TÓTALELA MAKAMBO YA KALA
Didier Érasme
NTANGO Didier Érasme azalaki na bomoi (kobanda mobu 1469 tii 1536) bato bazalaki kotalela ye lokola moto ya mayele mingi koleka bato ya mayele ya Mpoto, kasi na nsima bakómaki kotyola ye mpe kobenga ye moto ya bibangabanga to mopengwi. Lokola amikɔtisaki na bantembe ya mangomba, alukaki komonisa mabunga mpe makambo ya mabe oyo ezalaki na lingomba ya Katolike mpe ya baoyo bazalaki koluka mbongwana ekɔta. Lelo oyo batalelaka ye lokola moto ya liboso oyo asalá ete mbongwana ekɔta na makambo ya mangomba na mikili ya Mpoto. Na ndenge nini?
BOYEKOLI MPE MATEYA
Lokola Érasme ayebaki malamumalamu monɔkɔ ya Grɛki ná Latin, yango esalisaki ye akokanisa mabongoli ya Biblia ya Latin na ndakisa Vulgate ya Latin na bamaniskri ya ebandeli ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo babengaka Testama ya Sika. Andimisamaki ete boyebi ya Biblia ezali na ntina. Yango wana, amonaki ete esengeli kobongola Makomami mosantu na minɔkɔ mosusu oyo bato bazalaki koloba na ntango wana.
Érasme amonaki ete mbongwana esengeli kokɔta na lingomba ya Katolike mpo amonaki ete kobengama mokristo ezali te likambo ya kosala milulu ezangá ntina kasi esengelaki nde komonana na bizaleli. Yango wana, ntango bato oyo bazalaki koluka mbongwana ekɔta na eglize ya Roma bakómaki kotya matata, lingomba ya Katolike ekómaki kokanisela ye mabe.
Érasme alukaki komonisa mabunga mpe makambo ya mabe oyo ezalaki na lingomba ya Katolike mpe ya baoyo bazalaki koluka mbongwana
Na makambo oyo akomaki, Érasme amonisaki polele mabe ya bakonzi ya lingomba ya Katolike, ndenge bazalaki konduka bozwi mpe ndenge bapape bazalaki kotinda bato na bitumba. Akesanaki mpenza na bakonzi mosusu ya lingomba oyo bazalaki sembo te, oyo bazalaki kosalela mimeseno ya lingomba na ndakisa, kotubela masumu, kosambela basantu, kokila bilei mpe mibembo ya losambo mpo na kolyela bandimi. Atɛmɛlaki mpe makambo mosusu oyo lingomba esalaka, na ndakisa kofutisa bato mbongo mpo na milimo ya bawei mpe kopekisa bato kobala.
TESTAMA YA SIKA YA MAKOMI YA GRƐKI
Na 1516, Érasme abimisaki libongoli na ye ya liboso ya Testama ya Sika, na monɔkɔ ya Grɛki, ezalaki Biblia ya liboso ya Makomami ya Grɛki oyo ebimaki. Na Biblia yango atyaki mpe banɔti mpe libongoli mosusu ya Makomami ya Grɛki na Latin oyo ekesanaki na Vulgate. Nsima ya bambula, akobaki kobongisa libongoli na ye mpe ntango asilisaki, libongoli yango ekesanaki lisusu makasi na Vulgate ya Latin.
Moko ya makambo oyo ekesenisi libongoli na ye ná ya Vulgate ezali 1 Yoane 5:7. Mpo na kondimisa liteya ya Trinite oyo ezali na Biblia te, babakisá na Vulgate maloba oyo babengaka comma Johanneum. Maloba yango elobi: “Na likoló, Tata, Liloba mpe elimo santu: bango nyonso misato bazali moto moko.” Kasi, Érasme alongolaki maloba yango na mabongoli na ye mibale ya liboso ya Testama ya Sika mpo maloba yango ezalaki te na bamaniskri ya Grɛki ya bokristo oyo ye atalaki. Na nsima lingomba ya Katolike etyaki ye mbamba akɔtisa yango na libongoli na ye ya misato.
Lokola Érasme abongisaki mabongoli na ye ya Testama ya Sika, babongoli mosusu basalelaki yango mpo na kobongola Biblia malamu na minɔkɔ mosusu ya Mpoto. Martin Luther, William Tyndale, Antonio Brucioli mpe Francisco de Enzinas basalelaki yango mpo na kobongola Makomami ya Grɛki na Allemand, Anglais, Espagnol mpe Italien.
Érasme azalaki na bomoi na eleko oyo mangomba ezalaki na yikiyiki mpe bato oyo basalaki lingomba ya Protesta bazalaki kozwa libongoli na ye ya Testama ya Sika na monɔkɔ ya Grɛki na valɛrɛ mingi. Liboso kutu lingomba ya Protesta esalema mpenza, bato mosusu bazalaki kotalela ye lokola moto ya Protesta. Na nsima, aboyaki kokɔta na bantembe ya bato ya teoloji. Likambo ya kokamwa, eleki sikoyo mbula 100, David Schaff moto moko ya mayele akomaki ete Érasme “azalaki moto ya lingomba moko te ntango akufaki. Ezala Katolike to Protesta, moko te akoloba ete Érasme azalaki moto ya lingomba na bango.”