpenza mpo banda kala basinagoga ezali bisika oyo Bayuda bakutanaka mpo na koyoka mateya mpe kosambela. Makomami ya Ebre elobeli basinagoga polele te, kasi Makomami ya Grɛki ya bokristo emonisi polele ete bisika ya ndenge wana ezalaki mingi na siɛklɛ ya liboso.
Bato mingi ya mayele balobaka ete basinagoga ebandaki ntango Bayuda bazalaki bakangami na Babilone. Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi boye: “Bakangami yango bazalaki na Tempelo te na mboka mopaya, mpe lokola bazalaki na mposa ya libɔndisi mpo na mpasi na bango, bazalaki kokutana mbala na mbala, ntango mosusu na mikolo ya Sabata, mpe bazalaki kotánga Makomami.” Ntango balongwaki na boombo, emonani ete Bayuda bakobaki kokutana mpo na kobondela mpe kotánga Makomami, mpe bazalaki kotya basinagoga esika nyonso oyo bazali.
Na yango, na siɛklɛ ya liboso, basinagoga ekómaki esika oyo Bayuda bazalaki kosala makambo ya losambo mpe ya bomoi, ezala baoyo bazalaki kofanda zingazinga ya Mediterane, na Moyen-Orient, mpe na Yisraele. Profesɛrɛ Lee Levine ya iniversite moko (université hébraïque de Jérusalem), alobi ete sinagoga “ezalaki esika ya koyekola, kolya elongo, kosambisa makambo, kotika mbongo ya makabo, mpe kosala makita ya politiki mpe ya makambo ya bomoi ya bato.” Abakisi ete: “Kasi, ezalaki libosoliboso nde mpo na makambo ya losambo.” Yango wana tokoki kokamwa te ndenge Yesu azalaki kokende mbala na mbala na basinagoga. (Mrk. 1:21; 6:2; Luka 4:16) Azalaki koteya, kopesa toli, mpe kolendisa bato oyo bazalaki koya kuna. Ntango lisangá ya bokristo esalemaki, ntoma Paulo mpe asakolaki mingi na basinagoga. Baoyo bazalaki na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe bazalaki kokende na sinagoga; na yango ntango Paulo azalaki kokɔta na engumba moko, mbala mingi azalaki kokende liboso na sinagoga mpe kosakola kuna.—Mis. 17:1, 2; 18:4.