Nkoma ya batángi
Nkoma ya batángi
Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka Nalingi kopesa bino matɔndi mpo na masolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Mpo na nini nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?” mpe “Ndenge nini nakoki kotika koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?” (Lamuká! ya Yanuali-Marsi 2004 mpe ya Aprili-Yuni 2004) Mposa makasi oyo nazalaki na yango ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekómaki lokola mokumba moko ya kilo oyo nakokaki lisusu te komema yango; ezalaki kosilisa ngai esengo nyonso. Lokola nazalaki kobanga noki nakopesa eyano ya mabe, nakómaki ata koboya kopesa biyano na makita ya lisangá. Nazali na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo na masolo oyo. Ezali kosalisa ngai nayeba kobengana makanisi wana ya mabe oyo eyelaka ngai.
S. M., Italie
Ezali masolo oyo nde nasengelaki na yango mpo esalisa ngai nalonga mokakatano oyo nazalaka na yango esali sikoyo bambula 50. Nazalaki kokanisa ete koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ezali na yango mabe te, nakanisaki ete nazalaki bobele koluka kopesa Yehova oyo eleki malamu. Nazalaki komituna mpo na nini mbala mingi nazalaki koyokana te na bana na ngai, baninga na ngai ya mosala mpe bandeko na ngai baklisto. Sikoyo nayebi ete lolenge na ngai ya kotalela makambo mosusu ezalaka ya kolekisa ndelo mpe eyokani te na makanisi ya Yehova. Lokola nalukaka kozala “moto ya sembo na koleka ndelo,” namimonisaka mpasi ngai moko mpe namonisaka bato mosusu mpasi. (Mosakoli 7:16, NW) Ekozala pɛtɛɛ te mpo nalonga mokakatano yango; kasi na lisalisi ya Yehova, nandimi komeka.
C. H., États-Unis
Likambo oyo bolobi ete soki ozali koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka okoki kolɛmba yo moko ezali mpenza solo! Banda bambula mingi, nazalaki komitungisa mingi, komituna mpo na nini nazalaki kolonga te kosala makambo oyo nazalaki mpenza kolinga kosala. Mpe na likambo etali kozanga baninga, mbala mingi namonaka lokola ete moto moko te alingaka kozala pene na ngai, kasi nazalaki koyeba te mpo na nini. Sikoyo nayebi ete ekosɛnga nabunda etumba monene mpe ya makasi, mpe Yehova akosalisa ngai.
L. R., États-Unis
Nabundanaka na mokakatano oyo banda bambula mingi, ntango nyonso nakanisaka ete makambo oyo nasalaka ezalaka kaka malamu te. Sikoyo motema na ngai ekiti ndenge nayebi ete nazali ngai moko te oyo nazali kobundana na ezaleli ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka.
A. B., Canada
Na motó na ngai, nayebi ete moto ya kokoka azali te, kasi motema na ngai etindaka ngai namona makambo ndenge mosusu. Nasepelaki mingi ntango natángaki ete Yehova asɛngaka biso te tósala makambo na ndenge ya kokoka mpe ete eloko ezali na ntina mingi mpo na ye ezali nde makambo oyo ezali na kati ya motema na biso. Nazali na botɔndi mingi mpo na masolo yango.
S. K., Allemagne
Lokola nabangaka ete mbala mosusu nakolonga te, yango epekisaka ngai nasala makambo mosusu. Nayebi sikoyo ete koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka esalaka ete moto azala nkandankanda, abanga ete akolonga te, abɛla na makanisi mpe amimona mpamba. Nasilisi naino mokakatano yango te, kasi nayebi ete nasengeli kokóma na momeseno ya komisɛka ngai moko ntango nasali libunga.
A. I., Japon
Nazalaki kolɛmba makasi na makanisi mpe kotungisama mingi. Nazalaki komityola ete “Nazali moto mpamba.” Lisolo na bino emonisi lolenge malamu ya kotalela makambo mpe elendisi ngai mingi. Kilo oyo ezalaki na motema na ngai—mposa ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka—ekómi pɛpɛlɛ. Makomami esalisi ngai nabongola lolenge na ngai ya kotalela makambo mpe nakolisa makanisi ya kolonga.
M. N., Japon
Nazali na mbula 16, mpe eumeli mingi te bazwaki ngai na maladi ya konyokwama na makanisi. Nalukaka kaka kosala makambo na ndenge ya kokoka, mpe mbala mingi namipesaka foti soki nalongi te. Lisolo oyo eyaki mpenza na ntango ebongi. Nakokaki te kotika kolela ntango nazalaki kotánga yango. Nayebaki te ete bato mosusu mpe bazalaki kobundana na makanisi yango. Natɔndi bino mingi mpo na masolo “Mituna oyo bilenge batunaka.” Nazali kozela masolo yango mosusu.
L. S., États-Unis
Nyama-nkɛkɛ Natɔndi bino mingi mpo na Lamuká! oyo ezalaki na motó ya likambo “Nyama-nkɛkɛ oyo epesaka maladi,” oyo ezalaki na etanda “Nyama-nkɛkɛ ekoki kopesa mikrobe ya sida?” (Lamuká! ya Yanuali-Febwali 2004) Esali sikoyo mwa bambula, nafandaka na engumba moko oyo ezalaka na ngungi mingi na eleko ya molunge. Nabangaka kaka ete ngungi ekopesa ngai mikrobe ya sida soki eswi ngai. Na lisalisi ya lisolo na bino, nakomitungisa te na eleko ya molunge ya mbula oyo!
J. L., Albanie