Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batelá libota na yo ezwa gripɛ te

Batelá libota na yo ezwa gripɛ te

Batelá libota na yo ezwa gripɛ te

Na esakweli oyo apesaki mpo na nsuka ya mokili oyo, Yesu alobaki ete ‘bamaladi mabe ekozala na bisika mingi.’ (Luka 21:11) Gripɛ ezali moko ya bamaladi yango.

GRIPƐ eutaka na virisi moko oyo emonanaka kaka na mikroskope, oyo ekɔtaka na baselile ya bomoi mpe esalaka ete ebotana mingi. Virisi ya Gripɛ, oyo ekendaka kofanda na mongongo, zolo mpe pumɔ (système respiratoire) ezwamaka mingimingi ntango moto oyo azali na yango asali likise, akosoli to azali koloba. Maladi yango epalanganaka ntango ezwi bato mingi na bisika mingi.

Virisi yango ezwaka kaka bato te, kasi mpe banyama ná bandɛkɛ. Virisi ya gripɛ ezali lolenge misato A, B, mpe C. Oyo ya A nde ebimisaka gripɛ oyo emonanaka mbala mingi. Bavirisi yango ekesanaka mingimingi na baproteine mibale oyo emonanaka na mposo na yango: hémaglutinine (H) mpe neuraminidase (N).

Likambo oyo etungisaka mingi mpo na virisi ya gripɛ ezali ete ezalaka na likoki ya kobotana nokinoki mpe na lolenge mingi mpe lolenge yango ekoki kosangana mpe kobimisa lolenge mosusu ya sika ya virisi. Soki lolenge moko ekeseni mpenza na bamosusu, baantikore ya nzoto ya moto ekozala na likoki te ya kobundisa virisi yango.

Gripɛ emonanaka mingimingi na eleko ya malili. Bolukiluki oyo euti kosalema emonisi ete na ntango ya malili, mposo ya virisi ekómaka lokola kazaka oyo ezali kobatela yango mpo ekufa te; kasi na mɔtɔ oyo ezalaka na mongongo ya moto ntango azali kopema, mposo yango epanzanaka, esalaka ete virisi ebima mpe epesa moto maladi. Mopɛpɛ ya malili yango moko ebimisaka virisi yango te, kasi ekoki kopesa nzela na virisi yango epanzana.

Ndenge ya komibatela

Lokola bayebi ntina ya komibatela na maladi yango, baguvɛrnema mingi emibongisaka liboso. Kasi okoki kosala nini? Tiká tótalela makambo misato mpo na komibatela:

Yeisá baantikore ya nzoto na yo makasi: Sɛnzɛlá ete bato ya libota na yo bálalaka na ndenge ebongi mpe bályaka bilei oyo ekokómisa baantikore ya nzoto na bango makasi. Bosengeli kolyaka mingi bambuma mpe bandunda oyo babuki sika, mpe biloko ya proteine oyo ezali na mafuta mingi te, oyo epesaka bavitamini (acides aminés) oyo nzoto esengeli na yango mpo baantikore ekóma makasi.

Kopesa mikrobɛ yango nzela te: Salá ete esika ya kotya bilei mpe bamesa ezalaka pɛto mokolo na mokolo. Sukoláká banzungu mpe basani nsima ya kosalela yango, mpe sukoláká bilamba ya mbeto mbala na mbala. Saleláká nkisi ya koboma mikrobɛ mpo na kopangwisa porte, batelefone, batelekomande oyo bato mosusu mpe bakoki kosimba. Soki likoki ezali fungoláká maninisa mpo mopɛpɛ etambola na ndako.

Zaláká pɛto: Sukoláká mabɔkɔ na yo malamumalamu na sabuni mpe mai to nkisi mosusu ya kosukola mabɔkɔ. (Soki ebongi, memáká mwa molangi ya nkisi ya kosukola mabɔkɔ.) Kosalelaka te elamba kaka moko mpo na kopangwisa mabɔkɔ, to elongi ná moto mosusu ata mpe bato ya libota na yo.

Soki osukoli mabɔkɔ te kosimbaka miso, zolo, to monɔkɔ te. Soki likoki ezali, saleláká mouchoir ya papye mpo na kozipa monɔkɔ ntango ozali kokosola to kosala likise mpe bwaká yango mbala moko. Kosalela te ná moto mosusu eloko oyo ekoki kopanza mikrobɛ yango, na ndakisa batelefone. Esengeli mpenza kolakisa bana bálanda malamu batoli yango. Ezalaka malamu kolanda mimeseno yango ntango nyonso, mingimingi na eleko oyo bato babɛlaka gripɛ mingi.

Omibanzabanza mpo na basusu

Mikolo mitano liboso moto abɛla gripɛ akoki kobanda kopesa basusu maladi yango liboso kutu ye moko amonisa bilembo na yango. Bilembo yango ekokanaka na kosukosu kasi yango ezalaka makasi koleka. Epesaka fiɛvrɛ (mbala mingi fiɛvrɛ makasi), motó mpasi, kolɛmba makasi, kosukosu, mpe nzoto mpasimpasi. Miyoyo mpe mpasi na libumu​—na ndakisa, mposa ya kosanza, kosanza mpe pulupulu—​emonanaka mingimingi epai ya bana. Soki ozali na bilembo ya gripɛ, soki likoki ezali, fandá na ndako mpe koluka te kopesa basusu maladi yango.

Pemáká mingi mpe mɛláká mai mingi. Bankisi oyo ebundisaka gripɛ ekoki kosalisa soki moto amɛli yango ntango kaka abandi koyoka bilembo ya gripɛ. Esengeli te kopesa bana nkisi oyo babengi aspirine (acide acétylsalicylique) ntango bazali na gripɛ. Luká noki lisalisi ya monganga ntango obandi komona makambo lokola mpema mokuse, mpasi na ntolo, to motó mpasi oyo ezali kotika te.

Kobɛla gripɛ etungisaka. Kasi, komibongisa ekoki kosalisa yo olekisa eleko yango malamu. Kasi, likambo eleki ntina, okoki kozala na elikya mpo na eleko oyo Biblia elaki ete: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

[Etanda na lokasa 17]

GRIPƐ YA LOLENGE MOKO YA MABE

Gripɛ oyo emonanaki liboso na Mexique na 2009, ezali gripɛ oyo babengi H1N1, ekokani na grippe Espagnole ya 1918 oyo ebomaki bamilio ya bato. Kasi, ezali mpe na mikrobɛ oyo ezali na virisi oyo ezwaka bangulu ná bandɛkɛ.

[Etanda/Elilingi na lokasa 18 mpe 19

6 NDENGE YA KOMIBATELA MPE KOBATELA BASUSU

1. Zipáká monɔkɔ ntango ozali kokosola

2. Sukoláká mabɔkɔ

3. Fungoláká maninisa mpo mopɛpɛ etambola malamu na ndako

4. Batelá yango pɛto

5. Soki ozali kobɛla, fandá na ndako

6. Ntango ozali na gripɛ, koluka te kopesa bato bizi to mbote ya mabɔkɔ

[Etanda/Elilingi na lokasa 19]

NTANGO GRIPƐ EPALANGANI

Liboso landá malako ya bato oyo batalaka makambo ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Kobanga te, kolekisa ndelo te. Landá lisusu makasi batoli ya bopɛto oyo tolobeli awa. Soki likoki ezali, kozala te esika oyo bato bazali mingi. Soki ozali na gripɛ, kolata masque na elongi ekoki kosalisa. Sukoláká mabɔkɔ mbala na mbala. Bombá biloko ya kolya oyo ebebaka te mpe bankisi ya komɛla mpe ya kotya bopɛto oyo okoki kosalela na boumeli ya pene na pɔsɔ mibale, ntango ozali te na likoki ya kokende kosomba yango na magazini.

Na esika ya mosala, na bisika ya losambo, to na esika nyonso mosusu oyo bato bazali mingi, landá malako oyo epesami. Lisusu, salá ete mopɛpɛ etambola malamu na esika ozali.

[Elilingi na lokasa 17]

Virisi ya gripɛ H1N1 ndenge ezali komonana na masini

[Eutelo ya bafɔtɔ]

CDC/Cynthia Goldsmith