Makambo oyo ezali koleka na mokili
États-Unis
Na engumba Los Angeles, na etúká ya Californie, basali ete miinda pene na 4 500 oyo esalisaka bato bátosa mibeko ya nzela na ntaka ya bakilomɛtrɛ-kare soki 1 215, esalaka nzela moko. Zulunalo moko (The New York Times) elobi ete Los Angeles ezali “engumba ya liboso ya monene oyo esali likambo ya ndenge wana na mokili mobimba.”
Mokili
Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na mokili mobimba emonisi ete, kobanda 1990 tii 2010, motángo ya bato oyo bakómi minene mingi emati mpenza (tii na 82%). Motángo ya bato oyo bazali kokufa mpo bakómi minene mingi eleki mbala misato motángo ya bato oyo bazali kokufa mpo bazali kolya malamu te, atako na mikili mingi kozwa biloko ya kolya ezali naino mokakatano. Majid Ezzati, moko ya bato oyo basalaki ankɛtɛ yango, alobi boye: “Na mbula 20 oyo euti koleka, biloko ya kolya ezalaki mingi te na mokili; sikoyo biloko ya kolya ekómi mingi, kasi ezali kopesa bato bamaladi ndenge na ndenge, ata na mikili ya bobola.”
Esanga Midway
Ndɛkɛ babengi albatros de Laysan, oyo balobaka ete ezali “ndɛkɛ oyo eumeli mingi koleka bandɛkɛ mosusu nyonso,” euti kobota mwana mosusu. Ndɛkɛ yango eumeli mbula boni? Ntango batyaki ndɛkɛ yango elembo na 1956, ezalaki na mbula soki mitano mpamba, elingi koloba sikoyo ezali na mbula koleka 60. Soki basangisi mibembo nyonso oyo ndɛkɛ yango esalá na bomoi na yango mobimba, ekoki kokóma kilomɛtrɛ soki milio 3 to 4. Na maloba mosusu, ezali lokola kosala mobembo longwa mabele tii na sanza mbala minei to motoba.
Afrika ya Sudi
Ankɛtɛ moko emonisi ete na Afrika ya Sudi, na basi misato, moko na bango (1/3) apakolaka sabuni to mafuta oyo etelisaka loposo. Kopakola biloko ya kotelisa loposo ndenge wana ezali likama mpe epekisami na bikólo mingi. Makama yango ekoki kozala kansɛr ya mitindo ndenge na ndenge, maladi oyo ebebisaka bangei, konyokwama na makanisi, maladi ya mitungisi, makwanza to bilembo ya moindo na nzoto.