MOKAPO 28
“Tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”
Batatoli ya Yehova bazali kokoba mosala oyo bayekoli ya Yesu Kristo babandaki na siɛklɛ ya liboso
1. Makambo nini esalemaki epai ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso, oyo ezali mpe kosalema epai ya Batatoli ya Yehova lelo oyo?
BAKRISTO ya siɛklɛ ya liboso bapesaki litatoli na mpiko. Bandimaki lisalisi mpe litambwisi ya elimo santu na motema moko. Minyoko ekangisaki bango monɔkɔ te. Nzambe azalaki kopambola bango mingi. Makambo nyonso wana ezali mpe kosalema epai ya Batatoli ya Yehova lelo oyo.
2, 3. Mokanda ya Misala elobeli libosoliboso makambo nini?
2 Na ntembe te, masolo oyo ezali na mokanda ya Misala ya bantoma elendisi mpenza kondima na yo! Mokanda yango ekeseni na mikanda mosusu mpamba te kaka yango nde mokanda ya Biblia oyo elobeli makambo oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki.
3 Mokanda ya Misala etángi nkombo ya bato 95 oyo bazalaki bato ya mikili 32, etángi bingumba 54, mpe bisanga 9. Ezali na masolo oyo ezali kosimba motema; masolo yango elobeli bato mpamba, bato ya mangomba oyo bazalaki na lofundo, bato ya politiki oyo bazalaki na lolendo, mpe banyokoli oyo bazalaki na nko mpenza. Nzokande, mokanda yango elobeli libosoliboso bandeko na yo bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo, atako bazalaki kokutana na mikakatano, bazalaki mpe kosakola nsango malamu na molende.
4. Mpo na nini tomiyokaka pene na bato lokola Paulo, Tabita, mpe batatoli mosusu ya sembo ya ntango ya kala?
4 Ntoma Paulo, ntoma Petro, Luka monganga mpe ndeko ya bolingo, Barnabasi moto ya bokabi, Stefano moto ya mpiko, Tabita mwasi ya boboto, Lidia moyambi-bapaya, mpe ebele ya batatoli mosusu ya sembo bazalaki na bomoi eleki sikoyo mbula pene na 2 000. Atako bongo, tomiyokaka pene na bango. Mpo na nini? Mpo lokola bango, biso mpe tozali na mokumba ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Tozali mpenza na libaku malamu ya kosangana na mosala yango!
5. Bayekoli ya liboso ya Yesu babandaki mosala ya kosakola epai wapi?
5 Kanisá naino mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye. Alobaki ete: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba, na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Elimo santu epesaki bayekoli nguya ya kopesa litatoli libosoliboso “na Yerusaleme.” (Mis. 1:1–8:3) Na nsima, na kolanda litambwisi ya elimo, bapesaki litatoli “na Yudea mobimba mpe na Samaria.” (Mis. 8:4–13:3) Mpe, babandaki komema nsango malamu “na esika eleki mpenza mosika na mabele.”—Mis. 13:4–28:31.
6, 7. Na oyo etali mosala ya kosakola, bisaleli nini tozali na yango oyo bandeko na biso ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na yango te?
6 Bandeko na yo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na Biblia na mobimba na yango te na mosala na bango ya kosakola. Evanzile ya Matai ekomamaki soki na mobu 41 T.B. Mikanda mosusu ya Paulo ekomamaki liboso ya mokanda ya Misala, oyo ekomamaki na mobu soki 61 T.B. Kasi, na siɛklɛ ya liboso, mokristo mokomoko azalaki na Biblia na ye moko te, azalaki mpe na mikanda te ya kotikela bato oyo bazalaki kosepela na nsango malamu. Liboso, Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki koyoka Makomami ya Ebre ntango ezalaki kotángama na sinagoga. (2 Ko. 3:14-16) Atako bongo, basengelaki kozala bayekoli ya molende, mpamba te bazalaki mbala mosusu kozongela na motó makambo oyo ezali na Makomami.
7 Lelo oyo, mingi kati na biso tozali na Biblia mpe ebele ya mikanda oyo elimbolaka Biblia. Tozali kosakola nsango malamu na mikili 240 mpe na minɔkɔ ebele mpo na kokómisa bato bayekoli.
Bazwi nguya ya elimo santu
8, 9. (a) Elimo santu esalisaki bayekoli ya Yesu na kosala nini? (b) Moombo ya sembo abimisaka nini na lisalisi ya elimo ya Nzambe?
