Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Pesá bana oyo bazali na yango mposa

Pesá bana oyo bazali na yango mposa

Pesá bana oyo bazali na yango mposa

TOMONI polele ete bana mike bazalaka na mposa bátyelaka bango likebi mingi, kasi baboti mingi batyelaka bana likebi te. Makambo oyo bilenge ya mikolo oyo bazali kosala emonisi yango. Mwasi moko, oyo ayekolaka likambo yango, amilelaki na maloba oyo, na zulunalo The Globe and Mail ya Toronto, na Canada: “Kala, bilenge na biso bazalaki mosika boye te na mabota na bango, kasi lelo bilenge bayebi makambo mingi te mpe bazali na bwanya mpenza te.”

Mpo na nini makambo ekómi ndenge wana? Tokoki nde koloba ete ezali mpo baboti mingi babosani ete kotyela bana likebi ezali na ntina mingi? Mwasi moko oyo ayekolaka bizaleli ya bato mpe ateyaka basi babola ndenge ya kobɔkɔla bana na bango, alobi ete: “Biso nyonso tosengeli koyeba soki kozala moboti elimboli nini. Mpe tosengeli koyeba ete ntango oyo tozali kolekisa elongo na bana na biso ya mike lelo tokozwela yango litomba mbala nkama na mikolo ezali koya.”

Ata mwana oyo abotami sika, esɛngaka kolakisa ye mbala na mbala. Esengeli kolakisa ye kaka na mwa miniti te na bantango mosusu, kasi mbala na mbala, na boumeli ya mokolo mobimba. Ntango oyo baboti bazali kolekisa elongo na bana na bango ya mike banda bomwana ezali na ntina mingi mpo bákola malamu.

Esɛngaka komibongisa liboso

Mpo baboti bákokisa mokumba monene oyo bazali na yango, basengeli komibongisa liboso mwana na bango abotama. Bakoki kozwa liteya na etinda oyo Yesu Klisto alobelaki mpo na komonisa ntina ya komibongisa liboso ya kosala likambo nyonso. Alobaki ete: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi afandaka liboso te mpo na kotánga motuya?” (Luka 14:28) Kobɔkɔla mwana​—mosala oyo mbala mingi eumelaka mbula soki 20​—ezali mpasi koleka mosala ya kotonga ndako. Yango wana, mpo na kobɔkɔla mwana malamu, esɛngaka kobanda yango wana ozali na plan na mabɔkɔ, lokola oyo motongi ya ndako azalaka na mposa na yango.

Liboso, ezali na ntina mingi komibongisa na makanisi mpe na elimo liboso ya komema mokumba ya kobɔkɔla mwana. Ntango bayekolaki likambo yango epai ya basi ya zemi 2000 na Allemagne, bamonaki ete bana ya bamama oyo basepelaki kobota bazalaki nzoto mpe makanisi kolɔngɔnɔ koleka bana ya bamama oyo bazalaki kolinga kobota te. Lisusu, moto moko oyo ayekolaki likambo yango amonaki ete soki mwasi azali koyokana na mobali na ye te, akozala na likama monene (237 %) ya kobota mwana oyo akozala na mbeba na makanisi to na nzoto, koleka mwasi oyo azali na libala ya malamu.

Yango wana, tomoni polele ete tata azali na mokumba monene mpo mwana akola malamu. Monganga Thomas Verny alobaki ete: “Makambo mingi te etyaka bomoi ya mwana na likama, ezala na makanisi to na nzoto, koleka tata oyo azali kobɛta to konyokola mwasi na ye ntango azali na zemi.” Kutu, balobaka mbala mingi ete likabo eleki kitoko oyo mwana akoki kozwa, ezali tata oyo alingaka mama na ye.

