Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Avoka moko alukaki koyeba Batatoli ya Yehova

Avoka moko alukaki koyeba Batatoli ya Yehova

Avoka moko alukaki koyeba Batatoli ya Yehova

AVOKA moko na nkombo Les Civin mpe mokambi na biro moko ya mibeko na Afrika ya Sudi, alobi boye: “Nayebaki Batatoli ya Yehova malamumalamu te.” Mpo na nini alukaki koyeba mateya ya Batatoli ya Yehova? Alobaki nini nsima ya koyeba mateya na bango? Yoká maloba oyo alobaki na zulunalo Lamuká!

Okolá na lingomba nini?

Nakolá na lingomba ya Bayuda, kasi na ebandeli ya bambula ya 1970, nabalaki Carol oyo azalaki moto ya Lingomba ya Anglicane. Azalaki mpenza kosepela na makambo ya Nzambe te, mpe tozalaki mpenza te kokipe makambo ya lingomba na ntango wana. Kasi, ntango mwana na biso Andrew azalaki na mbula mwambe, Carol amonaki ete tosengeli kosala likambo moko mpo mwana na biso azala na lingomba oyo akoki kosambela. Rabi moko ya lingomba ya Bayuda ayebisaki ngai soki Carol akɔti na Lingomba ya Bayuda, Andrew akokóma mbala moko moto ya Lingomba ya Bayuda mpe akoki kozwa bar-mitsva, (molulu ya kondima mwana mobali ya mibu 13 na Lingomba ya Bayuda) ntango akokóma na mbula 13. Yango wana, tobandaki kokende pɔsɔ na pɔsɔ kolanda mateya na sinagoga.

Okutanaki na Batatoli ya Yehova ndenge nini?

Ntango Batatoli ya Yehova bazalaki koya epai na biso, nazalaki kopesa bango ntango te báloba. Nazalaki koyebisa bango ete, “nazali Moyuda mpe nandimaka Testama ya Sika te.” Na nsima, Carol ayebisaki ngai ete moninga na ye moko azali Motatoli mpe ayebi Biblia malamumalamu. Carol ayebisaki ngai ete tóluka koyeba makambo mingi na ntina na Biblia. Na yango, nandimaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova kaka mpo nandima.

Osalaki nini ntango basɛngaki yo oyekola Biblia?

Nazalaki na lolendo. Namonaki lisusu valɛrɛ ya losambo ya Bayuda mpe namonaki ete tozali libota oyo eponamá. Nakanisaki boye: ‘Bato oyo bakoki koteya ngai nini?’ Ntango tosololaki mpo na mbala ya liboso, nayebisaki Motatoli oyo ayaki na ndako na biso boye: “Nabotamá Moyuda. Naponá lingomba na ngai, mpe nakokufa kaka Moyuda. Likambo moko te oyo bino bokoloba ekoki kobongola ngai.” Na boboto nyonso amemyaki makanisi na ngai. Na yango, na mokolo nyonso ya mitano mpe ya yambo na mpokwa, tozalaki kokende kolanda mateya ya Lingomba ya Bayuda mpe na mokolo ya lomingo na ntɔngɔ (soki tokoki kokende te) tozalaki koyekola na Batatoli. Na bokeseni na mateya ya sinagoga, bango bazalaki kosɛnga mbongo te.

Nazalaki kosalela Biblia na ngai ya Bayuda mpo nazalaki kokanisa ete Biblia ya Batatoli ezalaki mpo na kolongisa mateya na bango. Kasi, nakamwaki mpenza ndenge Biblia yango mibale ezalaki na boyokani. Yango etindaki ngai lisusu naluka komonisa Batatoli ete bayebi te makambo oyo bazali koloba.

Nsima ya kolanda mwa mateya ya barabi, Carol ayebisaki ngai ete mpo na ye rabi yango ayebi Biblia na ye malamu te. Ayebisaki ngai ete akotika kokende kolanda mateya yango mpe ete akowangana Kristo te. Nabulunganaki, mpe nakómaki na makanisi ya koboma libala. Kasi, ntango motema na ngai ekitaki, nazwaki ekateli ya kosalela mayele mosusu​—mayele na ngai ya avoka mpo na komonisa Carol ete mwa lingomba wana ya mabe ezalaki na libunga.

Olongaki kosala yango?

Rabi moko apesaki ngai buku moko oyo ezalaki komonisa ete bisakweli oyo etali Masiya ezalaki ya lokuta. Ngai ná Carol toyekolaki buku yango mbula moko na ndambo. Tokobaki mpe koyekola pɔsɔ na pɔsɔ ná Batatoli ya Yehova. Kasi, ntango totalelaki esakweli mokomoko oyo buku ya barabi elobelaki, nakómaki kobanga makasi. Na bokeseni na makambo oyo ezali na buku yango, bisakweli etali Masiya oyo ezali na Biblia ezali kolobela mpenzampenza kaka moto moko​—Yesu Kristo. Nsukansuka, likambo yango eyaki mpenza makasi ntango toyekolaki esakweli oyo ezali na Danyele 9:24-27 oyo elobaki ete Masiya akomonana na mobu 29 T.B. * Motatoli ayelaki ngai Biblia ya Ebre oyo ebongolá liloba mokomoko ya Ebre ndenge ezali. Natalaki ndenge maloba yango ekomamá, nalukaki ngai moko koyeba badati, mpe nalobaki ete: “Malamu, esakweli yango elobeli mobu 29.Sikoyo, olingi koloba nini?”

Motatoli yango alobaki ete: “Yango ezali mobu oyo Yesu azwaki batisimo.”

Natikalaki monɔkɔ polele! Nakamwaki ndenge oyo bisakweli ya Biblia ezali na bosikisiki mpe ndenge oyo yango nyonso ezalaki na boyokani.

Baninga na yo basalaki nini ntango obongolaki makanisi?

Etungisaki bamosusu mpe balobaki ete bakomema ngai ná mwasi na ngai epai ya bato oyo bakomonisa biso ete Batatoli bazali kobebisa biso bɔɔngɔ. Kasi, kondima na biso ezalaki ya likolólikoló te, tosalaki bolukiluki mpe tokanisaki malamumalamu​—yango emonisaki ete babebisi biso bɔɔngɔ te.

Nini etindaki yo ozwa ekateli ya kokóma Motatoli?

Ya liboso, nabandaki koyangana na mwa makita na Ndako ya Bokonzi (ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bisika na bango ya losambo) elongo na mwasi na ngai, oyo na ntango wana akómaki Motatoli. * Nakamwaki boboto mpe bolingo oyo Batatoli bazalaki komoniselana atako bazalaki bato ya mposo ekeseni. Namoná likambo ya ndenge wana te na lingomba na ngai. Na yango, nsima kaka ya mbula misato ya koyekola Biblia na mozindo, nazwaki batisimo.

Oyokaka ndenge nini na ekateli ozwá ya kokóma Motatoli?

Ezali lokumu koloba ete, “nazali moko ya Batatoli ya Yehova.” Kasi, soki nakanisi ndenge oyo natɛmɛlaki mateya ya solo, namonaka ete nabongi te kozwa biloko ya motuya ya elimo oyo Yehova apesi ngai. Nakoyoka mawa ata moke te mpo na ekateli oyo nazwá.

Mapamboli nini ozwi?

Mapamboli ebele. Moko na yango, nasepelaka ndenge nazali kosala lokola nkulutu mpe moteyi na lisangá na biso. Lisusu, nazwaki mpe libaku ya kopesa mabɔkɔ na biro ya Batatoli ya Yehova ya Afrika ya Sudi na departema oyo etalaka makambo ya mibeko. Kasi, na ntembe te, lipamboli oyo eleki monene oyo nazwá ezali ndenge nayebi Yehova mpe Mwana na ye mpe nayebi ntina ya makambo oyo ezali kosalema na ntango na biso mpe makambo minene oyo ezali koningisa mokili.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 12 T.B. elimboli, “ntango na biso.” Mpo na koyeba makambo mosusu ya esakweli ya Danyele oyo etali Masiya, talá lokasa 197 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?

^ par. 18 Carol akufaki na 1994, mpe na nsima Les Civin abalaki mwasi mosusu.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

Nakamwaki ndenge oyo bisakweli ya Biblia ezali na bosikisiki mpe ndenge oyo yango nyonso ezalaki na boyokani