Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Balevi 19:16 elobi ete “osengeli te koluka kosopa makila” ya moto mosusu, yango elimboli mpenza nini, mpe ekoki koteya biso nini?

Yehova asɛngaki Bayisraele bázala basantu. Mpo na yango, ayebisaki bango boye: “Osengeli te kotambolatambola na kati ya bato na yo mpo na kokosela bato makambo. Osengeli te koluka kosopa makila ya moninga na yo. Ngai nazali Yehova.”​—Lev. 19:2, 16.

Maloba koluka kosopa makila,” elimboli mpenza nini? Buku moko oyo elimboli mokanda ya Balevi elobi boye: “Ezali mpasi kokanga ntina ya eteni ya vɛrsɛ oyo, mpo na kotalela liloba ya Ebre oyo basaleli awa, oyo soki tobongoli yango elimboli ‘kotɛlɛma te likoló ya, kotɛlɛma te pembeni ya, to kotɛlɛma te pene ya.’”

Bato mosusu ya mayele bakanisaka ete maloba yango eyokani na vɛrsɛ 15 oyo elobi ete: “Bosengeli te kosala na kozanga bosembo na ntango ya kosambisa. Osengeli kopona bilongi te ntango ozali kotalela likambo ya moto oyo azangá mpe osengeli te kosepela kaka na moto monene. Okosambisa moninga na yo na bosembo.” (Lev. 19:15) Na yango, mobeko oyo ezali na vɛrsɛ 16 oyo elobi ete osengeli te kotɛlɛma likoló, pembeni to pene ya moto moko, ekokaki komonisa ete Bayisraele basengelaki te kosala likambo ya kozanga bosembo na tribinale, na makambo ya mombongo, to mpe na libota. Mpe Moyisraele asengelaki te kosala likambo ya kozanga bosembo mpo azwa matomba. Ezali solo ete biso mpe tosengeli te kosala makambo ya ndenge wana. Kasi ezali mpe na lolenge mosusu oyo tokoki kokanga ntina ya maloba oyo ezali na vɛrsɛ 16.

Tótalela maloba ya ebandeli oyo ezali na vɛrsɛ yango. Nzambe ayebisaki basaleli na ye ete basengelaki te kotambolatambola na kati ya bato mpo na kokosela basusu makambo. Ezali solo ete kotonga bato mosusu ekoki kobimisa matata, kasi kokosela moninga makambo ezali mabe koleka. (Mas. 10:19; Mos. 10:12-14; 1 Tim. 5:11-15; Yak. 3:6) Moto oyo akoselaka bato makambo, alobaka makambo ya lokuta mpo na kobebisa lokumu na bango. Moto oyo akoselaka bato makambo akoki kopesa litatoli ya lokuta mpo na moto mosusu ata soki ekotya bomoi ya moto yango na likama. Kobosana te ete babambaki Nabote mabanga mpo bakoselaki ye makambo. (1 Bak. 21:8-13) Na yango, ndenge emonisami na eteni ya mibale ya mokanda ya Balevi 19:16, soki moto akoseli moninga makambo, ezali lokola nde aluki kosopa makila na ye na lolenge moko boye.

Lisusu, moto oyo akoselaka basusu makambo amonisaka ete ayinaka bango. 1 Yoane 3:15 elobi ete: “Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi, mpe boyebi ete mobomi moko te azali na bomoi ya seko na kati na ye.” Lisusu ntango Nzambe alobaki ete osengeli te koluka kosopa makila ya moninga na yo ndenge emonisami na vɛrsɛ 16, abakisaki boye: “Osengeli te koyina ndeko na yo na motema na yo.”​—Lev. 19:17.

Na yango, eteni ya mibale ya Balevi 19:16 epesi bakristo toli ya makasi mpenza. Tosengeli koboya makanisi nyonso ya mabe mpe koboya kokosela basusu makambo. Na mokuse, soki totiki nkanda to likunya etinda biso tókosela basusu makambo, yango ekoki komonisa ete toyinaka bango. Bakristo basengeli mpenza koboya likambo ya ndenge wana.​—Mat. 12:36, 37.