Makambo oyo ezali koleka na mokili
Golfe ya Mexique
Na 2010, na sanza ya minei, likama moko esalemaki na esika oyo babimisaka petrole na mbu; ebele ya petrole mpe esansi etepaki likoló ya mai na boumeli ya sanza soki misato. Boyekoli oyo ekipi moko ya bato ya mayele esalaki, emonisaki ete sanza mibale na ndambo na nsima, biloko mosusu oyo ebebisaki mai yango ezalaki lisusu te mpo bamikrobɛ (bactérie) esilisaki makasi ya gaze babengi méthane. Kasi, bato mosusu ya mayele bandimi likambo yango te. Bakanisi ete ebele ya petrole yango ezindaki na nse ya océan.
Russie
Zulunalo moko (Rossiiskaya Gazeta) elobeli ankɛtɛ moko oyo emonisaki ete bato mingi ya ekólo Russie (59%) kobanda na mbula 18 tii 35 bandimaka ete “mpo na kolonga na bomoi, esengeli mbala mosusu koboya kotosa mibeko etali bizaleli malamu,” mpe mibeko mosusu.
Pérou
Masango mosusu ya kala mpenza oyo ezali tii lelo oyo (na ndakisa oyo ezali awa na likoló) emonisi ete eleki sikoyo bambula 3 000, bato ya nɔrdi ya Pérou bazalaki kosala tuska to masango ya fware mpe fufu ya masango.
Italie
Lucio Soravito De Franceschi, episkɔpɔ ya Lingomba ya Katolike alobi ete nsango oyo mangomba eteyaka esengeli “kokómela bato” na bisika oyo bafandaka. Alobi lisusu boye: “Mokumba na biso ya kobatela bandimi ezali te ya kobɛta bangonga ya eglize, kasi nde ya kokende kobɛta baporte na bango.”
Afrika ya sudi
Ntalo ya kilo moko ya liseke ya kánga (rhinocéros) mpo na kosala nkisi ya monganga, oyo etɛkamaka na ndenge ya moyibi, emati tii na dolare 65 000. Na 2011, kaka na Afrika ya Sudi, babomi minene ya nyama babomaki bakánga 448. Na mpoto, babandi babukaki Ba musée mpe bandako oyo batɛkaka biloko mpo na koluka maseke ya banyama yango. Ata mpe bakánga oyo ezalaka na zoo na mpoto ekómi na likama.