Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina oyo natikaki mosala oyo ezalaki kopesa ngai mbongo mingi

Ntina oyo natikaki mosala oyo ezalaki kopesa ngai mbongo mingi

Ntina oyo natikaki mosala oyo ezalaki kopesa ngai mbongo mingi

Lisolo ya Martha Teresa Márquez

NAZALAKI ntango nyonso kolinga koyemba, ata mpe koyemba na radio ntango nazalaki mwana. Natángá mpenza kelasi te, kasi na nsima nayekolaki miziki na engumba Mexico epai ya mokambi ya orkestre moko ya mboka na biso.

Na 1969, ntango nazalaki na mbula 24, moninga moko oyo azalaki kobina abengisaki ngai na La Rampa Azul, restora moko ya lokumu oyo ezalaki na bar, mpo bátala soki nabongi na koyemba. Nayembaki Cucurrucucú Paloma, nzembo moko ya lokumu oyo Tomás Méndez, moto moko ya Mexique akomaki, mpe bato basepelaki makasi. Yango nde ebandeli mpenza ya mosala na ngai ya koyemba. Nazalaki koyemba lokola soliste, nazalaki kosalela nkombo Romelia Romel.

Nasalaki elongo na Tomás Méndez, ata mpe bakomi mpe bayembi mosusu ya lokumu ya Mexique ata mpe Cuco Sánchez mpe Juan Gabriel. Ezalaki mpenza esengo komona nkombo na ngai na bazulunalo. Nazalaki koyemba na banganda ya butu, na radio, mpe kokende koyemba na bisika ndenge na ndenge na Mexico mpe na Bélize. Nasalaki mpe na Leonorilda Ochoa, mosani moko ya teyatre oyo ayebani mingi na Mexique, ntango babandaki kolakisa teyatre na ye sika na televizyo ya mboka Mexico.

Na nsima, nakómaki na lokumu mpe nazalaki kozwa mbongo mingi​—mbongo oyo ezalaki kosalisa ngai nakóma na bomoi moko ya kitoko, kosomba babiju, bilamba ya ntalo, mpe nafanda na ndako moko ya ntalo mingi. Emonanaki ete nazalaki na biloko nyonso oyo moto asengeli na yango, kasi nazalaki na esengo te. Nazalaki koyoka nazangi eloko moko. Atako nakolaki na Lingomba ya Katolike, nazalaki koyoka nsɔni kokende na ndako-nzambe. Nazalaki komimona mbindo mpo na bomoi ya mabe oyo nazalaki na yango.

Ndenge oyo nakómaki kolinga Yehova

Ntango nazalaki komibongisa mpo na kobimisa banzembo na ngai ya liboso, nayebisaki Lorena, moninga na ngai moko oyo azalaki koyemba banzembo ya bonkɔkɔ (ranchera) ndenge nazalaki komiyoka. Nayebisaki ye ete nakolinga kokóma mamɛlo mpe kosalisa babola. Akamwaki, alobaki na ngai ete: “Mamɛlo? Motó na yo ezali kosala malamu te!”

Na nsima atunaki ngai boye: “Oyebi nkombo ya Nzambe?”

Nalobaki na ye: “Nkolo Yesu Kristo.”

Alobaki na ngai: “Te, nkombo na ye Yehova.” “Yesu azali Mwana na ye.”

Natunaki ye: “Yehova?” Nkombo yango ezalaki mopaya na matoi na ngai. Lorena apesaki ngai Biblia mpe ayebisaki ngai ete akotinda molakisi na ye, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, aya kotala ngai. *

Ntango nyonso oyo nazalaki komona Lorena, nazalaki kotuna ye, “mokolo nini okotindela ngai molakisi na yo?” Nazalaki na nzala ya koyoka maloba ya Nzambe.

Na ntango yango, nabandaki kotánga Biblia kaka ngai moko mpe namonaki ete nkombo ya Nzambe ezalaki mpenza Yehova. (Nzembo 83:18) Nakamwaki mpenza. Natángaki mpe Mibeko Zomi mpe mobeko oyo elobi: “Osengeli kosala ekobo te,” esimbaki motema na ngai. (Kobima 20:14) Na ntango wana, nazalaki kofanda na mobali ya bato, tobotaki na ye mwana moko ya mobali oyo azalaki na sanza mwambe. Bebe yango azalaki mwana na ngai ya mibale. Nabotaki mwana mobali ya liboso ná mobali mosusu oyo abalaki ngai mpe te.

Mokolo moko, ntango nazalaki kobongisa nzembo na ngai, moto moko abɛtaki na porte. Ezalaki molakisi ya Lorena, Mauricio Linares ná mwasi na ye. Bamonisaki ngai mokano ya Nzambe mpo na bato mpe batikelaki ngai buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. * Natángaki yango kaka na butu moko, atako nazalaki kokakatana na maloba mosusu ya makasi oyo ezalaki na buku yango. Ezali na ntango wana nde nabandaki kolinga Yehova.

Nabongoli bomoi na ngai

Lokola Batatoli ya Yehova bazalaki kosalisa ngai nayekola Biblia mpe nayeba kotánga malamu, namonaki ete nasengeli kosala mbongwana na bomoi na ngai mpo nasepelisa Yehova. Nabandaki kolongola bikeko, bamedayi, mpe biloko ya makila malamu, atako ezalaki ya wolo.

Ezalaki mpenza mpasi mpo natika komɛla likaya mpe komɛla masanga mingi. Soki nazali koleka esika oyo bazali kotɛka masanga nazalaki mpenza na mposa ya komɛla. Nasengelaki kotika baninga na ngai, mpo bazalaki kopesa ngai masanga mpe kobenga ngai mpo na komɛla mpe kolya kolekisa ndelo na restora ya lokumu. Nayebaki ete yango ekotinda ngai kaka nalangwa.

Ezalaki mpe mpasi mpo na ngai kotika kokende na bafɛti ya bazwi mpe bato ya lokumu. Ntango babengisaki ngai na fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mosani moko ya makofi na Cuba, nabondelaki Nzambe boye: “Yehova oyo kaka mbala ya nsuka. Nakokende lisusu te na bafɛti ya boye to kosala makambo oyo yo oboyaka.” Nasalaki mpe bongo.

Nakabwanaki na tata ya mwana na ngai ya mibale. Nasalaki yango atako azalaki na mbongo mingi mpe nyonso oyo alakaki akopesa ngai soki naboyi ye te. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo naboya ye mpo nalingaki ye mingi mpe ayebaki yango malamu. Na lolendo nyonso alobaki na ngai boye: “Nazali Nzambe na yo! Nazali Kristo na yo!”

Nayebisaki ye boye: “Okokaki kozala bongo liboso, kasi sikoyo, Yehova nde azali Nzambe na ngai.” Ayebisaki ngai ete akobɔtɔla ngai mwana oyo tobotaki mpe akosala ngai mabe.

Na nsima, bato mosusu bayebisaki ngai ete koyemba ezali mosala lokola mosala nyonso​—nakoki kokoba koyemba mpe kozala Motatoli. Kasi, bamosusu bayebisaki ngai ete: “Eloko moko te ekopekisa yo omɛla likaya, masanga, mpe kosala pite ndenge bato oyo balingaka miziki na yo bakosepela osala.” Namonaki ete toli wana ya mibale ezalaki mpenza ya bwanya.

Ntango nazalaki moyembi monene, bato bazalaki koluka kopesa ngai mbongo mingi mpo bábima na ngai. Nazwaki ekateli ya komitya lisusu te na mitambo ya ndenge wana. Na yango, na 1975, nakataki boyokani na ngai ya kokende koyemba na Chine, mpe sanza motoba na nsima nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

Mikakatano mpe bisengo

Ndenge nini nakobanda kosunga libota na ngai? Nazalaki ata na diplome moko te mpe nayebaki mpenza te kosala eloko mosusu, kaka koyemba. Yaya na ngai ya mwasi ná bana na ye misato mpe bana na ngai mibale bazalaki kotalela kaka ngai. Tosengelaki kolongwa na ndako wana ya ntalo mingi mpe kokende kofanda na bashambre mibale ya mike. Mbongwana wana, kolongwa na bomoi ya bozwi mpo na kokóma kozanga ezalaki mpenza mokakatano. Ndeko na ngai ya mwasi mpe bana bazalaki kotya ngai mpanzi likoló nazongela kaka koyemba, kasi nazalaki na ekateli ya kosala oyo esengeli mpo na kosalela Yehova.

Nakómaki kotɛka biloko na ngai ya ntalo​—babiju, bilamba, motuka—​mpe tokómaki kobikela na mbongo yango. Na nsima, mbongo yango mpe esilaki. Mpo na kokima mitungisi ya tata ya mwana na ngai ya mibale, na 1981 tolongwaki na esika yango mpe tokendaki na engumba mosusu epai akokaki komona biso te.

Kuna, Batatoli balakisaki ngai ndenge ya kosala tamales, mikate mpe biloko mosusu mpo na kotɛka. Na nsima, nazwaki mosala na izini moko mpe nazalaki kosala na butu. Kasi, mosala yango ezalaki kozangisa ngai makita mpe kopekisa ngai kosala mosala ya Nzambe. Yango wana, nsukansuka natikaki mosala yango mpe nakómaki kosala kaka tamales ngai moko na ndako. Nazalaki kotya yango na kitunga mpe kotambwisa yango mpo na kotɛka. Yango esalisaki ngai nakoba kosakola ntango nyonso.

Nayokaka mawa te ndenge nazwaki ekateli yango

Ntango bato batunaka ngai ndenge oyo nayokaka ndenge natikaki mosala na ngai ya koyemba, nayebisaka bango nakondima eloko moko te mpo na kotika boyebi ya Yehova mpe ya mikano na ye kitoko. Nazalaka na esengo ndenge bana na ngai bazwi boyebi ya Biblia mpe bapesi bomoi na bango epai ya Yehova, mpe babali basi oyo bazali mpe basaleli ya Yehova. Bana na ngai nyonso mibale, elongo ná basi na bango bazali kosalisa bana na bango básalela Nzambe na biso Yehova.

Na boumeli ya mbula pene na 30 nazali kosala lokola pionye, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka baoyo basalaka ngonga mingi na mosala ya kosakola. Na lisalisi ya Nzambe nasalisi ebele ya bato, ata mpe Irma ná mwana na ye, báyeba solo ya Biblia mpe bápesa bomoi na bango epai ya Nzambe. Ezali mpenza esengo kozala na ‘bana ya ndenge wana ya elimo’ mpe komona ete bazali kokoba kotambola na nzela ya solo​—mingi na bango bazali mpe kosala mosala ya kosakola ntango nyonso. (3 Yoane 4) Lelo oyo, nazali na mbula 64 mpe nayekolaka Biblia na bato 18.

Nayokaka lisusu te ete nazangi eloko, ndenge nazalaki koyoka ntango nazalaki koyemba, mpe nakokisá mposa oyo nazalaki na yango ya kosalisa basusu ndenge natosaka etinda oyo ya Yesu ya ‘kokende mpe kokómisa bato bayekoli.’ (Matai 28:19, 20) Nazalaka mpenza na botɔndi ndenge Yehova asalisaki ngai na boumeli ya bambula yango nyonso mpe azali kokoba kosala bongo! Ya solo, ‘nameki mpe namoni ete Yehova azali malamu.’​—Nzembo 34:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 12 Na nsima, Lorena Wong akómaki Motatoli ya Yehova.

^ par. 15 Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi lelo oyo ebimaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai ná bana na ngai mpe basi na bango, mpe yaya na ngai ya mwasi, oyo tosalaka na ye mosala ya pionye

[Elilingi na lokasa 26]

Nasalaka tamales mpe natɛkaka yango na balabala mpo nakoba mosala ya pionye