Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini bato bazwaka lisusu bomoi na valɛrɛ te?

Mpo na nini bato bazwaka lisusu bomoi na valɛrɛ te?

MPO NA NINI ESENGELI KOZWA BOMOI NA VALƐRƐ?

Bizaleli mpe misala oyo emonisaka kozanga limemya mpo na bomoi ekoki mpenza kobebisa sante mpe kotya bomoi ya bato na likama.

  • Komɛla sigarɛti epesaka moto kaka kanser te, kasi ebebisaka mpe likoki oyo nzoto ezalaka na yango ya kobundisa maladi yango. Bato soki 90% oyo bakufá na maladi ya kaser ya pumɔ, mingi na bango, ezalaki baoyo bazalaki komɛla sigarɛti to oyo bazalaki kaka kopema milinga ya baoyo bazalaki komɛla yango.

  • Na bamboka mingi, koboma bato na masasi ekómi kosalema mingi mpe yango ezali kotika nsɔmɔ na makanisi ya bato mingi mbula nyonso. Lapolo moko ya Université ya Stanford elobi: “Bolukiluki emonisi ete ata bato oyo bazalaki [na eteyelo ntango masasi ebetamaki] oyo atako bazwaki likama moko te na nzoto, nsɔmɔ ya makambo oyo bamonaki ekoki kobebisa bomoi na bango mpo na bambula mingi.”

  • Bato oyo bakumbaka motuka, tukutuku mpe bisaleli mosusu na nse ya kwiti ya masanga to ya biloko mosusu nyonso oyo elangwisaka, batyaka moto nyonso na nzela na likama. Mbala mingi ntango bato bazali kozwa bomoi ata na valɛrɛ moke te, yango ebimiselaka bato nyonso makama oyo bakanaki te.

OYO OKOKI KOSALA

Batelá nzoto na yo. Ata soki omɛlaka makaya banda kala, kolangwa masanga to kosalela badrɔge ndenge na ndenge, okoki kotika yango. Bizaleli nyonso wana ebebisaka nzoto mpe emonisaka ete ozwaka na valɛrɛ te bomoi ya bato oyo bazalaka elongo na yo, na ndakisa bandeko na yo ya libota.

“Tómipɛtola na eloko nyonso oyo ekómisaka nzoto mpe elimo mbindo.”—2 Bakorinti 7:1.

Mibatelá na makama. Bongisaka ntango nyonso esika oyo ndako na yo ebebi mpo ebimisa likama te. Zalá ekɛngɛ ntango ozali kokumba, mpe bátela malamu motuka na yo to eloko mosusu. Kolinga te basusu bátya yo mbamba mpo osala likambo oyo ekoki kobimisa likama monene ata mpe liwa.

“Soki otongi ndako ya sika, osengeli mpe kosala efelo ya libateli mpo na nsamba na yo, mpo yo ná bato ya libota na yo bómema ngambo ya makila te soki moto moko akwei uta na nsamba mpe akufi.”—Kolimbola Mibeko 22:8. a

Zalá na boboto. Ndenge oyo totalelaka bato oyo bakeseni na biso, na ndakisa bato ya lopɔsɔ to ekólo mosusu, emonisaka mpe soki tozwaka bomoi na valɛrɛ to te. Yebá ete kokanisela bato mabe mpe koyina, ezali makambo mibale oyo ebimisaka mobulu mpe bitumba mingi na mokili.

“Bólongola mosika na bino makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi, nkanda, nkanda makasi, koganga mpe maloba ya kofinga, ezala mpe likambo nyonso ya kozokisa. Kasi bózala nde na boboto na kati na bino.”—Baefese 4:​31, 32.

OYO BATATOLI YA YEHOVA BASALAKA

Batatoli ya Yehova basalisaka bato bázala na bomoi ya malamu. Programɛ na biso ya koteya bato Biblia esalisi bato mingi bálongwa na boombo ya makambo oyo ebebisaka nzoto.

Tosalaka nyonso tókima makama na misala na biso ya kotonga bandako. Bavolontɛrɛ oyo basalisaka mpo na kotonga bisika na biso ya mayangani mpe bandako mosusu oyo tosalelaka mpo na kopesa bato formasyo ya makambo ya Nzambe, bazwaka formasyo mpo na kokima makama. Balandelaka bandako na biso mbala na mbala mpo na kotala soki eyokani na mibeko ya mboka na oyo etali makama.

Tosalisaka bato oyo bakutani na makama. Na basanza 12 oyo euti koleka, tosalisaki bato mpo na makama soki 200 oyo esalemaki na mokili mobimba mpe tosalelaki mbongo pene na 12 milio ya badolare mpo na kosunga baoyo bazwaki makama.

Ntango maladi ya Ebola ebandaki koboma bato na wɛsti ya Afrika (2014) mpe na République Démocratique du Congo (2018), tosalisaki bato báyeba ndenge ya koboya kopanza maladi mabe yango. Totindaki bato mpo na kosolola na bana-mboka na lisolo oyo elobaki: “Botosi ebikisaka bomoi!” Totyaki bisika ya kosokola mabɔkɔ na baporte nyonso ya bandako na biso ya losambo mpe tomonisaki bato ntina ya kosukola mabɔkɔ mpe makambo mosusu ya kosala mpo na komibatela.

Na Sierra Leone, chaine moko ya radio epesaki matondi na Batatoli ya Yehova mpo na milende na bango ya kosalisa bandimi na bango ata mpe baoyo bazalaki bandimi na bango te na bisika bafandi mpo na kokima maladi ya Ebola.

Esika ya kosukola mabɔkɔ liboso ya Ndako ya Bokonzi na Liberia na 2014, na ntango ya maladi ya Ebola

a Na ntango ya kala, na Moyen-Orient, likambo yango ezalaki na ntina mingi mpo na kobatela bato na kati ya libota mpe bato mosusu, mpamba te bazalaki kosalela nsamba to toiture ya ndako mpo na makambo mingi.