Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 4

Lisolo ya Bamede ná Baperse na Biblia

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 4

Oyo ezali lisolo ya minei na masolo nsambo oyo ekokoba kobima na banimero ya Lamuká!oyo ekolobela bikólo nsambo ya nguya na mokili mobimba oyo Biblia elobeli. Ntina na yango ezali ya komonisa ete Biblia ebongi kotyelama motema mpe ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ete nsango na yango ezali nsango ya elikya, oyo elobeli nsuka ya mpasi oyo euti na boyangeli mabe ya bato likoló ya baninga na bango bato.

BISIKA oyo bandako ya bakonzi ezalaká mpe malita na bango emonisaka kaka mwa moke lokumu, nguya mpe bomɛngo ya bokonzi ya Bamede ná Baperse. Liboso makonzi yango mibale esangana, bokonzi ya Bamede nde elekaki makasi. Kasi na mobu 550 L.T.B., Siruse II mokonzi ya Baperse alongaki Bamede, mpe na nsima akómaki mokonzi ya Bamede ná Baperse. Bokonzi wana monene ezalaki liboso na etúká oyo ezali na nɔrdi ya Golfe persique; kasi na nsima, eyangelaki bikólo banda na Mbu ya Égée tii na Ezipito, kino na nɔrdi-wɛsti ya Inde, mpe Yudea ezalaki moko ya bitúká na yango.

Bokonzi ya Bamede ná Baperse eyangelaki Bayuda mbula koleka 200, banda ntango bakweisaki bokonzi ya Babilone na mobu 539 L.T.B. tii ntango Bagrɛki bakweisaki bokonzi na bango na mobu 331 L.T.B. Mikanda mingi ya Biblia elobeli makambo minene oyo esalemaki na ntango yango.

Lisolo oyo ebongi kotyelama motema

Biblia eyebisi biso ete Mokonzi Siruse II alongolaki Bayuda na boombo na Babilone, apesaki bango nzela ya kozonga na Yerusaleme mpe kotonga tempelo ya Nzambe, oyo basoda ya Babilone babebisaki na mobu 607 L.T.B. (Ezera 1:1-7; 6:3-5) Makomi likoló ya mabele ya lima, oyo eyebani na nkombo Cylindre de Cyrus, oyo bamonaki na mobu 1879 na esika Babilone ezalaki, ezali kondimisa likambo yango. Makomi yango etángi nkombo ya Siruse mpe elobeli momeseno oyo azalaki na yango ya kozongisa bato oyo akutaki baombo na mboka na bango, mpe kozongisa biloko na bango ya losambo. Yisaya, moko ya bakomi ya Biblia, akomaki maloba oyo Yehova alobaki mpo na Siruse ete: “‘Akokokisa mpenza likambo nyonso oyo nasepeli na yango’; ɛɛ, liloba na ngai na ntina etali Yerusaleme, ete: ‘Ekotongama lisusu,’ mpe na ntina etali tempelo, ete: ‘Moboko na yo ekotyama.’”​—Yisaya 44:28.

Ezera 6:3, 4 elobi ete Siruse apesaki mitindo mpo “ndako ya mokonzi epesa mbongo oyo esengeli kosalelama” mpo na kotonga lisusu tempelo. Maloba wana ya kokamwa eyokani na makambo ezali na mikanda ya makambo ya kala. Buku moko (Persia and the Bible) elobi boye: “Bakonzi ya Perse bazalaki kopesa mabɔkɔ mpo na kotonga lisusu bandako-nzambe oyo ezalaki na bokonzi na bango.”

Biblia elobeli banguna ya Bayuda, oyo na nsima bakomelaki Dariuse Monene (oyo abengami mpe Dariuse I) mpo baboyaki kondima ete Siruse apesaká Bayuda ndingisa ya kotonga lisusu tempelo. Dariuse asɛngaki báluka mokanda mpenza oyo bakomaki mobeko yango. Esukaki boni? Bamonaki rulo moko oyo ezalaki na mobeko ya Siruse na Ekebatana, mboka-mokonzi. Mpo na yango, Dariuse akomaki boye: “Ngai, Dariuse, napesi etinda. [Mosala ya kotonga lisusu tempelo] esalema nokinoki.” Batɛmɛli ya mosala yango bakangaki monɔkɔ. *​—Ezera 6:2, 7, 12, 13.

