Makambo mazali koleka na mokili
Makambo mazali koleka na mokili
Koyoka elobeli ya mbwa?
Lisolo moko ebimaki na Internet na Japon, elobi ete kompanyi moko ya Japon oyo esalaka biloko oyo bana basakanaka na yango esali masini moko oyo ezali kolimbola koganga ya mbwa na maloba ya bato. Masini yango ezali na mikro oyo ezali na nsinga te, bakangisi yango na nsinga oyo bakangaka na nkingo ya mbwa mpe ntango mbwa ezali koganga, mwa masini mosusu oyo ezali na kati ezali koyamba koganga ya mbwa. Mwa masini wana ekoki koyekola koganga ya mbwa mpe kolimbola yango na maloba ya bato oyo ekomonisa bizaleli motoba: kolɛmba nzoto, nkanda, esengo, mawa, mposa ya eloko, mposa ya koswa. Soki esilisi kolimbola, ekobimisa maloba na mwa etanda ya talatala, mpe okoki kotánga maloba lokola: “Nazali nzoto makasi!”, “Likambo yango elɛmbisi ngai!” mpe “Yaká tósakana!” Kompanyi yango elobi ete etɛki bamasini yango 300 000 na Japon, mokomoko na dolare 100, mpe ezali kokana kotɛka yango ata milio moko, ntango ekotinda yango na Corée du Sud mpe na États-Unis.
Batyelaka mangomba motema te
Zulunalo Leipziger Volkszeitung eyebisi ete “bato ya Allemagne batyelaka bapolisi mpe basoda motema, kasi mangomba te.” Ntango World Economic Forum esalaki “ankɛti mpo na oyo etali kotyela motema,” na bibongiseli 17 ya minene, mangomba ezalaki na esika ya nsuka. Armin Nassehi, oyo ayekolaka boyokani kati na bato, alobi ete lokola na mikolo oyo mobulu ezali se kokóma mingi, bato ya Allemagne bazali kotya motema na bibongiseli oyo ezali “kokesenisa malamu ná mabe,” lokola bapolisi mpe basoda. Mpo na nini batyelaka mangomba motema te? Nasssehi alobi lisusu ete: “Atako bato bakómi lisusu kosambela mingi, bandimaka te ete lingomba ekoki mpenza kosilisa mikakatano na bango ya minene.” Alobi ete mangomba ya Allemagne ezali na “eloko mosusu ya kopesa bato te bobele milulu ya lingomba.”
Mabala oyo eumeli ezali kokufa
Zulunalo Berliner Morgenpost eyebisi ete na Allemagne, “babalani mingi oyo mabala na bango eumeli, bazali kokabwana.” Gina Kästele, mopesi-toli na makambo ya libala, mpe afandaka na engumba Munich, na Allemagne, alobi ete ntina ya libosoliboso ezali mpo basi mingi bazali lisusu nsima ya mibali na bango te, mingi mpenza na makambo ya mbongo. Kästele alobi ete “koleisa libota ezali lisusu te likambo ya mobali ye moko.” Balobaka ete babalani oyo bazali koboma mabala ntango bakómi na mbula koleka 40, bazalaki kozela kaka bana bákola mpe bátika ndako. Nzokande, Kästele alobi ete, mbala mingi, mabala yango ekufaka soki mobali akei kolinga mwasi mosusu.
Komungamunga esalaka malamu
Zulunalo Wprost elobi ete departema ya sosioloji, na Iniversite ya Jagiellonian, na engumba Cracovie, na Pologne, emonisi ete ntango batunaki bango, “bato mingi (74%) bazongisaki ete bakolinga te kosala mombongo na moto oyo asɛkaka te, mpe basusu (69%) bazongisaki ete bakolinga te kosala boninga na moto ya ndenge wana.” Ntina oyo bapesaki ezali ete moto oyo azalaka na esengo te, mbala mingi bato bamonaka ye lokola azali kobomba likambo moko na bomoto na ye. Bato oyo mosala na bango esɛngaka bábimaka mingi na miso ya bato bayebi likambo yango malamu; zulunalo Wprost elobi ete yango wana tomonaka “bato ya politiki, bato ya mombongo, babɛti miziki, bapanzi-nsango na televizyo, baambasadɛrɛ, bato oyo basalaka piblisite, mpe bato oyo batɛkaka, bamungamungaka” mbala na mbala. Bato oyo bayekolaka likambo yango bamonaki mpe ete ntango moto amungimungi, makila emataka na bɔɔngɔ mpe esalaka ete elongi na ye efungwama. Mwasi moko oyo asalaka mombongo alobaki ete: “Namekaka komungamunga ata soki nayoki mposa ya kosɛka te. Ntango namungimungi, nayokaka ete nzoto esepeli mpe yango esalaka ete namiyoka mpenza malamu.”
Kebá na mɔtɔ na esika ya masano!
Zulunalo Medical Journal of Australia (MJA) elobi ete na Australie, mɔtɔ oyo bapɛlisaka na bisika ya masano, oyo mbala mingi bana bazikaka na yango, mingi (koleka 70%) bazikaka nde na makala oyo etikalaka na bisika yango, kasi ezalaka te mɔtɔ ya kopɛla. Lisusu na Australie, mbala mingi bana bazikaka mɔtɔ yango “na ntɔngɔ, ntango mɔtɔ oyo basalelaki na masano na butu emonanaka lokola ekufi.” Ndenge nini? Ntango bayekolaki likambo yango, bamonaki ete ntango babomaka mɔtɔ yango na mai, ngonga mwambe na nsima, mputulu ná makala ezalaka lisusu mɔtɔ makasi te (16°C). Nzokande, ntango babomaka yango na zɛlo, etikalaka naino na mɔtɔ makasi (91°C), mɔtɔ oyo ekoki kozikisa moto makasi soki ezwi ye na nzoto ata segɔndi moko. Zulunalo MJA elobi ete, “lokola koboma mɔtɔ ya masano na zɛlo ebomaka yango nyonso te, lolenge malamu ezali ya koboma mɔtɔ yango na mai.”
Kobima mbuma ya kansɛr na nzoto
Mbuma mingi oyo ebimaka na nzoto ezalaka mpenza likama te. Atako bongo, esengeli kokeba na mbuma oyo ekoki kobimisa kansɛr. Na kotalela zulunalo Milenio ya Mexico, talá bilembo oyo ekoki kotinda yo okende kolakisa monganga mbuma moko ya nzoto na yo: soki ngámbo moko evimbi, soki pembenipembeni na yango ezali ndenge moko te, soki mbuma yango ebandi kokóma moindo to motane mpe ezali koya monene, soki ezali monene koleka milimɛtrɛ motoba (monene ya gɔmɛ ya krɛyo), soki ezali kobimisa makila to kosala mokosa. Monganga Nancy Pulido Díaz, oyo asalaka na lopitalo La Raza, alobi ete: “Mbuma ya nzoto oyo esengeli kokeba na yango mingi ezali oyo moto abotami na yango mpe oyo ebimaka na katikati ya lobɔkɔ to na nse ya lokolo.”
Koyekola monɔkɔ ya bapaya
Okosepela koyekola monɔkɔ moko ya bapaya? Zulunalo ya Pologne Poradnik Domowy epesi toli oyo: “Ntango ozali koyekola monɔkɔ mosusu, okosala kaka mabunga. Kondima likambo wana ezali eloko ya liboso oyo ekosalisa yo oyeba monɔkɔ yango.” Longola yango, osengeli mpe “kondima kobanda.” Soki ozali koyeba te ndenge ya koloba likambo moko, “ekosɛnga ntango mosusu kondima ndenge motema etindi yo mpe komeka koloba ndenge okanisi,” na esika ya kokanga monɔkɔ. Zulunalo yango elobi ete: “Mbala mingi tobosanaka ete mokakatano na biso eutaka mingi nde na nsɔni to kobanga. Soki olongi bolɛmbu wana, na ntembe te okoumela te koyeba monɔkɔ oyo ozali koyekola.” Molakisi ya malamu akoki mpe kosalisa yo otika kobanga mpe oyeba noki.
“Bato milio 1,6 bakufaki mpo na mobulu”
Zulunalo Wall Street Journal elobi ete: “Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ebimisaki mpo na mbala ya liboso motango monene ya bato oyo bakufaki mpo na mobulu. Emonisi ete na mobu 2000, bato milio 1,6 bakufaki mpo na mobulu, motango oyo ekokani moke na bato oyo bakufaki na maladi ya ntolo (tuberculose), mpe eleki baoyo bakufaki na malaria.” Bazwaki motango yango ntango basangisaki mitango oyo eutaki na mikili 70 mpe esangisi bato oyo bakufaki na bitumba, na kobɛta, na komiboma, mpe baoyo babomaki bango na mindoki. Zulunalo yango ebakisi ete “bato oyo basalaki ankɛti yango bamonisi ete, na mokili mobimba, bato 3 likoló na 100 bakufaka mpo na mobulu. Mobulu oyo basalelaka basi, bana, mibange, bilenge mibali, mpe bamboka ekómi koya se mingi koleka ndenge bato bakokaki kokanisa yango. Bato oyo basalaki ankɛti balobi ete ntina mosusu oyo mobulu ekómi mingi ezali ete mbala mingi makambo yango ya mobulu bayebisaka yango te.” Batandi makambo ya mobulu oyo bato bakufaki mpo na yango boye: komiboma (50%), koboma (30%), bitumba (20 %). Bato bamibomaki mingi nde na Mpoto ya Ɛsti, mingi mpenza na Russie mpe na Lituanie. Bato oyo babomaki bango na mindoki bazalaki mingi na Albanie (bato 22 likoló na 100 000). Na États-Unis, bato 11,3 likoló na 100 000 bakufaki na mondoki, mpe na Royaume-Uni 0,3 likoló na 100 000 mpe na Japon 0,1 likoló na 100 000.
“Momekano” ya lolaka
Zulunalo National Public Radio, na États-Unis, etuni motuna oyo: Radio nini ya motuka ebimisaka lolaka makasi koleka? Motuna wana ebimisaki momekano moko ya sika ya mikili mingi. Ntango babongisaki momekano yango, bamekaki makasi ya lolaka ya baradio (na décibels) na lisalisi ya mwa masini moko oyo batyaki yango na kati ya mituka. Bazalaki kotánga lolaka oyo ezali kobima libándá te. Yango wana bato oyo basalaki momekano yango bakangaki malamumalamu maninisa nyonso ya mituka na bango mpo lolaka ebima ata moke te. Wayen Harris, oyo asalaki momekano yango alobi ete, “na mituka oyo babongisaki malamumalamu, . . . maninisa ezalaki na epesɛrɛ ya santimɛtrɛ nsambo tii zomi, mpe batyaki simá ya makasi (béton) na bizipeli mpe bibende nyonso ezalaki ya makasi (acier).” Ntango bamatisi lolaka makasi, bato oyo bazali kosala momekano yango, bakofanda te na kati ya vuatire yango, mpo bayebi ntina!