BIBLIA ELOBI NINI
Botɔndi
Emonani ete komonisa botɔndi ezalaka na matomba mingi
Ndenge nini komonisa botɔndi ememelaka moto bolamu?
OYO MINGANGA BALOBI
Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo Harvard Mental Health Letter, elobaki ete “komonisa botɔndi ezali na boyokani mpenza na esengo makasi oyo moto ayokaka. Komonisa botɔndi esalisaka bato bázala na makanisi malamu, báyoka esengo mpo na makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango, sante na bango ebonga, bálonga mikakatano mpe bázwa baninga ya solosolo.”
OYO BIBLIA ELOBI
Biblia elendisaka biso tómonisaka botɔndi. Ntoma Paulo, oyo apesaki ndakisa na likambo yango, akomaki boye: “Bózala na botɔndi.” Na ndakisa, azalaki ‘kotika te kopesa Nzambe matɔndi,’ ndenge bato mosusu bazalaki kondima nsango malamu oyo azalaki koteya bango. (Bakolose 3:15; 1 Batesaloniki 2:13) Esengo ya solosolo eyaka te kaka na koloba mersi na mabaku mosusu kasi nde soki moto azali na ezaleli ya komonisa botɔndi. Yango ebatelaka biso tómona te ete tozali na lotomo ya eloko nyonso, tóboya bilulela mpe kobomba nkanda, makambo oyo ekoki kosala ete bato bákima biso mpe elongola biso esengo.
Kutu Nzambe apesá ndakisa malamu na likambo yango
“Bósepelaka ntango nyonso. Na makambo nyonso bópesaka matɔndi.”
—1 Batesaloniki 5:16, 18.
Ndenge nini komonisa botɔndi ebongisaka boyokani na biso ná basusu?
MAKAMBO OYO EMONANI
Soki tomonisi botɔndi ya solo, ezala mpo na mwa eloko bapesi biso, mpo na liloba moko ya boboto to mpo na lisalisi moko oyo tozalaki na mposa na yango, esalaka ete moto oyo apesi biso yango amona ete azali na valɛrɛ mpe tosepelaka na ye. Ata mopaya asepelaka soki moto moko apesi ye matɔndi mpo na likambo moko ya malamu oyo asali, na ndakisa soki afungoleli moto porte.
OYO BIBLIA ELOBI
Yesu Kristo alobaki: “Bópesaka, mpe bato bakopesa bino. Bakosopa na mabenga na bino biloko mingi, oyo bafini, baningisi mpe etondi mɛkɛ.” (Luka 6:38) Tózwa ndakisa ya Rose, elenge mwasi moko ya baba oyo afandaka na Vanuatu, esanga moko ya Sudi ya Pasifike.
Rose azalaki kokende makita ya losambo ya Batatoli ya Yehova, kasi azalaki kozwela yango litomba mpenza te mpo moto moko te na lisangá ayebaki elobeli ya bajɛstɛ. Ntango ndeko mwasi moko ná mobali na ye oyo bayebaki kobongola malamu elobeli ya bajɛstɛ bayaki na lisangá na bango mpe bamonaki likambo yango, bafungolaki kelasi ya elobeli ya bajɛstɛ. Rose amonisaki botɔndi mpenza. Alobaki boye: “Nazali na esengo ya kozala na baninga ebele oyo balingaka ngai.” Botɔndi na ye mpe komona ndenge azali sikoyo kopesa biyano na makita esepelisaka mpenza bandeko yango oyo basalisaki ye. Rose asepelaka mpe na milende oyo basusu basalaka mpo na koyekola elobeli ya bajɛstɛ mpo na kosololaka na ye.
“Moto oyo azali kopesa matɔndi mpo ezala mbeka na ye, ye nde moto azali kopesa ngai [Nzambe] nkembo.”
—Nzembo 50:23.
Ndenge nini okoki kokóma na ezaleli yango?
OYO BIBLIA ELOBI
Makanisi na biso nde esalaka ete tómiyoka boye to boye. Davidi, moko ya bakomi ya Biblia alobaki na Nzambe boye na libondeli: “Namanyoli mosala na yo mobimba; nasepelaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Nzembo 143:5) Ɛɛ, Davidi azalaki te moto oyo akipaka makambo te to likolólikoló. Ezaleli na ye ya komonisa botɔndi eutaki na kotala mbala na mbala banzela ya Nzambe, momeseno oyo akobaki na yango bomoi na ye mobimba.
Biblia epesi biso toli kitoko mpenza: ‘Soki makambo nyonso ya solo, oyo ekoki kolingama, oyo elobelami malamu, ya malamu mpe oyo ebongi kokumisama ezali
“Komanyola ya motema na ngai ekozala na makambo ya mayele.”
—Nzembo 49:3.