Mikanda ya masolo ya kala endimisi makambo yango. Ya liboso, engumba Ekebatana ezalaki esika Siruse azalaki kofanda na eleko ya molunge, mpe mbala mosusu ezali kuna nde abimisaki mobeko yango. Lisusu, biloko oyo bato ya arkeoloji bamoni ezali komonisa ete bakonzi ya Bamede ná Baperse bazalaki mpenza kotya likebi mingi na makambo ya losambo oyo ekokaki kobimisa matata na bamboka oyo bazalaki koyangela mpe bazalaki kokoma mikanda mpo na kosilisa yango.

Bisakweli oyo okoki kotyela motema

Na ndɔtɔ moko, Nzambe amonisaki mosakoli Danyele nyama minei oyo ezalaki kobima na mbu, mpe yango nyonso ezalaki komonisa kolandana ya makonzi oyo esengelaki koyangela mokili. Nyama ya liboso, nkɔsi moko oyo ezalaki na mapapu, emonisaki Babilone. Nyama ya mibale ezalaki “lokola urse.” Lisolo yango ekobi boye: “Talá oyo bayebisaki yango: ‘Tɛlɛmá, lyá misuni mingi.’” (Danyele 7:5). Urse wana ya nsɔmɔ emonisaki bokonzi ya Bamede ná Baperse.

Ndenge kaka esakweli ya Danyele elobaki, Bamede ná Baperse bazalaki mpenza na lokoso ya kobɔtɔla bikólo mosusu. Mwa moke nsima ya emonaneli ya Danyele, Siruse alongaki Bamede mpe abandaki kobunda na ekólo Lydia, oyo ezalaki mpe pembeni na Babilone. Mwana na ye, Cambyse II, alongaki Ezipito. Na nsima, Bamede ná Baperse babɔtɔlaki bamboka oyo ezalaki mosika mpenza.

Ndenge nini tokoki koyeba ete ndimbola yango ezali solo? Na emonaneli mosusu, oyo eyokani mpe na oyo ya liboso, Danyele amonaki mpate-mobali moko “ezali kobɛta maseke na wɛsti, na nɔrdi mpe na sudi.” Esakweli oyo ekokisamaki ntango Bamede ná Baperse ‘babɛtaki maseke,’ elingi koloba babundisaki bikólo mosusu, ata mpe Babilone oyo ezalaki ekólo ya nguya mpenza. Anzelu ya Nzambe oyo alimbolaki emonaneli yango, ayebisaki Danyele ete: “Mpate-mobali oyo omonaki, oyo ezali na maseke mibale, elakisi bakonzi ya Media mpe ya Perse.”​Danyele 8:3, 4, 20.

Lilita ya Siruse ezali tii lelo na esika oyo engumba Pasargade ezalaká, na ekólo Iran

Lisusu, mbula soki nkama mibale liboso Babilone ekweisama, mosakoli Yisaya ayebisaki nkombo ya mokonzi ya Perse oyo akolonga Babilone liboso kutu abotama mpe ayebisaki mayele oyo akosalela mpo na kokweisa Babilone. Yisaya akomaki boye: “Talá oyo Yehova alobi na moto na ye oyo atyami mafuta, na Siruse, oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali, mpo natya na nse na ye bikólo, . . . mpo nafungola baporte ya bizipeli mibale liboso na ye, bongo baporte ekokangama te.” (Yisaya 45:1) Yisaya ná Yirimia basakolaki ete “bibale” ya Babilone, to baterase minene oyo ezalaki zingazinga ya engumba yango, oyo mai na yango ezalaki kouta na Ebale Efrate, oyo ezalaki kobatela engumba yango, esengelaki kokauka. (Yisaya 44:27; Yirimia 50:38) Hérodote ná Xénophon, Bagrɛki oyo bazalaki bakomi ya masolo ya kala, balobi ete likambo yango ezali solo, mpe bamonisi ete bato ya babilone bazalaki kosala fɛti monene na butu oyo Siruse azwaki engumba na bango. (Yisaya 21:5, 9; Danyele 5:1-4, 30) Nsima ya kotinda mai ya Ebale Efrate na nzela mosusu, basoda ya Siruse bakɔtaki na engumba na baporte oyo etikalaki polele pembenipembeni ya ebale mpe babundaki mpenza te. Na butu kaka moko Babilone, ekólo ya nguya, ekweaki!

Likambo yango mpe esalaki ete esakweli mosusu ekokisama. Yirimia asakolaki ete basaleli ya Nzambe bakokende na boombo na Babilone mbula 70. (Yirimia 25:11, 12; 29:10) Esakweli wana ekokisamaki mpenza na ntango oyo ebongi, mpe baombo yango bazwaki ndingisa ya kozonga na mboka na bango.

Elaka oyo okoki kotyela motema

Ntango Bamede ná Baperse bakweisaki Babilone, mwa moke na nsima Danyele akomaki esakweli moko oyo esalisaka mpenza mpo na koyeba likambo moko ya ntina mingi na kokokisama ya mokano ya Nzambe mpo na bato. Anzelu Gabriele ayebisaki Danyele ntango mpenza oyo Masiya to “momboto” oyo Ebandeli 3:15 elobelaki, asengelaki komonana! Anzelu yango alobaki boye: “Banda kobima ya liloba ya kobongisa mpe kotonga lisusu Yerusaleme tii Masiya Mokambi, ekozala pɔsɔ nsambo, lisusu pɔsɔ ntuku motoba na mibale (62),” nyonso epesi pɔsɔ 69. (Danyele 9:25) Eleko yango ebandaki ntango nini?

Atako Siruse apesaki Bayuda nzela ya kozonga na mboka na bango nokinoki nsima ya kokwea ya Babilone, bambula mingi na nsima Yerusaleme ná bifelo na yango etongamaki kaka te. Na mobu 455 L.T.B., Mokonzi Artazerezese apesaki Nehemia, Moyuda moko oyo azalaki mopesi-masanga na ye, nzela ya kozonga na Yerusaleme mpo na kotambwisa mosala ya kotonga lisusu. (Nehemia 2:1-6) Yango ezalaki ebandeli ya pɔsɔ 69.

Nzokande pɔsɔ 69 yango, ezalaki te bapɔsɔ ya mikolo nsambo kasi nde bapɔsɔ ya bambula. Kutu, mabongoli mosusu ya Biblia ebongoli maloba “bapɔsɔ” na “mbula.” * (Danyele 9:24, 25) Masiya asengelaki komonana nsima ya eleko ya “bapɔsɔ” 69, oyo mokomoko na yango ezali na mbula 7; mpe nyonso epesi mbula 483. Esakweli yango ekokisamaki na mobu 29 T.B. ntango Yesu azwaki batisimo, mbula 483 mpenza kobanda na mobu 455 L.T.B. *

Ndenge oyo esakweli wana ya Danyele ekokisamaki ebakisami na makambo mosusu oyo ezali komonisa ete Yesu azali mpenza Masiya. Likambo yango emonisi mpe ete elikya na biso mpo na mikolo ezali koya ekokokisama mpenza. Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, akosukisa boyangeli mabe ya bato. Nsima na yango, akokokisa bisakweli mosusu mingi oyo ezali na Biblia, ata oyo ezali kolobela lisekwa ya bakufi mpo na bomoi ezangi nsuka na paradiso awa na mabele.​—Danyele 12:2; Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:3-5.

^ par. 9 Bakonzi soki misato bayebani na nkombo Dariuse.

^ par. 20 Kati na mabongoli ya Biblia oyo esaleli liloba “mbula” na esika ya “bapɔsɔ” tokoki kotánga: Bible na lingala ya lelo oyo.

^ par. 20 Mpo na koyeba makambo mingi ya esakweli yango mpe komona etanda oyo emonisi bapɔsɔ 69 ya bambula, talá nkasa 197-199 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?