Ntango mama abangi to likambo moko etungisi ye, nzoto na ye ekobimisa ba hormones na makila, mpe yango ekoki kosala mabe na mwana oyo azali na kati ya libumu. Nzokande, ekosalema bongo kaka soki likambo moko etungisi mama makasi mpe eumeli, kasi te mwa kosilika ya moke to mwa motungisi nde ekómaka likama. Emonani lokola ete likambo eleki ntina ezali nde ndenge mama azali komiyoka mpo na mwana oyo azali na kati ya libumu na ye. *

Okosala nini soki ozali na zemi kasi mobali na yo azali kosalisa yo te, to mpe soki yo moko ozalaki na mposa ya kobota te? Ezali na makambo mosusu oyo ekoki kosala ete mwasi amitungisa mpo azwi zemi. Atako bongo, esengeli ntango nyonso koyeba ete yango ezali foti ya mwana te. Kasi, ndenge nini okoki kobatela kimya na yo ata ntango okutani na likambo ya ndenge wana?

Batoli ya bwanya oyo Liloba ya Nzambe, Biblia, ezali kopesa, esalisi bamilio ya bato. Elobi ete: “Na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” Okokamwa na komona ete kotosa maloba wana ekoki kosalisa yo olanda toli oyo: “Bómitungisa ata na likambo moko te.” (Bafilipi 4:6, 7) Okomiyoka ete Mozalisi na yo, oyo atondi na bolingo azali kosalisa yo.​—1 Petelo 5:7.

Ekómelaka bamama nyonso

Mwa bapɔsɔ nsima ya kobota, bamama mosusu oyo babandi kobota sika bayokaka lokola esengo esili bango mpe nzoto ekómi na bolɛmbu. Ata basi oyo bazalaki kozela mwana na motema likoló bakoki kokóma nkandankanda to mawamawa. Likambo yango emonanaka epai ya basi mingi. Esalemaka bongo mpamba te nsima ya kobota, mbongwana monene esalemaka mpo ba hormones mosusu ekómaka mingi na nzoto, nzokande mosusu ekitaka. Emonanaka mpe mbala mingi ete mama oyo abandi kobota sika amona ete mwana akómi kosɛnga ye makambo mingi​—koleisa ye, kolongola mpe kolatisa ye bilamba, mpe kokɛngɛla ye, ye ayebi makambo ya ngonga te.

Mama moko kutu azalaki kokanisa ete mwana na ye azalaki kolela bobele mpo na kotungisa ye. Yango wana, moto moko ya mayele na Japon, oyo ayekolaka makambo ya kobɔkɔla bana alobaki ete: “Moto moko te akoki kokima motungisi ya kobɔkɔla mwana.” Mpo na moto yango, “likambo oyo eleki ntina mpo na mama ezali ete asengeli kotika mwana mosika te.”

Ata soki mama azali konyokwama na makanisi na bantango mosusu, akoki kobatela mwana na ye mpo motungisi wana ezwa ye te. Zulunalo Time elobi ete: “Bamama oyo bazalaki konyokwama na makanisi, kasi basalaki makasi mpo na kolonga motungisi na bango, kotyela bana na bango likebi mingi mpe kosakanisa bango, bana na bango bazalaki na mayele mpe bazalaki esengoesengo.” *

Ndenge oyo tata akoki kosalisa

Mbala mingi, tata nde abongi mpenza mpo na kosalisa mwasi na ye na mokumba ya mwana. Ntango mwana azali kolela na butu, mbala mingi tata akoki komema ye mpe kobondela ye mpo mwasi na ye akoka kolala. Biblia elobi ete: “Bino mibali, bókoba kofanda ná bango mpe ndenge moko engebene boyebi.”​—1 Petelo 3:7.

Yesu Klisto atikaki ndakisa ya kokoka oyo mibali bakoki kolanda. Apesaki kutu bomoi na ye mpo na bayekoli na ye. (Baefese 5:28-30; 1 Petelo 2:21-24) Na yango, mibali oyo bandimaka kotya bolamu na bango pembeni mpo na kosalisa basi na bango na makambo mosusu etali kobatela bana na bango ya mike, bazali kolanda ndakisa ya Klisto. Ya solo, kobɔkɔla bana ezali mosala ya ekipi, oyo esɛngaka milende mpe boyokani ya baboti nyonso mibale.

Esɛngaka milende mpe boyokani ya bato mibale

Yoichiro, tata ya mwana mwasi ya mbula mibale, alobi ete: “Ngai ná mwasi na ngai tosololaki mingi mpo na kolobela ndenge ya kobɔkɔla mwana na biso. Mbala nyonso soki likambo ebimi, tosololaka polele ndenge ya kosilisa yango.” Yoichiro ayebi ete mwasi na ye azalaka na mposa ya kopema mingi, yango wana mbala mingi ntango akendaka kosomba biloko to kosala makambo mosusu, azwaka mwana na bango mpe akendaka na ye.

