Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Basi basengeli koteyaka na lingomba?

Basi basengeli koteyaka na lingomba?

Biblia elobi nini?

Basi basengeli koteyaka na lingomba?

MWASI moko oyo asambelaka na Lingomba ya Katolike akomelaki zulunalo moko (USA Today) ete: “Nakamwaki mpe nasilikaki ndenge likambo ata moko te ebongwanaki mpo basi bakóma kozwa mikumba na lingomba.” Bato mingi bazalaka na makanisi ndenge moko na mwasi yango. Kutu, balobaka ete na mangomba mosusu basi bazalaka bakonzi, bapastɛrɛ, baepiskɔpɔ, mpe barabi.

Mangomba mingi ezala oyo eboyaka basi báteya liboso ya bato na kati ya lingomba to oyo epesaka bango nzela ya kosala yango, nyonso elobaka ete elandaka Makomami. Kasi, Biblia elongisi ata likanisi moko te kati na yango. Mpo na nini? Mpo na kozwa eyano, tosengeli liboso kotalela ndenge Biblia esaleli liloba ya Grɛki diakonos, oyo mbala mingi esalelamaka mpo na komonisa moto oyo azali mosaleli na lingomba.

Na ekeke ya liboso

Liloba diakonos elimboli nini mpo na yo? Mingi bakokanisa mbala moko ezali mokambi ya lingomba, mobali to mwasi, oyo azali kokamba lisangá na oyo etali losambo. Kasi, Biblia esaleli liloba yango na ndenge mingi. Tózwa ndakisa ya Foebe, mwasi moko mokristo oyo ntoma Paulo alobaki mpo na ye ete azali “ndeko na biso ya mwasi, mosaleli [diakonos] ya lisangá oyo ezali na Kenkrea.”​—Baroma 16:1.

Okanisi ete Foebe azalaki kotɛlɛma liboso ya lisangá na Kenkrea, kokamba mosala moko na lingomba? Mosala nini mpenza Foebe azalaki kosala? Na mokanda na ye epai ya bakristo ya Filipi, Paulo akomaki ete basi mosusu “bapesaki ngai maboko po na kopanza Sango Malamu.”​Bafilipi 4:2, 3, Bible na lingala ya lelo oyo.

Lolenge ya liboso oyo bakristo ya ekeke ya liboso bapanzaki nsango malamu ezalaki ya koteya na “bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.” (Misala 20:20) Baoyo bazalaki kosala misala yango bazalaki basaleli. Na kati na bango ezalaki na basi lokola Prisile. Ye ná mobali na ye ‘bamonisaki polele nzela ya Nzambe’ epai ya moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe, oyo azwaki naino batisimo te mpo akóma mokristo. (Misala 18:25, 26) Ndenge moko na Foebe, emonani polele ete Prisile azalaki mosaleli ya molende—ndenge moko na basi mingi mosusu.

Mokumba moko ya lokumu

Kosakola ezalaki mosala moko ya ntina te, oyo basi nde basengelaki kosala ntango mibali bazali kosala mosala ya ntina mingi ya kokamba lisangá? Ezali bongo te, mpo na bantina mibale. Ya liboso, Biblia emonisi polele ete bakristo nyonso​—ata mpe mibali oyo bazali na mikumba minene na lisangá—​basengelaki kosakola nsango malamu. (Luka 9:1, 2) Ya mibale, mosala ya kosakola ezalaki mpe ezali tii lelo oyo likambo ya libosoliboso oyo bakristo basi mpe mibali basalaka mpo na kolanda etinda oyo ya Yesu ete: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango.”​—Matai 28:19, 20.

Ezali na mokumba mosusu ya ntina oyo basi mosusu bazali na yango na kati ya lisangá. Paulo akomaki boye: “Mibange basi . . . bázala . . . bateyi ya makambo malamu; mpo básalisa bilenge basi bázongela makanisi malamu mpo bálinga mibali na bango, bálinga bana na bango.” (Tito 2:3, 4) Na yango, basi oyo bakɔmeli na kati ya lisangá bazali na libaku ya kosalisa bilenge basi mpe baoyo bakɔmeli naino te bákɔmela. Yango mpe ezali mokumba moko ya lokumu.

Koteya na kati ya lisangá

Nzokande, esika moko te Biblia elobi ete basi basengeli kotɛlɛma liboso ya lisangá mpo na koteya. Kutu, ntoma Paulo apesaki basi toli ete: ‘Basi basengélí kokanga monoko o makita.’ Mpo na nini? Ntina oyo akomaki ezalaki mpo makambo esalema “bǒ ebongí, na mobúlú té.” (1 Bakorinti 14:34, 40, Biblia Liloba lya Nzambe) Mpo makambo etambola malamu na lisangá, Nzambe apesá mokumba ya koteya kaka na etuluku moko ya bato. Kasi, simbá ete moto azwaka libaku yango te ya kobatela lisangá kaka mpo azali mobali; mokumba yango epesami kaka na mibali oyo bakokisi mpenza masɛngami. *​—1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9.

Elingi nde koloba ete mokumba oyo Nzambe apesá basi ezali na ntina te? Te. Kobosana te ete Yehova Nzambe apesá bango mosala moko ya ntina mingi​—ya kopesa litatoli mpo na ye epai ya bato nyonso. (Nzembo 68:11) Lelo oyo, na kati ya Batatoli ya Yehova mibali mpe basi oyo basalaka mosala ya kosakola basalisi bamilio ya bato bábongola motema mpe bázwa lobiko. (Misala 2:21; 2 Petro 3:9) Yango ezali likambo moke te!

Ndenge oyo Nzambe abongisá mpo na mibali mpe basi esalaka ete kimya ezala wana bazali kopesana lokumu. Tózwa ndakisa: Miso ná matoi esalaka elongo mpo na kosalisa moto oyo azali kotambola akatisa balabala oyo etondi na mituka. Ndenge moko mpe ntango mibali mpe basi bazali kosala mokano ya Nzambe na kolanda mokumba oyo mokomoko azali na yango, Nzambe apambolaka lisangá mpe ezalaka na kimya.​—1 Bakorinti 14:33; Bafilipi 4:9. *

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 13 Simbá mpe ete mokumba oyo mobali azali na yango na lisangá ezali na ndelo. Azali na nse ya bokonzi ya Kristo mpe asengeli kosala na boyokani na mitinda ya Biblia. (1 Bakorinti 11:3) Baoyo bazali na mokumba na lisangá basengeli mpe ‘komikitisa moto na moto liboso ya mosusu,’ kosala elongo na komikitisa nyonso.​—Baefese 5:21.

^ par. 15 Ntango bazali komemya mokumba oyo Nzambe apesá mibali na lisangá, basi bakristo bazalaka mpe ndakisa mpo na baanzelu na likoló.​—1 Bakorinti 11:10.

OSILÁ KOMITUNA?

● Na lisangá ya bokristo ya liboso na ndenge nini basi bazalaki koteya?​—Misala 18:26.

● Nani azali na mokumba ya kokamba lisangá?​—1 Timote 3:1, 2.

● Ndenge nini Nzambe atalelaka mosala ya basi bakristo lelo oyo?​—Nzembo 68:11.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

“Yehova ye moko azali kobimisa liloba, basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.”​—NZEMBO 68:11