Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MITUNA-LISOLO | BRETT SCHENCK

“Nandimaka mpenza ete bomoi eutá na Nzambe”

“Nandimaka mpenza ete bomoi eutá na Nzambe”

Brett Schenck azali moto ya mayele na États-Unis oyo azalaki kotala makambo etali kobatela mai, mopɛpɛ, banyama mpe zamba; kasi azwá pansiɔ. Ayekolaka boyokani oyo ezalaka kati na biloko lokola banzete, banyama mpe bisika oyo biloko yango ezalaka. Mpo na nini andimaka ete Mozalisi azali? Zulunalo Lamuka! etunaki ye makambo ya siansi yango mpe kondima na ye.

Yebisá biso ndenge obɔkwamá.

Tata na ngai azalaki ingénieur na mekaniki. Azalaki mbala mingi kosolola na ngai na esengo nyonso makambo etali matematiki mpe siansi. Ntango nazalaki mwana, nazalaki kosepela na mwa banzete mpe banyama oyo efandaka na mai ya mikemike mpe na bapisini oyo ezalaki pembeni ya ndako na biso na mboka New Paris, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Yango wana, ntango nakɔtaki iniversite ya Purdue, naponaki koyekola siansi babengi écologie.

Makambo ya Nzambe ezalaki kosepelisa yo?

Ɛɛ.Tata alendisaki ngai nayekola makambo ya Ba-luthérien, lingomba oyo tozalaki kosambela. Nayekolaki Grɛki koinè, moko ya minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia. Nakómaki na limemya mingi mpo na Biblia.

Ndenge nini ozalaki kotalela liteya ya evolisyo?

Lingomba na ngai ezalaki kondima liteya yango. Baninga na ngai ya mosala bazalaki mpe kondima yango. Yango wana, ngai mpe nakómaki kondima liteya yango. Kasi, nazalaki mpe kondimela Nzambe. Nazalaki kokanisa ete mateya wana nyonso mibale ezali na boyokani. Atako nazalaki na limemya mpo na Biblia, nazalaki kokanisa te ete eutá na Nzambe.

Nini esalaki ete obongola ndenge na yo ya kotalela Biblia?

Batatoli mibale ya Yehova, Steve ná Sandy, bayaki kotala ngai ná mwasi na ngai Debbie. Bamonisaki biso ete atako Biblia ezali buku ya siansi te, kasi eyokani na makambo ya siansi. Na ndakisa, elobi boye mpo na Nzambe: “Ezali na Moto oyo afandi likoló ya zolongano ya mabele.” (Yisaya 40:22) Elobi mpe ete: “Akakisi mabele na eloko moko te.” (Yobo 26:7) Bavɛrsɛ yango ekamwisaki ngai mingi, mpo na ntango wana nazalaki kosalela bafɔtɔ oyo satelite ekangi mpo na koyekola écologie. Bavɛrsɛ yango ekomamaki kala liboso kutu moto moko akanga fɔtɔ ya mabele oyo ekakisami na eloko moko te. Ntango Steve ná Sandy bazalaki koyekola na biso Biblia, nayekolaki bisakweli oyo ekokisamaki, batoli oyo ebongi mpe nazwaki bandimbola oyo esepelisaki ngai. Mokemoke, nakómaki kondima mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe.

Ntango nini obongolaki makanisi na yo mpo na ndenge bomoi ebandá?

Nsukansuka, Steve alakisaki ngai maloba oyo ya Biblia: “Yehova Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele.” (Ebandeli 2:7) Moto ya liboso akelamaki mpenza. Yango ebimisi motuna oyo: Biblia eyokani na makambo oyo siansi elobaka? Steve alendisaki ngai nasala bolukiluki na likambo yango, mpe nasalaki bongo.

Liteya ya evolisyo eteyaki yo makambo nini?

Eteyaki ngai makambo mingi. Moko na yango ezali ete liteya yango elukaka kolimbola ndenge oyo bikelamu ndenge na ndenge ebandá. Bikelamu ya bomoi ezalaka na binama oyo ebongi mpenza, na ndakisa, motema, pumɔ mpe miso. Lisusu, na biloko oyo emonanaka kaka na mikroskope, na ndakisa na kati ya baselile tokomona biloko mosusu ya mikemike oyo ebongisamá lokola ‘bamasini.’ Biloko yango eutá wapi? Bato ya evolisyo balobaka ete biloko mikemike yango ya malamu koleka eponamaka yango moko mpo bikelamu ya bomoi oyo ezali na yango ekobaka kozala na bomoi ata soki ekutani na mokakatano nini. Kasi, likanisi yango epesi eyano te na motuna oyo: biloko mikemike yango eutá wapi? Nayebaki ete bato mingi ya siansi bandimaka te ete liteya ya evolisyo epesaka eyano na motuna yango. Profesɛrɛ moko ya zooloji ayebisaki ngai ete andimaka ata moke te makambo oyo evolisyo eteyaka. Kasi, alingaka te bato bayeba yango mpo abangaka ete mosala na ye ebeba.

Koyeba makambo ya écologie ekómisaki kondima na yo makasi?

Ɛɛ, ezali bongo. Mosala na ngai esɛngaka koyekola ndenge oyo bikelamu ya bomoi ezalaka na boyokani. Bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabele, ezalaka na mposa ya lisalisi ya eloko mosusu. Tózwa naino ndakisa ya bafololo mpe banzoi. Ndenge oyo bafololo esalemá, langi na yango, nsolo kitoko mpe mai ya sukali oyo ezalaka na kati, ebongisamá mpo ebendaka banzoi mpo ezwaka mwa pudrɛ oyo bafololo ebimisaka. Nzoi ebongisamá mpo ebendaka mai ya sukali ya bafololo mpe ezwaka mwa pudrɛ na yango mpe emema yango na bafololo mosusu mpo ebotisa yango. Emonani polele ete bafololo mpe banzoi ebongisamá mpo esalisanaka.

‘Ndenge bikelamu awa na mabele ebongaka nokinoki nsima ya kokutana na likama moko, etindaka ngai nandima mpenza ete bomoi eutá na Nzambe’

Écosystème ezali esika oyo ekoki kozala na bankoto ya banyama, banzete, bamikrobe mpe mayebo ya ndenge na ndenge. Mpe na kati na yango tomonaka ndenge bikelamu yango esalisanaka mpenza. Nyama nyonso ezalaka na mposa ya banzete mpo ezwa bilei mpe mopɛpɛ ya malamu oyo topemaka (oxygène), mpe banzete mingi oyo ebimisaka bafololo ezalaka na mposa ya banyama. Atako ezali na biloko mingi ya ndenge na ndenge mpe oyo ekoki kobeba, écosystème ekoki koumela bankoto ya bambula. Ata soki mopɛpɛ mabe ebebisi yango, ntango kaka mopɛpɛ mabe yango esili, ezongaka lisusu ndenge ezalaki. Soki nakanisi ndenge bikelamu awa na mabele ebongaka nokinoki nsima ya kokutana na likama moko, nandimaka mpenza ete bomoi eutá na Nzambe.

Mpo na nini okómaki Motatoli ya Yehova?

Nazalaki komitungisa mpenza ndenge bato babebisaka mabele. Nayebaki ete atako écosystème ebongaka nokinoki nsima ya kokutana na likama moko, yango elingi koloba te ete ezali seko na seko. Batatoli ya Yehova bateyaki ngai na Biblia ete Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ (Emoniseli 11:18) Maloba wana ezalaki na ntina mingi mpo na ngai. Wana nakobaki koyekola Biblia, mokemoke namonaki ete elikya oyo Biblia epesi ezali solo.

Nasepelaka koyebisa basusu mateya oyo nandimaka, mpe nayekolá ná bato mosusu ya siansi Biblia. Ntango nakómaki na mbula 55, nazwaki pansiɔ liboso ete nakóma na mbula ya kozwa yango mpo nalekisaka ngonga mingi na kosalisa basusu báyeba Mozalisi ya bomoi mpe mokano na ye mpo na mabele kitoko oyo tofandi.