8 Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kopesa litatoli, alobaki na bango boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino.” Na litambwisi ya elimo santu to nguya ya Nzambe, nsukansuka bayekoli ya Yesu basengelaki kopesa litatoli na mabele mobimba. Petro ná Paulo babikisaki bato ya maladi, babenganaki bilimo mabe, ata mpe kosekwisa bakufi na nguya ya elimo santu! Nzokande, nguya oyo bazwaki na nzela ya elimo santu ezalaki na mokano moko ya ntina koleka. Nguya yango esalisaki bantoma mpe bayekoli mosusu bápesa bato boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.—Yoa. 17:3.
9 Mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli ya Yesu balobaki “minɔkɔ ndenge na ndenge, kaka ndenge elimo epesaki bango likoki ya koloba.” Na ndenge yango, bapesaki litatoli mpo na “makambo kitoko ya Nzambe.” (Mis. 2:1-4, 11) Lelo oyo, tolobaka te na ndenge ya likamwisi minɔkɔ ndenge na ndenge. Nzokande, na lisalisi ya elimo ya Nzambe, moombo ya sembo azali kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ ebele. Na ndakisa, sanza na sanza, bamilio ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali kobimisama, mpe site Internet na biso jw.org, ezali kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe bavideo na minɔkɔ koleka 1000. Nyonso wana ezali kosalisa biso tósakola “makambo kitoko ya Nzambe” epai ya bato ya bikólo, mabota, mpe minɔkɔ nyonso.—Em. 7:9.
10. Kobanda 1989, mosala nini ezali kosalema na oyo etali kobongola Biblia?
10 Kobanda 1989, moombo ya sembo azali kotya likebi mingi na mosala ya kobimisa Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ ebele. Biblia yango ebongolami na minɔkɔ koleka 200, ebimisami na bamilio mingi mpe ekokoba kobimisama. Mosala nyonso wana ekoki kolonga kaka na lisalisi ya Nzambe mpe ya elimo na ye.
11. Mosala nini esalemi na oyo etali kobongola mikanda ya Batatoli?
11 Na mikili mpe bamboka koleka 150, bankóto ya bandeko bazali kobongola mikanda kozanga ete báfuta bango. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpo ezali na ebongiseli mosusu te awa na mabele oyo etambwisami na elimo santu mpo na “kopesa litatoli malamumalamu” na mokili mobimba mpo na Yehova Nzambe, Mokonzi mpe Masiya na ye, mpe Bokonzi oyo atye na likoló.—Mis. 28:23.
12. Nini esalisaki Paulo mpe bakristo mosusu bápesa litatoli?
12 Ntango Paulo apesaki litatoli epai ya Bayuda mpe bato ya bikólo na Antiokia ya Pisidi, “baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi.” (Mis. 13:48) Luka asukisi mokanda ya Misala na koloba ete Paulo ‘azalaki kosakola Bokonzi ya Nzambe . . . na polele mpenza mpe na bosembo, kozanga kopekisama.’ (Mis. 28:31) Azalaki kopesa litatoli yango epai wapi? Na Roma, engumba-mokonzi ya ekólo oyo elekaki na nguya! Ezala na diskur to na balolenge mosusu, bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso bapesaki litatoli na lisalisi mpe na litambwisi ya elimo santu.
Minyoko ezongisaki bango nsima te
13. Mpo na nini tosengeli kobondela ntango tokutani na minyoko?
13 Ntango bayekoli ya Yesu bakutanaki na minyoko na siɛklɛ ya liboso, babondelaki Yehova apesa bango mpiko. Nini emonanaki na nsima? Batondaki na elimo santu mpe bazwaki nguya ya koloba liloba ya Nzambe na mpiko. (Mis. 4:18-31) Biso mpe tobondelaka mpo na kosɛnga bwanya mpe makasi ya kokoba kopesa litatoli ata na kati ya minyoko. (Yak. 1:2-8) Lokola Nzambe azali kopambola biso mpe elimo santu ezali kosalisa biso, tozali kokoba na mosala ya kosakola Bokonzi. Eloko moko te ekoki kopekisa mosala ya kopesa litatoli, ezala botɛmɛli to minyoko ya makasi. Ntango banguna bazali konyokola biso, tosengeli kobondelaka mpo na kosɛnga elimo santu, bwanya mpe mpiko mpo na kosakola nsango malamu.—Luka 11:13.
14, 15. (a) Nini esalemaki nsima ya “bolɔzi oyo ebimaki likoló ya Stefano”? (b) Na mikolo na biso, ndenge nini ebele ya bato ya Sibérie bazwaki libaku ya koyeba solo?
