LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA
Ndenge ya kopesa mwana na yo oyo akómi elenge disiplini
MOKAKATANO
Botyá mobeko na libota na bino ete kobanda ngonga ya 21, moto nyonso akanga telefone, kasi mbala mibale mobimba, na katikati ya butu okuti mwana na yo ya mwasi azali kotindela moninga na ye mesaje. Botyelá mwana na bino ya mobali mobeko ete azalaka libándá ya ndako te na ngonga ya 22, kasi lobi na butu, azongaki lisusu ndako nsima ya ngonga 23.
Ezali solo ete mwana na yo asalaki mabe. Kasi osengeli naino koyeba mpo na nini azali kotosa te mibeko oyo otyeli ye. Mbala mosusu na likambo oyo omoni ete abuki mibeko, ekoki kozala na yango likambo moke mpenza.
NINI ESALAKA BONGO?
Mibeko oyo ezali polele te. Bilenge mosusu babukaka mibeko na nko mpo bámona soki bakozwela yango etumbu to te. Na ndakisa, soki moboti alobi ete akopesa mwana etumbu soki atosi te likambo boye to boye, elenge akoki komeka kobuka mobeko yango mpo atala soki moboti akosalela makambo oyo alobaki. Yango emonisi nde ete bilenge yango bakómi batomboki oyo bakoki kobongwana te? Ezali mpenza bongo te. Ezali solo ete bilenge mingi bazwaka mibeko na valɛrɛ te soki baboti bazali kopesa bango etumbu te to soki mibeko yango ezali polele te.
Makambo makasimakasi. Baboti mosusu basalá liste ya mibeko ebeleebele mpo na kolandela makambo oyo bana na bango basalaka. Soki mwana abuki mobeko, moboti akosilika mpe akobakisela ye lisusu mibeko ebele. Kasi mbala mingi, yango ebebisaka nde makambo. Buku moko (Parent/Teen Breakthrough) elobi boye: “Ntango ozali koluka kolandela mwana na yo na likambo nyonso, akokóma motó makasi,” buku yango ebakisi boye: “Kolandela mwana na yo ndenge wana ezali lokola kotya manteka oyo ekómi glasi na limpa ya pɛtɛɛ, na esika manteka yango epanzana na kati ya limpa, limpa nde ekopanzana.”
Disiplini oyo ebongi ekoki kosalisa. Disiplini ekeseni na “kopesa etumbu,” mpo etumbu elimboli konyokola moto; kasi “disiplini” elimbolaka mpenza nde koteya. Boye, ndenge nini okoki koteya mwana na yo atosaka mibeko na yo?
OKOKI KOSALA BOYE
Zalá polele. Bilenge balingaka koyeba mpenzampenza likambo basɛngi bango básala mpe etumbu oyo bakozwa soki batosi te.—Toli ya Biblia: Bagalatia 6:7.
Likanisi: Salá liste ya mibeko ya ndako na yo. Na nsima, omituna boye: ‘Natye mibeko ebele to moke mpenza? Mibeko mosusu ezali lisusu na ntina te? Nasengeli kobongisa yango mwa moke na kotalela makambo oyo mwana azali kosala?’
Kozala bongolabongola te. Bilenge mingi bamitungisaka soki bapesi bango etumbu na likambo oyo basali na pɔsɔ oyo nzokande bazwelaki yango etumbu te ntango basalaki yango na pɔsɔ oyo eleki.—Toli ya Biblia: Matai 5:37.
Likanisi: Pesá ye etumbu oyo eyokani na “likambo mabe” oyo asali. Na ndakisa, soki mwana na yo atosi te ngonga oyo otyelaki ye ya kozongaka ndako, pesá ye etumbu ete azonga ndako liboso ya ngonga oyo asengelaki kozonga.
Kozala makambo makasimakasi te. Mpo na komonisa ete ozali makambo makasimakasi te, bakiselá mwana na yo mwa bonsomi na kotalela makambo oyo azali kosala.—Toli ya Biblia: Bafilipi 4:5.
Likanisi: Fandá mpe lobelá mibeko yango ná mwana na yo. Okoki kutu kosɛnga ye amonisa makama oyo ekoki kokómela ye soki aboyi kotosa mibeko mosusu. Ezalaka mpasi te bilenge bátosa mibeko oyo bango moko mpe bapesaki makanisi ntango ozalaki kotya yango.
Salisá ye abongisa bizaleli. Mokano na yo ezali kaka te ya kosala ete mwana na yo atosaka mibeko kasi mpe ya kosalisa ye akóma na lisosoli malamu, elingi koloba likoki ya kokesenisa mabe ná malamu. (Talá etanda “Salisá ye akóma na bizaleli malamu.”)—Toli ya Biblia: 1 Petro 3:16.
Likanisi: Luká toli ya Biblia. Ezali buku oyo eleki malamu, oyo ekoki kosalisa yo ozwa “disiplini oyo epesaka mayele ya kososola,” mpe bwanya na yango ekoki “kopesa bokɛngi na bato oyo bazangi mayele, kopesa elenge mobali [to mwasi] boyebi ná likoki ya kokanisa.”—Masese 1:1-4.