Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kopesa litama mosusu elimboli nini?

Kopesa litama mosusu elimboli nini?

Biblia elobi nini?

Kopesa litama mosusu elimboli nini?

NA LISOLO Likoló ya Ngomba, lisolo oyo eyebani mingi, Yesu Kristo alobaki ete: “Bótɛmɛla te moto oyo azali mabe; kasi moto nyonso oyo abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, pesá ye mpe oyo mosusu.”​—Matai 5:39.

Alingaki mpenza koloba nini? Alendisaki nde bakristo bátikaka kaka bányokolaka bango? Bakristo basengeli nde konyokwama kozanga kosala eloko mpe báluka te libateli ya Leta?

Oyo Yesu alingaki koloba

Mpo na kokanga ntina ya maloba ya Yesu, tosengeli kotalela mpo na nini alobaki maloba yango mpe alobaki yango epai ya banani. Yesu abandaki maloba na ye oyo totángi likoló na makambo oyo bayoki na ye bayebaki na Makomami Mosantu. Alobaki ete: “Boyokaki ete balobi, ‘Liso mpo na liso mpe lino mpo na lino.’”​—Matai 5:38.

Mikapo oyo Yesu atángaki ezali na Kobima 21:24 mpe Balevi 24:20. Emonani ete na boyokani na Mibeko ya Nzambe, etumbu oyo bavɛrsɛ yango elobeli ete “liso mpo na liso” banganga-nzambe mpe bazuzi bazalaki kokatela yango moto nsima ya kosambisa ye, kotalela nini etindaki ye asala likambo yango mpe koyeba soki asalaki yango na nko to te.​—Kolimbola Mibeko 19:15-21.

Na nsima, Bayuda bakómaki kosalela mobeko yango na ndenge ya mabe. Na ekeke ya 19, Adam Clarke, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki boye: “Emonani ete Bayuda bakómisaki mobeko wana [liso mpo na liso, lino mpo na lino] likambo na bango moko mpo na kosilisanaka bankanda na bango mpe kozongisa mabe nyonso oyo basaleli bango. Mbala mingi, bazalaki kolekisa ndelo ntango bazali koluka kozongisa mabe na mabe mpe, bazalaki kutu kozongisa mabe koleka oyo basalaki bango.” Kasi, Makomami epesi moto moko te nzela ya kozongisa mabe ye moko.

Epai mosusu, mateya ya Yesu na Lisolo Likoló ya Ngomba oyo elobelaki ‘kopesa litama mosusu’ emonisaki mpenza ntina ya Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele. Yesu alingaki koloba te ete soki babɛti bayekoli na ye na litama moko basengeli mpe kopesa monguna litama mosusu. Ndenge ezalaki na ntango ya kala, lelo oyo mpe mbala mingi mbata ezalaka te mpo na kozokisa moto ezalaka nde mpo na kofinga moto, kotumola ye mpo abunda.

Na yango, emonani ete Yesu alingaki koloba ete soki moto aluki kotumola moto mosusu, abɛti ye mpenza mbata​—to alobeli ye maloba ya mabe—​moto oyo babɛti ye mbata asengeli koboya kozongisa. Kutu, asengelaki nde koboya likambo oyo ekokaki kosala ete bázongiselanaka mabe.​—Baroma 12:17.

Maloba ya Yesu ekokanaki mpenza na oyo ya Mokonzi Salomo ete: “Koloba te: ‘Ndenge asalaki ngai, ngai mpe nakosala ye bongo. Nakofuta moto na moto na kolanda misala na ye.’” (Masese 24:29) Mpo na moyekoli ya Yesu, kopesa litama mosusu elimboli ete akopesa nzela te na bato mosusu bátinda ye na makasi abunda.​—Bagalatia 5:26.

Koluka komibatela ezali mabe?

Kopesa litama mosusu elingi koloba te ete mokristo akoki te komibatela ntango bato mabe bayeli ye. Yesu alobaki te ete tosengeli te komibatela, kasi nde tosengeli te kozala bato ya liboso ya kobɛta, mpe tosengeli te kopesa nzela na likambo oyo ekosilikisa biso bongo na nsima tózongisa. Kasi, ntango bato mabe balingi kosala biso mabe, ebongi tólongwa esika wana mpo na koboya bitumba, tóluka komibatela mpe tóluka lisalisi ya bapolisi.

Bayekoli ya Yesu ya liboso, basalelaki mpenza toli yango na ndenge ebongi ntango bazalaki koluka kolongisa lotomo na bango epai ya Leta. Na ndakisa, ntoma Paulo alukaki libateli ya bakonzi ya Leta ya eleko na ye, mpo abatela lotomo na ye ya kokokisa mokumba ya koteya oyo Yesu apesaki bayekoli na ye. (Matai 28:19, 20) Ntango bazalaki kosakola na engumba Filipi, Paulo ná Silasi, moninga na ye oyo azalaki mpe misionɛrɛ, bakangaki bango na bakonzi ya Leta mpe bafundaki bango ete bazali kobuka mibeko.

Babɛtaki bango nyonso mibale na miso ya bato nyonso mpe batyaki bango na bolɔkɔ kozanga kosambisa bango. Ntango azwaki libaku, Paulo asalelaki lotomo na ye ya mwana-mboka Moroma. Ntango bayebaki ete Paulo azali Moroma, bakonzi bakómaki kobanga mpe babondelaki Paulo ná Silasi bálongwa na engumba na bango na malɛmbɛ. Na yango, Paulo atikaki ndakisa ndenge ‘akɔtelaki nsango malamu mpe afandisaki yango na nzela ya mibeko.’​—Misala 16:19-24, 35-40; Bafilipi 1:7.

Na ndakisa ya Paulo, Batatoli ya Yehova, mbala na mbala bakendeke kosamba na tribinale mpo na kobatela lotomo na bango ya kosakola. Ezali bongo ata na mikili oyo elobaka ete moto nyonso azali na lotomo ya kopona lingomba na ye. Na makambo etali mobulu mpe komibatela, Batatoli ya Yehova bapesaka litama mosusu te​—batikaka te bányokola bango kozanga bámibatela. Bakendeke epai ya Leta mpo na komibatela.

Na yango, lokola bazali bakristo, Batatoli basalaka nyonso oyo esengeli mpo lotomo na bango etosama na nzela ya mibeko, atako bayebi ete ebongiseli yango ememelaka bango matomba na makambo nyonso te. Na yango, ndenge moko na Yesu, batikaka mpenza makambo yango na mabɔkɔ ya Nzambe na elikya ete lokola ayebi makambo nyonso akosala; mpe nyonso oyo ye akosala ekomonisa bosembo ya kokoka. (Matai 26:51-53; Yuda 9) Bakristo ya solo babosanaka te ete kozongisa mabe ezali likambo ya Yehova.​—Baroma 12:17-19.

OSILÁ KOMITUNA?

● Makambo nini bakristo basengeli koboya?​—Baroma 12:17.

● Biblia epekisi moto akende epai ya Leta mpo na koluka komibatela?​—Bafilipi 1:7.

● Elikya nini Yesu azalaki na yango epai ya Tata na ye?​—Matai 26:51-53.