14 Stefano apesaki litatoli ya mpiko liboso banguna báboma ye. (Mis. 6:5; 7:54-60) Na ntango “monyoko moko monene” ebimaki na mikolo wana, bayekoli nyonso, longola kaka bantoma, bapanzanaki na Yudea mpe na Samaria. Kasi, monyoko yango esukisaki te mosala ya kopesa litatoli. Filipe akendaki “kosakola Kristo” na Samaria mpe mosala na ye ebotaki mpenza mbuma. (Mis. 8:1-8, 14, 15, 25) Longola yango, lisolo elobi na biso ete: “Baoyo bapalanganaki mpo na monyoko oyo ebimaki nsima ya liwa ya Stefano bakatisaki tii na Fenisia, na Shipre mpe na Antiokia, kasi bazalaki kosakola liloba kaka epai ya Bayuda. Nzokande, mibali mosusu ya Shipre mpe ya Sirene oyo bayaki na Antiokia mpe babandaki kosolola na bato oyo balobaka monɔkɔ ya Grɛki, bazalaki kosakola nsango malamu ya Nkolo Yesu.” (Mis. 11:19, 20) Na ntango wana, minyoko esalisaki mpo nsango ya Bokonzi epalangana.
15 Na ntango na biso, likambo ya ndenge wana esalemaki na mikili ya ex-Union soviétique. Mingimingi na bambula ya 1950, bankóto ya Batatoli ya Yehova bamemamaki na makasi na Sibérie. Lokola bapanzaki bango na bisika ndenge na ndenge, nsango malamu ezalaki ntango nyonso kopalangana na etúká monene wana nyonso. Ebele ya Batatoli ndenge wana bakokaki te kozwa mbongo bango moko mpo na kosala mibembo oyo, mosusu ezalaki ya kilomɛtrɛ 10 000 mpo na kokende kosakola nsango malamu kuna! Nzokande, guvɛrnema yango moko etindaki bango na bisika wana. Ndeko moko alobaki boye: “Emonanaki ete bango moko bakonzi ya Leta basalaki ete bankóto ya bato ya mitema sembo oyo bazalaki kofanda na Sibérie báyeba solo.”
Yehova apambolaki bango mingi
16, 17. Mokanda ya Misala elobeli makambo nini oyo emonisi ete Yehova azalaki kopambola mosala ya kopesa litatoli?
16 Ntembe ezali te ete Yehova azalaki kopambola bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Paulo ná bandeko mosusu balonaki mpe bamwangisaki mai, “kasi Nzambe azalaki kokolisa.” (1 Ko. 3:5, 6) Masolo oyo ezali na mokanda ya Misala emonisi ete bokoli ezalaki mpo Yehova azalaki kopambola mosala ya kopesa litatoli. Na ndakisa, mokanda yango elobi ete “liloba ya Nzambe ekobaki kopalangana, mpe motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama mingi mpenza na Yerusaleme.” (Mis. 6:7) Lokola mosala ya kopesa litatoli ezalaki kopalangana, “lisangá na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samaria ekɔtaki na eleko moko ya kimya, ezalaki kotongama; mpe lokola ezalaki kotambola na kobanga Yehova mpe na libɔndisi ya elimo santu, ekobaki kokola.”—Mis. 9:31.
17 Na Antiokia ya Siri, Bayuda mpe bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki bayokaki solo na nzela ya batatoli ya mpiko. Lisolo ebakisi boye: “Lisusu, lobɔkɔ ya Yehova ezalaki elongo na bango, bato mingi bakómaki bandimi mpe babandaki kolanda Nkolo.” (Mis. 11:21) Mpo na bokoli oyo ezalaki kosalema na engumba yango, Biblia elobi boye: “Liloba ya Yehova ekobaki kopalangana mpe bato mingi bakómaki bandimi.” (Mis. 12:24) Lisusu, lokola Paulo mpe bandeko mosusu bapesaki litatoli malamumalamu epai ya bato ya bikólo, “na ndenge moko ya nguya, liloba ya Yehova ekobaki kopalangana mpe kolonga.”—Mis. 19:20.
18, 19. (a) Nini endimisaka biso ete “lobɔkɔ ya Yehova” ezali na biso? (b) Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa ete Yehova asungaka basaleli na ye.