Kala, ntango bato bazalaki kobota bana mingi mpe bazalaki koyokana malamu na kati ya libota, bana oyo bakómi mikóló mpe bandeko mosusu bazalaki kosalisa baboti mpo na kobatela bana. Yango wana, tokokamwa te soki mama moko, oyo asalaka na Ebongiseli moko ya kobatela bana na Kawasaki, na Japon, alobaki ete: “Mbala mingi, bamama bazwaka mwa lisalisi soki bayebisi bato mosusu likambo yango. Soki basalisi bamama yango ata moke na likambo yango, mingi bakoki kolonga mikakatano yango.”

Zulunalo Parents elobi ete baboti “basengeli na bato mingi oyo bakoki kosololaka na bango mpo na koyebisaka bango mikakatano na bango.” Epai wapi bakoki kozwa bato yango? Soki baboti oyo babandi kobota sika bazali koyokela baboti na bango to mama-bokilo mpe tata-bokilo na bango kozanga kokanisela bango mabe, yango ekoki kosalisa bango mingi. Toyebi ete baboti ya babalani yango ya sika basengeli koyeba ete ekateli ya nsuka ekouta nde epai ya babalani bango moko. *

Baboti oyo babandi kobota sika bakoki mbala mosusu kosɛnga toli epai ya baninga na bango bandimi. Na lisangá ya Batatoli ya Yehova, ezali na baboti oyo bameseni kobɔkɔla bana mpe bakozanga te koyoka yo soki oyebisi bango mikakatano na yo. Bakoki kopesa yo toli mosusu oyo ekosalisa yo. Mbala na mbala, okoki mpe kosɛnga lisalisi ya “mibange basi,” ndenge Biblia ebengaka bamama oyo bazali baklisto ya kala, oyo bakozanga te kosalisa bilenge basi.​—Tito 2:3-5.

Ya solo, baboti basengeli kopona toli nini bakolanda ntango bazali koyoka makanisi ya bato mosusu. Yoichiro alobi ete: “Okokanisa ete mbala moko bato nyonso tozalaki na bango bayebi makambo mingi etali kobɔkɔla bana.” Mwasi na ye Takako alobi ete: “Na ebandeli, nazalaki koyeba te toli nini nalanda, mpo nazalaki kokanisa ete bazali kosɛka ngai mpo nayebi naino kobɔkɔla bana te.” Nzokande, mpo baboti mingi bayokaki toli ya bato mosusu, bakómaki na bokatikati na likambo etali kopesa bana oyo bazali na yango mposa.

Lisalisi oyo eleki nyonso

Ata soki emonani lokola ete moto ya kosalisa yo azali te, ezali na moto moko oyo okoki kotyela ye motema mpo na kozwa makasi. Moto yango ezali Yehova Nzambe, oyo akelaki biso, ye oyo liso na ye ekoki komona “ata mwana oyo abandi kosalema na kati ya libumu” na baoyo nyonso bazali kobotama na mabelé. (Nzembo 139:16NW) Na mbala mosusu, Yehova alobaki na libota na ye ya ntango ya kala, ndenge ezali na Liloba na ye, Biblia, ete: “Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo anungi ye naino? Ayoka mawa lisusu te mpo na mwana mobali na libumu na ye? Ata baoyo bakobosana nde ngai nakobosana yo te.”​—Yisaya 49:15; Nzembo 27:10.

Te, Yehova akosana baboti te. Na Biblia, apesi bango toli ya malamu mpo na kobɔkɔla bana. Na ndakisa, eleki mbula pene na 3 500, Moize, mosakoli ya Nzambe, akomaki boye: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” Na nsima, Moize alobaki ete: “Maloba oyo [bakisá mpe oyo etali kolinga mpe kosalela Yehova] malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingia na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.”​—Deteronome 6:5-7.

