Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosambela banyoka—Na ntango ya kala mpe lelo

Kosambela banyoka—Na ntango ya kala mpe lelo

Kosambela banyoka​—Na ntango ya kala mpe lelo

BAEZIPITO ya kala bazalaki kosambela banyoka, ndenge moko na Ba-Minoen, bafandi ya kala ya Krɛti. Bayisraele mosusu ya kala bapesaki mbeka na nyoka moko ya motako. Bato mosusu kaka ya ekólo yango batumbaki mpaka ya malasi liboso ya bililingi “ya biloko oyo ebendanaka na libumu.”​—Ezekiele 8:10-12; 2 Bakonzi 18:4.

Bato mingi ya Mexique ya kala bazalaki mpe kosambela banzambe oyo bazalaki banyoka. Itzamma, nzambe monene ya Ba-Maya, azalaki ntango mosusu komonisama na nyoka. Quetzalcóatl, “nyoka oyo ezali na bansala,” azalaki nzambe ya boyebi, ya mimeseno ya bato, mpe ya filozofi epai ya Ba-Toltèque. Ba-Aztèque mpe bazalaki komona ete azali nzambe ya boyebi mpe bazalaki kutu komemya ye lokola mozalisi ya bato. Mpo na misala mpe makoki ndenge na ndenge ya nzambe yango, zulunalo moko ya Mexique (Arqueología Mexicana) elobi boye: “Nyoka oyo ezali na bansala ekómaki na ntina mingi, mbala mosusu kutu mingi koleka banzambe mosusu nyonso.”

Na boumeli ya bikeke mingi, bato ya Amerika ya kala bazalaki kosambela nyoka oyo ezali na bansala. Lelo, Ba-Cora mpe Ba-Huichol, na Mexique, bazali kokoba kondimela nzambe yango. Na bafɛti mosusu, bato babinaka balati bansala mpe basalaka lokola nyoka. Ba-Quiché basalaka molulu moko ya kobotisa mpe na ntango yango babinaka basimbi banyoka ya bomoi. Ba-Chorti, etuluku ya Ba-Maya ya Guatémala, bakumisaka nyoka oyo ezali na bansala mpe balobaka ete ezali na boyokani na basantu mosusu ya Katolike.

Motuna yango oyo: Ndenge nini Mozalisi ya moto mpe ya banyama​—ata mpe banyoka—​atalelaka losambo ya banyoka?

Ndenge Nzambe atalelaka losambo ya banyoka

Yehova Nzambe apesaki ekólo Yisraele mobeko oyo: “Osengeli te komisalela ekeko oyo eyemami to elilingi oyo ekokani na eloko nyonso oyo ezali kuna na likoló to oyo ezali na mabele awa na nse to oyo ezali na mai na nse ya mabele. Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango.”​—Kobima 20:4, 5.

Yehova apekisaki basaleli na ye básambela bililingi ya banyama, na ndakisa banyoka. Na yango, ezali polele te ete bato oyo balingi Nzambe andima bango basengeli koboya kosambela banyoka? Mpo na nini Nzambe aboyaki losambo ya bikeko, kati na yango losambo ya banyoka? Ezali mpo apesaka bomoi na bato, banyoka, mpe biloko mosusu nyonso oyo ezali na bomoi. Nyonso ezali misala ya mabɔkɔ na ye; na yango losambo ebongi nde na ye, kasi te na biloko oyo akelá.

Tópesa ndakisa: Kanisá ete architecte moko atongi bandako mpe apesi yango bato mpo báfanda kuna. Ekozala boni soki mabota yango bapesi bandako yango matɔndi mpe bakumisi yango na esika bákumisa moto oyo atongaki yango? Ekozala bozoba te? Ekofinga te moto wana oyo akabelaki bango bandako yango? Ndenge moko mpe kosambela banyama na esika ya Mozalisi na yango ezali kofinga Nzambe.

Ezali polele ete bato oyo balingi Nzambe andima bango basengeli kolanda likebisi ya ntoma Yoane ete: “Bana, bókeba na bikeko.”​—1 Yoane 5:21.

[Etanda/Elilingi na lokasa 23]

KOSAMBELA NÁ BANYOKA NA MABƆKƆ

● Na sudi-ɛsti ya États-Unis, ndambo ya mangomba ya mikemike basambelaka basimbi banyoka ya ngɛngɛ oyo ezali na bomoi. Bato mosusu balataka nyoka moko ya ndenge wana na nkingo, mpe bamosusu basimbaka banyoka mingi na mbala moko. Kosimba banyoka mpe koningisaningisa yango ndenge wana ekoki kobangisa yango mpe kotinda yango eswa bato mosusu. Na boumeli ya bambula, bato mosusu oyo bazalaki kosambela basimbi banyoka bakufaki mpo nyoka eswaki bango.

Bato oyo basambelaka basimbi banyoka balobaka ete balandaka maloba ya Marko 16:17, 18. Vɛrsɛ yango ezali mpe na maloba oyo: “Na mabɔkɔ na bango bakolɔkɔta banyoka.” Biblia haut fleuve ná mabongoli mosusu etyaka bavɛrsɛ yango lokola nde ezalaki na makomi ya Biblia ya ebandeli. Bible Segond (1959), Bible de Crampon (1960) mpe Bible annotée (1985) emonisi polele ete bavɛrsɛ wana ezalaka te na bamaniskri mingi ya kalakala mpenza ya Evanzile ya Marko.

Mateya ya Biblia elongisi te likanisi oyo elobi ete kosalela banyoka endimami na losambo ya solo. Biblia elobi boye: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Na ntembe te, okondima ete Mozalisi na biso ya bolingo akoki kosɛnga te ete basambeli na ye ya solo básala milulu oyo ekoki kobimisa likama mpo básepelisa ye. Mwana na ye Yesu apesaki libyangi oyo: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino.” (Matai 11:28, 29) Ya solo, kosimba banyoka, likambo oyo ekoki kopesa mpasi, maladi, ata mpe liwa ezali te likambo oyo Yehova mpe Yesu balingi mpo na bayekoli na bango!

[Eutelo ya bafɔtɔ]

REUTERS/Tami Chappell

[Elilingi na lokasa 22]

Motó ya nyoka oyo ezali na bansala na efelo ya tempelo moko ya Ba-Aztèque

[Elilingi na lokasa 22]

Mayemi ya Quetzalcóatl, nyoka ya bansala oyo Ba-Toltèque bazalaki kosambela

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 22]

Likoló: REUTERS/Tami Chappell; na nse: © Leonardo Díaz Romero/age fotostock