Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 118

Bawelani mpo na koyeba nani aleki baninga

Bawelani mpo na koyeba nani aleki baninga

MATAI 26:31-35 MARKO 14:27-31 LUKA 22:24-38 YOANE 13:31-38

  • YESU APESI TOLI NA LIKAMBO ETALI KOWELA ESIKA YA LIBOSO

  • ASAKOLI ETE PETRO AKOWANGANA YE

  • BOLINGO EZALI ELEMBO YA BAYEKOLI YA YESU

Na mpokwa ya nsuka oyo Yesu alekisi na bantoma na ye, apesi bango liteya ya komikitisa na ndenge asukoli bango makolo. Yango ezali na ntina nini? Mpo bayekoli bamonisi bolɛmbu moko. Bamipesá na Nzambe, kasi bazali kaka kowelana mpo na koyeba nani aleki baninga. (Marko 9:33, 34; 10:35-37) Bolɛmbu yango emonani lisusu na mpokwa oyo.

Bantoma babimisi “ntembe makasi na kati na bango mpo na koyeba nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” (Luka 22:24) Yesu ayoki mawa mpenza ndenge bazali kowelana lisusu! Asali nini?

Na esika Yesu asilikela bango mpo na makanisi mpe etamboli na bango, amonisi motema molai mpe alobi na bango: “Bakonzi ya bikólo balakisaka bango bokonzi na bango, mpe baoyo bayangelaka bango babengami Bato Malamu. Nzokande bino bosengeli kozala bongo te. . . . Mpo nani aleki, moto oyo afandi na mesa to oyo azali mosali?” Na nsima, Yesu apesi bango lisusu ndakisa oyo apesaka bango ntango nyonso, alobi: “Kasi ngai nazali mosali na katikati na bino.”​—Luka 22:25-27.

Atako bantoma bazalaki kosala mabunga, bakangamaki na Yesu na ntango ya mikakatano. Yango wana alobi: “Nazali kosala kondimana ná bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana ná ngai, mpo na bokonzi.” (Luka 22:29) Bato yango bazali bayekoli ya sembo ya Yesu. Alaki bango ete na nzela ya kondimana oyo asali na bango, bakozala na Bokonzi mpe bakoyangela elongo na ye.

Atako bantoma bazali na elikya wana, bazali naino na nzoto ya mosuni mpe bazali naino bato ya kozanga kokoka. Yesu alobi na bango: “Satana asɛngi azwa bino mpo apupola bino lokola blé,” oyo epanzanaka ntango bazali kopupola. (Luka 22:31) Alobi na bango mpe ete: “Na butu oyo, bino nyonso bokobɛta libaku mpo na ngai, mpo ekomamá ete: ‘Nakobɛta mobateli ya mpate, mpe bampate ya etonga ekopanzana.’”​—Matai 26:31; Zekaria 13:7.

Petro atuti ntolo mpe azongisi: “Ata soki bamosusu nyonso babɛti libaku mpo na yo, ngai nakobɛta libaku ata moke te!” (Matai 26:33) Yesu alobi na Petro ete liboso nsoso elela mbala mibale na butu yango, akowangana ye. Kasi, Yesu abakisi: “Nasaleli yo lilɔmbɔ ete kondima na yo elɛmba te; mpe yo, ntango okozonga, lendisá bandeko na yo.” (Luka 22:32) Petro alobi na mpiko nyonso ete: “Ata soki esengeli nakufa na yo, nakowangana yo ata moke te.” (Matai 26:35) Bantoma mosusu mpe balobi kaka bongo.

Yesu alobi na bayekoli na ye: “Nazali elongo na bino mwa ntango moke lisusu. Bokoluka ngai; mpe kaka ndenge nalobaki na Bayuda ete: ‘Epai nazali kokende bino bokoki kokóma te,’ nalobi na bino mpe ndenge wana sikoyo.” Na nsima abakisi: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:33-35.

Ntango Petro ayoki Yesu alobi ete azali na bango kaka mwa ntango moke, atuni: “Nkolo, ozali kokende wapi?” Yesu azongiseli ye ete: “Epai nazali kokende, okoki kolanda ngai sikoyo te, kasi okolanda ngai nsima.” Petro amitungisi, alobi: “Nkolo, mpo na nini nakoki kolanda yo sikoyo te? Nakopesa molimo na ngai mpo na yo.”​—Yoane 13:36, 37.

Sikoyo Yesu alobeli ntango oyo atindaki bantoma básakola na Galile, kasi bákende na pɔtɔmɔni mpe saki ya bilei te. (Matai 10:5, 9, 10) Atuni: “Bozangaki nde eloko moko?” Bayanoli: “Te!” Kasi bakosala nini na mbala ya nsima? Yesu apesi bango malako: “Moto oyo azali na pɔtɔmɔni azwa yango, ndenge moko mpe saki ya bilei; mpe moto oyo azangi mopanga atɛka elamba na ye ya likoló mpe asomba moko. Mpo nazali koyebisa bino ete oyo ekomamá esengeli kokokisama epai na ngai, elingi koloba ete: ‘Mpe atángamaki esika moko na bato oyo babukaka mibeko.’ Mpo oyo etali ngai ezali kokokisama.”​—Luka 22:35-37.

Yesu azali kolobela ntango oyo bakobaka ye na nzete esika moko na bato mabe, to bato oyo babukaka mibeko. Na nsima, bayekoli na ye bakonyokwama makasi. Bakanisi ete bamilɛngɛli mpe balobi: “Nkolo, talá! mipanga mibale yango oyo.” Ayanoli: “Ekoki.” (Luka 22:38) Lokola bazali na mipanga mibale, yango epesi Yesu libaku ya kopesa bango liteya mosusu ya ntina.