Na makanisi na yo, liteya nini ya ntina tokoki kozwa na toli wana oyo euti na Liloba ya Nzambe? Omoni te ete osengeli koteya bana na yo ntango nyonso mpe mikolo nyonso? Na ntembe te, esengeli kosuka kaka te na kobongisa oyo ebengami “ntango ya malamu” mpo na kolekisa elongo na bana na yo mikolo mosusu. Lokola mbala mingi masolo ya malamu ezalaka nde oyo eyaka mbalakaka, esengeli kofandaka mingi elongo na bana mpo bósololaka mbala na mbala. Na ndenge yango okosalela etinda oyo ya Biblia: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola.”​—Masese 22:6.

Mpo na kobɔkɔla mwana malamu, esɛngaka mpe kotángela ye mikanda na mongongo makasi. Biblia eyebisi biso ete Timote, moyekoli moko ya ekeke ya liboso, ‘ayebaki makomi mosantu banda na bomwana.’ Na yango, ekoki kozala ete mama na ye Enisi, mpe nkɔkɔ na ye Loisi bazalaki kotángela ye yango ntango azalaki naino mwana moke. (2 Timote 1:5; 3:14, 15) Ezali malamu kobanda kotángela mwana na bino mikanda ntango kaka bobandi kolobisa ye. Kasi mikanda nini okoki kotángela ye, mpe ndenge nini okoki koteya ata mwana moke malamu?

Esengeli mwana na yo ayokaka yo ntango ozali kotángela ye Biblia. Ekoki kozala ete ezali buku yango nde bazalaki kotángela Timote. Ezali mpe na babuku mosusu oyo ekoki kosalisa mwana amesana na Biblia na nzela ya bililingi kitoko. Yango ekosalisa ye amona na miso makambo oyo Biblia ezali koteya. Na ndakisa ezali na Mokanda mpo na Masolo ya Biblia mpe Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Babuku yango esalisi bamilio ya bana bákanga mateya ya Biblia na makanisi mpe na mitema na bango.

Ndenge Biblia elobi yango, “bana mibali [mpe bana basi] bazali likabo ya [Yehova], mpe mbuma na libumu ezali libonza.” (Nzembo 127:3) Mozalisi na yo apesi yo “likabo,” elingi koloba mwana ya kitoko, oyo okoki komikumisa mpo na ye mpe kosepela na ye. Kobɔkɔla bana, mingi mpenza baoyo bakokumisa Mozalisi na bango, ezali mosala moko ya kitoko oyo epesaka esengo mingi!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 9 Longola ba hormones ya motungisi, likaya, masanga mpe biloko mosusu oyo elangwisaka ekoki mpe kozala likama mpo na mwana oyo azali na libumu. Bamama oyo bazali na zemi basengeli koboya biloko wana nyonso mpo ete ezali likama. Lisusu, liboso ya komɛla nkisi nyonso, basengeli kotuna monganga soki nkisi yango ezali likama te mpo na mwana oyo azali na libumu.

^ par. 15 Soki mama azali lisusu na esengo te mpe na mposa ya bomoi te, soki mposa nyonso oyo azalaki na yango mpo na mwana to mpo na mokili ebandi kosila, ekoki kozala ete azali kobɛla maladi ya konyokwama na makanisi oyo eyaka nsima ya kobota. Soki ezali maladi yango, asengeli kokende epai ya monganga oyo abotisaki ye. Talá Lamuká! ya 22 Yuli 2002, nkasa 19-23 mpe ya 8 Yuni 2003, nkasa 21-23 (na Lifalanse).

^ par. 22 Tángá lisolo “Les grands-parents: leurs joies et leurs difficultés,” na Lamuká! ya 22 Marsi 1999 (na Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 8]

Ndenge oyo mama azali koyoka mpo na mwana na ye oyo azali na libumu ezali na ntina mingi

[Elilingi na lokasa 9]

Ata soki nsima ya kobota, mama oyo abandi kobota akómi nkandankanda, ezali na makambo oyo akoki kosala mpo mwana amiyoka ete balingi ye mpe bazali kobatela ye

[Elilingi na lokasa B10]

Batata basengeli mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobatela mwana

[Elilingi na lokasa 10]

Esengeli kobanda kotángela mwana mikanda ntango azali naino moke