18 Ntembe ezali ata moke te ete “lobɔkɔ ya Yehova” ezali na biso lelo oyo. Yango wana, ebele ya bato bazali kokóma bandimi mpe bazali kozwa batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe. Longola yango, ezali kaka na lisalisi mpe na lipamboli ya Nzambe nde tozali koyikela botɛmɛli mpiko—ata mpe minyoko makasi, mpe tozali kolonga kokokisa mosala na biso, ndenge Paulo mpe bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso basalaki. (Mis. 14:19-21) Yehova azali ntango nyonso elongo na biso mpo na kosalisa biso. “Mabɔkɔ na ye oyo ezali koumela mpo na libela” ezali ntango nyonso kosunga biso na mikakatano na biso nyonso. (Mib. 33:27) Lisusu, tóbosana te ete mpo na nkombo na ye monene, Yehova asundolaka basaleli na ye te.—1 Sa. 12:22; Nz. 94:14.
19 Na ndakisa, na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, lokola Ndeko Harald Abt azalaki ntango nyonso kopesa litatoli, Banazi batindaki ye na kaa ya bakangami ya Sachsenhausen. Na sanza ya 05/1942, basoda ya Gestapo bakendaki na ndako na ye, bazwaki mwana na bango ya moke ya mwasi, bakangaki mwasi na ye Elsa. Bakómaki kotinda Elsa na bakaa ndenge na ndenge. Ndeko mwasi Elsa Abt alobaki boye: “Nazwaki liteya moko monene na bambula oyo nalekisaki na bakaa ya bakangami na Allemagne. Liteya yango ezali ete elimo ya Yehova ekoki kopesa moto makasi mingi ntango azali na kati ya minyoko oyo eleki makasi! Liboso bákanga ngai, natángaki mokanda ya ndeko mwasi moko oyo alobaki ete ntango moto azali na monyoko ya makasi, elimo ya Yehova epesaka ye kimya ya motema. Nakanisaki ete ndeko yango alekisaki mwa moke ndelo. Kasi, ntango ngai moko nakutanaki na minyoko, nandimaki ete ndeko yango alobaki solo. Esalemaka mpenza bongo. Soki likambo yango ekómeli yo naino te, okoki kokanga ntina na yango te. Kasi, ngai ekómelaki ngai.”
Kobá kopesa litatoli malamumalamu!
20. Paulo azalaki kosala nini ntango azalaki mokangami, mpe ndenge nini yango ekoki kolendisa bandeko na biso mosusu?
20 Mokanda ya Misala esuki na koyebisa biso ete Paulo azalaki “kosakola Bokonzi ya Nzambe” na molende. (Mis. 28:31) Lokola azalaki mokangami kuna na Roma, azalaki na bonsomi ya kosakola ndako na ndako te. Atako bongo, akobaki kopesa litatoli epai ya bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye. Lelo oyo, bandeko na biso mosusu bakɔtá ndako, mbala mosusu kutu bakitaka na mbeto te, to mpe bazali kofanda na ndako ya mibange mpo banuni mingi, bazali na maladi, to bazali bibɔsɔnɔ. Kasi, bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mposa na bango ya kopesa litatoli ezali kaka makasi. Tóbondelaka mpo na bango, ata mpe kosɛnga epai ya Tata na biso ya likoló ete apesa bango libaku ya kosolola na bato oyo bazali na mposa ya koyeba ye mpe mikano na ye.
21. Mpo na nini tosengeli kopesa litatoli na likanisi ete mikolo etikali ya kotánga?
21 Mingi kati na biso tokoki kosakola ndako na ndako to na balolenge mosusu mpo na kokómisa bato bayekoli. Yango wana, esengeli ete mokomoko na biso asala nyonso oyo akoki mpo na kokokisa mokumba na ye ya kosakola Bokonzi, mpo na kosangana na mosala ya kopesa litatoli “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” Tosengeli kosala mosala yango na makanisi ete mikolo etikali ya kotánga, mpo tozali komona polele “elembo” ya kozala ya Kristo. (Mat. 24:3-14) Tozali na ntango ya kobungisa te. Tozali “na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.”—1 Ko. 15:58.
22. Mokano nini tosengeli kozala na yango wana tozali kozela mokolo monene ya Yehova?
22 Wana tozali kozela “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova,” tózala na ekateli ya kokoba kopesa litatoli na molende mpe na bosembo. (Yoe. 2:31) Tokoki naino kozwa bato oyo bazali lokola bato ya Beroya oyo “bayambaki liloba na mposa makasi mpenza.” (Mis. 17:10, 11) Yango wana, tópesa litatoli tii ntango tokoyoka maloba oyo: “Longonya, moombo malamu mpe ya sembo!” (Mat. 25:23) Soki tozali kosangana na molende na mosala ya kokómisa bato bayekoli lelo oyo mpe totikali sembo epai ya Yehova, libela na libela tokosepela na ndenge tolekisaki te libaku malamu ya ‘kopesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe!