Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Mibeko oyo ekabolaki bakɔntina

Mibeko oyo ekabolaki bakɔntina

NTANGO Christophe Colomb autaki mobembo na ye ya liboso na Amerika na 1493, mokonzi ya Espagne mpe ya Portugal bayokanaki te mpo na moto oyo akokamba makambo etali mimbongo mpe kokonza mokili wana ya sika oyo bautaki komona. Espagne esɛngaki Pápa Alexandre VI akata likambo yango.

BAKONZI MPE BAPÁPA BAKABOLI BAKƆNTINA

Espagne, Portugal mpe Bapápa bamikómisaki bankolo mikili ya sika oyo bamonaki. Na 1455, Pápa Nicolas V apesaki Portugal lotomo nyonso ya kotalatala mikili mpe bisanga oyo ezalaki pembenipembeni ya Mbu Atlantike na Afrika mpe kokómisa eloko nyonso oyo bakomona kuna ya bango. Na likita ya Alcáçovas, oyo basalaki na 1479, Afonso V ya Portugal ná mwana na ye John bazongisaki lotomo ya kokonza Bisanga Canaries na mabɔkɔ ya mokonzi ya Espagne, Ferdinand ná mwasi na ye Isabella. Na ngámbo na yango, Espagne endimaki lotomo ya Portugal ya kokonza mombongo na Afrika mpe kokonza Açores, bisanga ya Cap Vert mpe Madère. Mbula mibale na nsima, Pápa Sixte IV andimaki lisusu makambo oyo bayokanaki na likita yango mpe amonisaki ete biloko nyonso ya sika oyo bakomona na sudi mpe na ɛsti ya Bisanga Canaries, ekokóma ya Portugal.

Kasi John, oyo akómaki sikoyo John II ya Portugal, alobaki ete mikili ya sika oyo Colomb amonaki ezalaki ya Portugal. Bakonzi ya Espagne baboyaki kondima yango mpe bayebisaki likambo yango epai ya Pápa ya sika Alexandre VI mpo apesa bango lotomo ya kokonza mokili ya sika oyo Colomb amonaki mpe kokómisa bato na yango bakristo.

Na mwa sinyatire oyo atyaki, Pápa Alexandre VI akabolaki bakɔntina

Alexandre abimisaki mibeko misato mpo na likambo yango. Na oyo ya liboso, alobaki ete “na nguya ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” napesi bateritware nyonso ya sika na mabɔkɔ ya Espagne mpo na libela. Ya mibale, natye ndelo ya kilomɛtrɛ 560 kobanda nɔrdi tii sudi ya wɛsti ya bisanga ya Cap Vert. Alexandre alobaki ete mikili nyonso oyo bamonaki to oyo bakomona na wɛsti ya ndelo yango, ekozala ya Espagne. Na mwa sinyatire oyo atyaki, Pápa akabolaki bakɔntina! Emonanaki lokola ete na mobeko ya misato, apesaki Espagne bokonzi mingi mpenza kobanda na ɛsti tii na Inde. Yango esilikisaki Mokonzi John, oyo bato na ye balongaki kotambola na nsɔngɛ mpenza ya Afrika, yango esalaki ete bokonzi ya Portugal ekende tii na Mbu Indien.

BATYE NDELO YA SIKA NA KARTE

Lokola asepelaki te na likanisi ya Alexandre, * John akendeki mbala moko koyokana na Ferdinand ná Isabella. William Bernstein, mokomi moko alobi boye: “Lokola bakonzi ya Espagne babangaki bato ya Portugal mpo na kanza na bango mpe lokola mokili ya sika ezalaki kopesa bango misala mingi, bamonaki malamu báyokana na kimya.” Yango wana, na 1494, batyaki sinyatire na mobeko oyo babimisaki mpe babengaki yango Tordesillas, nkombo moko ya engumba ya Espagne, epai mobeko yango ebimaki.

Mobeko ya Tordesillas etikaki ndelo oyo Alexandre atyaki na nɔrdi tii na sudi, kasi epusaki yango mosika na wɛsti na ntaka ya kilomɛtrɛ 1 480. Emonani lokola ete Afrika mobimba mpe Azia “ekómaki” ya Portugal, Amerika ekómaki ya Espagne. Kasi, ndenge bapusaki ndelo yango na wɛsti esalaki ete bámona mokili oyo bamonaki naino te, oyo eyebani na nkombo Brésil na teritware ya Portugal.

Mibeko oyo epesaki Espagne ná Portugal nzela ya kozwa mpe kobatela mikili ya sika oyo bazwaki esalelamaki mpo na kosopa ebele ya makila. Bikateli yango ekipaki kaka te lotomo ya bato oyo bazalaki kofanda na mikili yango; kosala ete bákonza mpe bányokola bango, kasi ekɔtisaki mpe matata na boumeli ya basiɛklɛ ebele kati na bikólo ya nguya mpe esalaki ete bonsomi ya kotambola na Mbu ezala te.

^ par. 9 Mpo na koyeba makambo mosusu etali Pápa wana ya mabe koleka, talá lisolo “Alexandre VI​—Pápa oyo Rome ebosani te,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/2003, nkasa 26-29.